Misala 14:1-28

14  Nzokande na Ikoniumu+ bakɔtaki elongo na sinagoga+ ya Bayuda mpe balobaki mpenza malamu, bongo ebele ya Bayuda mpe ya Bagrɛki+ bakómaki bandimi.  Kasi Bayuda oyo bandimaki te batombokisaki+ mpe bapelisaki nkanda ya milimo ya bato ya bikólo ete bátɛmɛla bandeko wana.+  Na yango, balekisaki ntango mingi mpenza, bazali koloba na mpiko na bokonzi oyo euti na Yehova, oyo apesaki litatoli mpo na liloba ya boboto monene na ye na ndenge apesaki nzela ete bilembo mpe makamwisi ya komonisa makambo oyo ekoya esalema na mabɔkɔ na bango.+  Nzokande, ebele yango ya bato ya engumba bakabwanaki, mpe ndambo bazalaki na ngámbo ya Bayuda kasi bamosusu na ngámbo ya bantoma.  Nzokande ntango bato ya bikólo mpe Bayuda ná bankumu na bango balukaki kosambwisa bango mabe mpe kobamba bango mabanga,+  bango, ntango bayebisaki bango likambo yango, bakimaki+ na bingumba ya Likaonia, Listra mpe Derbe mpe na mokili ya zingazinga;  mpe kuna bakobaki kosakola nsango malamu.+  Nzokande na Listra, mobali moko afandaki kuna, oyo akufá makolo, motɛngumi banda na libumu ya mama na ye,+ mpe atambolá naino ata moke te.  Mobali yango azalaki koyoka ndenge Paulo azalaki koloba, oyo, ntango atalaki ye na likebi mpenza mpe amonaki ete azali na kondima+ mpo akóma malamu, 10  alobaki na mongongo makasi ete: “Tɛlɛmá semba na makolo na yo.” Mpe apumbwaki mpe abandaki kotambola.+ 11  Mpe ebele wana ya bato, ntango bamonaki likambo oyo Paulo asalaki, batombolaki mingongo na bango, balobi na monɔkɔ ya Likaonia ete: “Banzambe+ bakómi lokola bato mpe bakiteli biso!” 12  Mpe babandaki kobenga Barnabasi Zeusi, kasi Paulo Hermesi, mpo ye azalaki moto ya liboso mpo na koloba. 13  Mpe nganga-nzambe ya Zeusi, oyo tempelo na ye ezalaki liboso ya engumba yango, amemaki bangɔmbɛ-mibali mpe mitole ya bafololo na baporte mpe alingaki kopesa bambeka,+ ye ná ebele yango ya bato. 14  Nzokande, ntango bantoma Barnabasi ná Paulo bayokaki yango, bapasolaki bilamba na bango ya likoló mpe bapumbwaki na kati ya ebele wana ya bato, bagangaki 15  mpe balobaki ete: “Mibali, mpo na nini bozali kosala makambo oyo? Biso mpe tozali bato+ oyo bazali na bolɛmbu+ ndenge moko na oyo ya bino, mpe tozali kosakola nsango malamu epai na bino, mpo bótika makambo wana ya mpamba+ mpe bóya epai ya Nzambe ya bomoi,+ oyo asalaki likoló+ ná mabele ná mbu mpe biloko nyonso oyo ezali na kati na yango. 16  Na mabota oyo eleká apesaki nzela ete bikólo nyonso bálanda banzela na bango,+ 17  atako amitikaki mpenza te kozanga litatoli, ndenge asaleli bino bolamu,+ ndenge apesaka bino bambula+ uta na likoló mpe bileko ya kobota mbuma, ndenge atondisaka mitema na bino mɛkɛ na biloko ya kolya mpe na nsai.”+ 18  Kasi atako balobaki makambo yango balongaki kaka na mpasi mpenza kopekisa ebele wana ya bato bápesa bango mbeka. 19  Kasi Bayuda moko boye bayaki bauti na Antiokia mpe na Ikoniumu mpe bandimisaki ebele wana ya bato,+ mpe babambaki Paulo mabanga mpe babendaki ye libándá ya engumba, bakanisi ete akufi.+ 20  Nzokande, ntango bayekoli bazingaki ye, atɛlɛmaki mpe akɔtaki na engumba. Mpe na mokolo oyo elandaki alongwaki elongo na Barnabasi mpo na kokende na Derbe.+ 21  Mpe nsima ya kosakola nsango malamu na engumba yango mpe ya kokómisa bato mingi bayekoli,+ bazongaki na Listra mpe na Ikoniumu mpe na Antiokia, 22  bazalaki kopesa milimo ya bayekoli makasi,+ bazalaki kolendisa bango ete bátikala na kati ya kondima, na maloba oyo: “Tosengeli kokɔta na bokonzi ya Nzambe na nzela ya malɔzi mingi.”+ 23  Lisusu, batyelaki bango bankulutu+ na lisangá moko na moko mpe, babondelaki mpe bakilaki bilei,+ bapesaki bango na mabɔkɔ ya Yehova+ oyo bango bandimelaki. 24  Mpe bakatisaki Pisidia mpe bakómaki na Pamfilia,+ 25  mpe, nsima ya kosilisa koloba liloba na Perga, bakitaki na Atalia. 26  Mpe balongwaki kuna, bazwi masuwa bakei na Antiokia,+ epai batyamaki na mabɔkɔ ya boboto monene ya Nzambe mpo na mosala oyo bakokisaki malamumalamu.+ 27  Ntango bakómaki mpe bayanganisaki lisangá, babandaki koyebisa+ ebele ya makambo oyo Nzambe asalaki na nzela na bango, mpe ndenge afungolelaki bikólo porte ya kondima.+ 28  Bongo balekisaki ntango mingi elongo na bayekoli yango.

Maloba na nse