Misala 18:1-28
18 Nsima ya makambo wana, alongwaki na Atene mpe ayaki na Korinti.
2 Mpe akutaki Moyuda moko nkombo na ye Akila,+ mwana-mboka ya Ponti oyo autaki na Itali+ kala mingi te, ná mwasi na ye Prisile, mpo Klode+ apesaki mitindo ete Bayuda nyonso bálongwa na Roma. Bongo akendaki epai na bango
3 mpe lokola bazalaki kosala mosala moko, afandaki na ndako na bango, mpe bazalaki kosala mosala,+ mpo mosala na bango ezalaki ya kotonga bahema.
4 Nzokande, sabata nyonso, azalaki kosala lisukulu na sinagoga+ mpe azalaki kondimisa Bayuda ná Bagrɛki.
5 Nzokande, ntango Silasi+ ná Timote+ bautaki na Masedonia bakiti, Paulo abandaki komipesa mingi na mosala oyo etali liloba, azalaki kopesa Bayuda litatoli mpo na komonisa ete Yesu azali Kristo.+
6 Kasi nsima, lokola bango bakobaki kotɛmɛla mpe koloba mabe,+ apupolaki bilamba+ na ye mpe alobaki na bango ete: “Makila+ na bino ezala na mitó na bino moko. Ngai nazali pɛto.+ Banda sikoyo nakokende epai ya bato ya bikólo.”+
7 Na yango, alongwaki kuna mpe akendaki kokɔta na ndako ya moto moko nkombo na ye Titiusi Yusutusi, mosambeli moko ya Nzambe, oyo ndako na ye ekangamá na sinagoga.
8 Kasi Krispusi+ mokambi ya sinagoga andimelaki Nkolo, ndenge moko mpe bato nyonso ya ndako na ye. Mpe mingi kati na Bakorinti oyo bayokaki babandaki kondima mpe kobatisama.
9 Lisusu, na butu Nkolo alobaki na Paulo+ na emonaneli moko ete: “Kobanga te, kasi kobá koloba mpe kokanga monɔkɔ te,
10 mpo nazali elongo na yo+ mpe moto moko te akoyela yo mpo na kosala yo mabe; mpo nazali na bato ebele na engumba oyo.”
11 Bongo afandaki kuna mbula moko na sanza motoba, azalaki koteya liloba ya Nzambe na kati na bango.
12 Nzokande wana Galio azalaki prokonsule+ ya Akaya, Bayuda, bango nyonso, batombokelaki Paulo mpe bakendaki na ye na kiti ya kosambisa,+
13 balobi ete: “Moto oyo azali kondimisa+ bato básambela Nzambe ndenge mosusu, oyo eyokani na mibeko te.”
14 Kasi, wana Paulo alingaki kofungola monɔkɔ, Galio alobaki na Bayuda ete: “Ya solo, soki ezalaki na mbeba moko to na likambo moko ya mabe, Ee Bayuda, nalingaki kozala na ntina ya kokanga motema mpo na koyoka bino ntango molai.
15 Kasi soki ezali nde ntembe mpo na maloba mpe bankombo+ mpe mibeko+ na kati na bino, bino moko bosengeli kotala yango. Nalingi te kozala mosambisi ya makambo wana.”
16 Na yango, abenganaki bango liboso ya kiti ya kosambisa.
17 Bongo bango nyonso bakangaki Sostene+ mokambi ya sinagoga mpe babandaki kobɛta ye liboso ya kiti ya kosambisa. Kasi Galio amitungisaki ata moke te na makambo yango nyonso.
18 Nzokande, nsima ya kofanda mwa mikolo mingi lisusu, Paulo apesaki bandeko mbote mpe azwaki masuwa mpo na kokende na Siri, mpe elongo na ye Prisile ná Akila, wana akatisaki nsuki+ na Kenkrea,+ mpo azalaki na ndai.
19 Bongo bakómaki na Efese, mpe atikaki bango kuna; kasi ye moko akɔtaki na sinagoga+ mpe azalaki kosolola na Bayuda.
20 Atako bazalaki kosɛnga ye ete aumela lisusu mwa ntango molai, andimaki te
21 kasi apesaki mbote+ mpe ayebisaki bango ete: “Nakozonga lisusu epai na bino, soki Yehova alingi.”+ Mpe akamataki nzela ya mbu na Efese
22 mpe akitaki na Kaisaria. Mpe amataki kopesa lisangá mbote, mpe akitaki na Antiokia.
23 Mpe nsima ya kolekisa mwa ntango kuna, alongwaki mpe alekaki na esika moko tii na esika mosusu na mokili wana ya Galatia+ mpe na Frigia,+ azalaki kolendisa+ bayekoli nyonso.
24 Nzokande Moyuda moko nkombo na ye Apolosi,+ mwana-mboka ya Alezandria, molobi moko malamu, akómaki na Efese; mpe ayebaki Makomami malamumalamu mpenza.+
25 Moto yango alakisamá na monɔkɔ na nzela ya Yehova mpe, lokola azalaki kopela na elimo,+ abandaki kosakola mpe koteya na ndenge ya malamu mpenza makambo oyo etali Yesu, kasi ayebaki kaka batisimo+ ya Yoane.
26 Mpe moto yango abandaki koteya na mpiko na kati ya sinagoga. Ntango Prisile ná Akila+ bayokaki ye, bakamataki ye esika moko na bango mpe bamonisaki ye polele nzela ya Nzambe na ndenge ya malamu lisusu koleka.
27 Lisusu, lokola azalaki na mposa ya kokatisa na Akaya, bandeko bakomelaki bayekoli mokanda, balendisaki bango ete báyamba ye na boboto. Bongo ntango akómaki kuna, asalisaki+ mpenza baoyo bandimaki mpo na boboto monene ya Nzambe;+
28 mpo azalaki komonisa na bokasi mpenza polele na miso ya bato ete Bayuda bazalaki na libunga, wana azalaki komonisa na nzela ya Makomami+ ete Yesu azali Kristo.+