Emoniseli 5:1-14
5 Mpe namonaki na lobɔkɔ ya mobali ya Oyo afandi na kiti ya bokonzi+ rulo moko oyo bakomá na kati mpe na libándá,+ bakangá yango+ makasi na bilembo nsambo.
2 Mpe namonaki anzelu moko ya makasi azali kosakola na mongongo makasi ete: “Nani abongi kofungola rulo oyo mpe kofungola bilembo na yango?”
3 Kasi ezala na likoló to na mabele to na nse ya mabele ezalaki na moto ata moko te oyo akokaki kofungola rulo yango to kotala na kati na yango.
4 Mpe nalelaki mingi mpo moto ata moko te amonanaki ete abongi kofungola rulo yango to kotala na kati.+
5 Kasi moko ya bankulutu yango alobi na ngai ete: “Tiká kolela. Talá! Nkɔsi ya libota ya Yuda,+ mosisa+ ya Davidi,+ alongi+ mpo afungola rulo wana mpe bilembo na yango nsambo.”
6 Mpe namonaki na katikati ya kiti ya bokonzi+ mpe ya bikelamu minei ya bomoi mpe na katikati ya bankulutu+ yango mwana-mpate+ moko atɛlɛmi lokola nde abomamaki,+ azalaki na maseke nsambo mpe miso nsambo, miso yango elakisi bilimo nsambo+ ya Nzambe oyo etindami na mabele mobimba.
7 Mpe akendaki mpe na mbala moko azwaki yango na lobɔkɔ ya mobali ya Oyo afandi na kiti ya bokonzi.+
8 Mpe ntango azwaki rulo yango, bikelamu minei ya bomoi mpe bankulutu ntuku mibale na minei (24)+ bakweaki liboso ya Mwana-Mpate, mokomoko na bango azalaki na nzɛnzɛ+ mpe na mabakuli ya wolo oyo etondi na mpaka ya malasi, mpe mpaka ya malasi+ yango elakisi mabondeli+ ya basantu.
9 Mpe bayembi loyembo ya sika+ ete: “Obongi kozwa rulo wana mpe kofungola bilembo na yango, mpo obomamaki mpe na makila na yo+ osombelaki+ Nzambe bato+ na mabota nyonso mpe na minɔkɔ nyonso mpe na mikili nyonso mpe na bikólo nyonso,
10 mpe okómisi bango bokonzi+ mpe banganga-nzambe+ mpo na Nzambe na biso,+ mpe bakoyangela+ mabele.”
11 Mpe namonaki, mpe nayokaki mongongo moko ya ebele ya baanzelu oyo bazalaki zingazinga ya kiti ya bokonzi mpe ya bikelamu minei ya bomoi mpe ya bankulutu, mpe motángo na bango ezalaki bamiriade na bamiriade+ mpe bankóto na bankóto,+
12 bazali koloba na mongongo makasi ete: “Mwana-Mpate oyo abomamaki+ abongi kozwa nguya ná bomɛngo ná bwanya ná makasi ná lokumu ná nkembo ná lipamboli.”+
13 Mpe nayokaki bikelamu nyonso oyo ezali na likoló mpe na mabele mpe na nse ya mabele+ mpe na mbu, mpe biloko nyonso oyo ezali na kati na yango, ezali koloba ete: “Na Oyo afandi na kiti ya bokonzi+ mpe na Mwana-Mpate+ lipamboli mpe lokumu+ mpe nkembo+ mpe nguya ezala libela na libela.”
14 Mpe bikelamu yango minei ya bomoi elobaki ete: “Amen!” mpe bankulutu+ bakweaki mpe basambelaki.+