Emoniseli 4:1-11
4 Nsima ya makambo wana namonaki, mpe talá! porte moko efungwamá na likoló, mpe mongongo ya liboso oyo nayokaki ezalaki lokola oyo ya kelelo,+ elobaki na ngai ete: “Matá awa,+ mpe nakolakisa yo makambo oyo ekosalema.”+
2 Nsima ya makambo wana nakómaki na mbala moko na nguya ya elimo: mpe talá! kiti moko ya bokonzi+ na likoló,+ mpe moto moko afandi na kiti yango ya bokonzi.+
3 Mpe moto yango oyo afandi azali komonana+ lokola libanga ya jasipe+ mpe lokola libanga ya ntalo ya motane, mpe monama+ moko ezalaki zingazinga ya kiti yango ya bokonzi ezali komonana lokola emerode.+
4 Mpe bakiti ya bokonzi ntuku mibale na minei (24) ezalaki zingazinga ya kiti yango ya bokonzi,+ mpe namonaki bankulutu+ ntuku mibale na minei+ bafandi na bakiti yango ya bokonzi balati bilamba ya likoló ya mpɛmbɛ,+ mpe na mitó na bango mitole ya wolo.+
5 Mpe mikalikali+ ná mingongo ná bankake+ ezali kobima na kiti yango ya bokonzi; mpe miinda nsambo+ ya mɔtɔ ezali kopela liboso ya kiti yango ya bokonzi, mpe miinda yango elakisi bilimo nsambo+ ya Nzambe.
6 Mpe liboso ya kiti yango ya bokonzi ezali lokola nde na mbu+ moko ya talatala ekokani na kristale.
Mpe bikelamu minei ya bomoi+ oyo etondá na miso na liboso mpe na nsima ezali na katikati ya kiti yango ya bokonzi mpe zingazinga ya kiti yango ya bokonzi.
7 Mpe ekelamu ya liboso ya bomoi ezali lokola nkɔsi,+ mpe ekelamu ya mibale ya bomoi ezali lokola mwana-ngɔmbɛ ya mobali,+ mpe ekelamu ya misato ya bomoi+ ezali na elongi lokola ya moto, mpe ekelamu ya minei ya bomoi+ ezali lokola mpongo oyo ezali kopumbwa.+
8 Bongo bikelamu yango minei ya bomoi,+ mokomoko na yango ezalaki na mapapu motoba;+ etondá na miso nzoto mobimba mpe na kati.+ Mpe epemaka te, butu moi kaka koloba: “Mosantu, mosantu, mosantu nde Yehova+ Nzambe, Mozwi-ya-Nguya-Nyonso,+ oyo azalaki mpe azali+ mpe azali koya.”
9 Mpe ntango nyonso oyo bikelamu yango ya bomoi ezali kopesa nkembo mpe lokumu mpe matɔndi+ epai ya Oyo afandi na kiti ya bokonzi,+ Oyo azali na bomoi libela na libela,+
10 bankulutu yango ntuku mibale na minei (24)+ bazali kokwea liboso ya Oyo afandi na kiti ya bokonzi mpe bazali kosambela+ Oyo azali na bomoi libela na libela, mpe bazali kobwaka mitole na bango liboso ya kiti ya bokonzi mpe koloba ete:
11 “Yehova, ɛɛ Nzambe na biso, obongi kozwa nkembo+ mpe lokumu+ mpe nguya,+ mpo yo ozalisaki biloko nyonso,+ mpe mpo na mokano na yo+ yango ezalaki mpe ezalisamaki.”+