Misala 4:1-37

4  Nzokande na ntango bango mibale bazalaki koloba na bato, banganga-nzambe bakonzi mpe kapitɛni ya tempelo+ mpe Basadukai+ babimelaki bango,  batungisamaki ndenge bazali koteya bato mpe kosakola polelepolele lisekwa na bakufi na oyo etali Yesu;+  mpe batyaki bango mabɔkɔ mpe batyaki bango na bolɔkɔ tii na mokolo oyo elandaki,+ mpo mpokwa esilaki kokóma.  Nzokande, mingi ya baoyo bayokaki lisukulu yango bandimaki,+ mpe motángo ya mibali ekómaki soki nkóto mitano (5 000).+  Mokolo oyo elandaki bankumu na bango ná mikóló na bango ná bakomeli+ na bango bayanganaki na Yerusaleme  (ná Anasi+ nganga-nzambe mokonzi ná Kaifa+ ná Yoane ná Alezandre ná baoyo nyonso bazalaki bato ya libota ya nganga-nzambe mokonzi),  mpe batɛlɛmisaki bango na katikati na bango mpe babandaki kotuna ete: “Na nguya nini to na nkombo ya nani bosali likambo oyo?”+  Na yango Petro, lokola atondaki na elimo santu,+ alobaki na bango ete: “Bankumu ya bato mpe mikóló,  soki tozali lelo kosambisama, mpo na likambo ya malamu oyo esalemi epai ya mobɛli,+ mpo na koyeba soki na nzela ya nani moto oyo akómi malamu, 10  eyebana na bino nyonso mpe na bato nyonso ya Yisraele, ete na nkombo ya Yesu Kristo Monazarete,+ oyo bino bobakaki na nzete+ kasi oyo Nzambe alamwisaki uta na bakufi,+ na nzela na ye nde mobali oyo atɛlɛmi awa liboso na bino na nzoto malamu. 11  Ye azali ‘libanga oyo bino batongi-ndako bomonaki mpamba, mpe oyo ekómi motó ya litumu ya ndako.’+ 12  Lisusu, lobiko ezali na moto mosusu te, mpo nkombo+ mosusu ezali te na nse ya lola, oyo epesami na kati ya bato, oyo tosengeli kobika na nzela na yango.”+ 13  Nzokande ntango bamonaki elobeli ya polelepolele ya Petro ná Yoane, mpe basosolaki ete bazalaki bato batángá kelasi mingi te mpe bato mpamba,+ bakómaki kokamwa. Mpe bayaki koyeba malamu ete bazalaki elongo na Yesu;+ 14  mpe lokola bazalaki kotala moto oyo abikisamaki atɛlɛmi elongo na bango,+ bazalaki na likambo ya koloba te.+ 15  Bongo bapesaki bango mitindo ete bábima na ndako ya Sanedrina, mpe babandaki kotunana bango na bango, 16  balobi: “Tokosala nini na bato oyo?+ Mpo, ya solo mpenza, elembo moko monene esalemi na nzela na bango, oyo emonani polele na bato nyonso oyo bafandi na Yerusaleme;+ mpe tokoki kowangana yango te. 17  Nzokande, mpo likambo yango epalangana mingi lisusu te na kati ya bato, tóyebisa bango na makaneli ete báloba na nkombo yango lisusu na moto ata moko te.”+ 18  Na yango babengaki bango mpe bapesaki bango mitindo ete, báloba to báteya ata na esika moko te na nkombo ya Yesu. 19  Kasi Petro ná Yoane bazongiselaki bango ete: “Soki ezali boyengebene na miso ya Nzambe ete tóyoka bino na esika ya koyoka Nzambe, bino moko bókata likambo. 20  Kasi biso, tokoki kotika te kolobela makambo oyo tomoni mpe toyoki.”+ 21  Bongo ntango basilisaki kolobela bango lisusu na makaneli, babimisaki bango, mpo bazwaki ata likambo moko te ya kopesa bango etumbu mpe mpo na bato,+ mpo bango nyonso bazalaki kopesa Nzambe nkembo mpo na likambo oyo esalemaki; 22  mpo moto oyo epai na ye elembo yango ya kobikisama esalemaki azalaki na mbula koleka ntuku minei (40). 23  Nsima ya kobimisama, bakendaki epai ya bato na bango moko+ mpe bayebisaki makambo oyo banganga-nzambe bakonzi mpe mikóló balobaki na bango. 24  Ntango bayokaki bongo, batombolaki mingongo na bango na bomoko mpenza epai ya Nzambe+ mpe balobaki ete: “Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso,+ yo ozali Oyo osalaki likoló mpe mabele mpe mbu mpe biloko nyonso na kati na yango,+ 25  mpe oyo na nzela ya elimo santu olobaki na monɔkɔ ya nkɔkɔ na biso Davidi,+ mosaleli na yo ete: ‘Mpo na nini bikólo ekómi na yikiyiki mpe bato ya bikólo bazali kokanisakanisa makambo ya mpambampamba?+ 26  Bakonzi ya mabele batɛlɛmi mpe bankumu bayangani lokola moto moko mpo na kotɛmɛla Yehova mpe kotɛmɛla moto na ye oyo atyami mafuta.’+ 27  Kutu, Erode ná Ponse Pilate+ ná bato ya bikólo, elongo na bato ya Yisraele, bayanganaki mpenza na kati ya engumba oyo mpo na kotɛmɛla mosaleli na yo mosantu+ Yesu, oyo yo otyaki mafuta,+ 28  mpo na kosala makambo oyo lobɔkɔ na yo mpe mokano na yo ekanaki liboso ete ekobima.+ 29  Mpe sikoyo, Yehova, tyá likebi na makaneli na bango,+ mpe pesá baombo na yo likoki ya kokoba koloba liloba na yo na mpiko mpenza,+ 30  wana ozali kosembola lobɔkɔ na yo mpo na kobikisa mpe wana bilembo mpe makamwisi ya komonisa makambo oyo ekoya+ ezali kosalema na nkombo+ ya mosaleli+ na yo mosantu Yesu.” 31  Mpe ntango basilisaki kobondela, esika oyo bayanganaki eninganaki;+ mpe bango nyonso batondaki na elimo santu+ mpe babandaki koloba liloba ya Nzambe na mpiko.+ 32  Lisusu, ebele ya bato oyo bandimaki bazalaki na motema kaka moko mpe na molimo kaka moko,+ mpe moto moko te azalaki koloba ete eloko boye ezali ya ye moko na biloko oyo azalaki na yango; kasi batyaki nde biloko nyonso lisangá.+ 33  Lisusu, na nguya monene bantoma bakobaki kopesa litatoli na ntina na lisekwa ya Nkolo Yesu;+ mpe boboto monene ezalaki mingi mpenza epai na bango nyonso. 34  Ya solo, moto moko te na kati na bango azalaki na bosɛnga;+ mpo baoyo nyonso bazalaki na bilanga to bandako bazalaki kotɛka yango mpe komema mosolo ya biloko oyo etɛkamaki 35  mpe bazalaki kotya yango na makolo ya bantoma.+ Na nsima bazalaki kokabola+ yango na moto na moto, ndenge azalaki na bosɛnga. 36  Bongo Yozefe, oyo bantoma bapesaki nkombo Barnabasi,+ oyo soki babongoli, elakisi Mwana ya Libɔndisi, ye Molevi, mwana-mboka ya Shipre, 37  lokola azalaki na eteni moko ya mabele, atɛkaki yango mpe amemaki mbongo mpe atyaki yango na makolo ya bantoma.+

Maloba na nse