Emoniseli 20:1-15
20 Mpe namonaki anzelu moko auti na likoló azali kokita na fungola ya libulu mozindo+ mpe asimbi monyɔlɔlɔ moko monene na lobɔkɔ.
2 Mpe asimbaki dragɔ,+ nyoka yango ya ebandeli,+ oyo azali Zabolo+ mpe Satana,+ mpe akangaki ye monyɔlɔlɔ mbula nkóto moko (1 000).
3 Mpe abwakaki ye na libulu mozindo+ mpe akangaki ye na kati mpe atyaki elembo likoló na yango, mpo akosa lisusu bikólo te tii ntango mbula nkóto moko (1 000) yango ekosuka. Nsima ya makambo wana bakofungola ye mwa ntango moke.+
4 Mpe namonaki bakiti ya bokonzi,+ mpe ezalaki na baoyo bafandaki na yango, mpe bapesaki bango nguya ya kosambisa.+ Ɛɛ, namonaki milimo ya baoyo babomamaki na sóka mpo na litatoli oyo bapesaki mpo na Yesu mpe mpo balobelaki Nzambe, mpe baoyo basambelaki nyama mabe+ ná elilingi na yango te+ mpe oyo bazwaki te elembo na bilongi na bango mpe na mabɔkɔ na bango.+ Mpe bazongaki na bomoi mpe bayangelaki+ elongo na Kristo mbula nkóto moko (1 000).
5 (Bakufi+ oyo batikalaki bazongaki na bomoi te tii ntango mbula nkóto [1 000] yango esukaki.)+ Wana nde lisekwa ya liboso.+
6 Moto nyonso oyo azwi lisekwa ya liboso azali moto ya esengo+ mpe mosantu;+ liwa ya mibale+ ezali na bokonzi likoló na bango te,+ kasi bakozala banganga-nzambe+ ya Nzambe mpe ya Kristo, mpe bakoyangela elongo na ye mbula nkóto moko (1 000) yango.+
7 Nzokande ntango kaka mbula nkóto moko (1 000) yango ekosuka, bakofungola Satana na bolɔkɔ na ye,
8 mpe akobima mpo na kokosa bikólo wana oyo ezali na nsuka minei ya mabele, Goge ná Magoge, mpo na koyanganisa bango mpo na etumba. Motángo na bango ezali lokola zɛlo ya mbu.+
9 Mpe bapalanganaki na mabele mobimba mpe bazingaki kaa ya basantu+ mpe engumba oyo balingá.+ Kasi mɔtɔ eutaki na likoló ekiti mpe elei bango.+
10 Mpe Zabolo+ oyo azalaki kokosa bango abwakamaki na kati ya laki ya mɔtɔ mpe ya sufulu, esika nyama mabe+ ná mosakoli ya lokuta bazalaki;+ mpe bakonyokwama butu moi libela na libela.
11 Mpe namonaki kiti moko monene ya bokonzi ya mpɛmbɛ mpe moto oyo afandaki likoló na yango.+ Mabele ná likoló ekimaki na liboso na ye,+ mpe ezalaki lisusu na esika te.
12 Mpe namonaki bakufi, bato minene ná bato mike,+ batɛlɛmi liboso ya kiti yango ya bokonzi, mpe barulo efungwamaki. Kasi rulo mosusu efungwamaki; ezali rulo ya bomoi.+ Mpe bakufi basambisamaki na makambo oyo ekomamá na barulo yango na kolanda misala na bango.+
13 Mpe mbu ezongisaki bakufi oyo bazalaki kuna, mpe liwa ná Nkunda* ezongisaki bakufi+ oyo bazalaki kuna, mpe moto na moto asambisamaki na kolanda misala na ye.+
14 Mpe liwa+ ná Nkunda* ebwakamaki na laki ya mɔtɔ. Laki yango ya mɔtɔ+ elakisi liwa ya mibale.+
15 Lisusu, moto nyonso oyo amonanaki ete akomami na buku ya bomoi te+ abwakamaki na laki yango ya mɔtɔ.+