Emoniseli 19:1-21

19  Nsima ya makambo wana nayokaki mongongo moko ya makasi oyo ezalaki lokola mongongo ya ebele ya bikelamu na likoló.+ Balobaki ete: “Bósanzola Yah!+ Lobiko+ ná nkembo ná nguya ezali ya Nzambe na biso,+  mpo bikateli na ye ya lisambisi ezali solo mpe boyengebene.+ Mpo apesi etumbu na mwasi ya ndumba monene oyo abebisaki mabele na pite na ye, mpe azongiseli lobɔkɔ ya mwasi yango mabe mpo na makila ya baombo na ye.”+  Mpe na ntango wana kaka balobaki mbala ya mibale ete: “Bósanzola Yah!+ Mpe molinga na ye ezali kokoba komata libela na libela.”+  Mpe bankulutu ntuku mibale na minei (24)+ mpe bikelamu minei ya bomoi+ bakweaki mpe basambelaki Nzambe oyo afandi+ na kiti ya bokonzi, mpe balobaki ete: “Amen! Bósanzola Yah!”+  Lisusu, mongongo moko ebimaki na kiti ya bokonzi mpe elobaki ete: “Bósanzolaka Nzambe na biso, bino nyonso baombo na ye,+ baoyo bobangaka ye, bato mike ná bato minene.”+  Mpe nayokaki mongongo moko oyo ezalaki lokola mongongo ya ebele ya bikelamu mpe lokola lokito ya ebele ya mai oyo ezali kotíyola makasi mpe lokola lokito ya bankake makasi. Elobaki ete: “Bósanzola Yah,+ mpo Yehova Nzambe na biso, Mozwi-ya-Nguya-Nyonso,+ abandi koyangela.+  Tósepela mpe tótonda na esengo monene, mpe tókumisa ye,+ mpo fɛti ya libala+ ya Mwana-Mpate ekómi+ mpe mwasi na ye amilɛngɛli.+  Ɛɛ, bapesi ye nzela alata lini ya kitoko, ya ngɛlingɛli, ya pɛto, mpo lini ya kitoko elakisi misala ya boyengebene ya basantu.”+  Mpe ayebisi ngai ete: “Komá: Esengo na bato oyo babengisami+ na bilei ya mpokwa ya libala ya Mwana-Mpate.”+ Lisusu, ayebisi ngai ete: “Wana ezali maloba ya solo ya Nzambe.”+ 10  Bongo nakweaki na makolo na ye mpo na kosambela ye.+ Kasi ayebisi ngai ete: “Kebá! Kosala bongo te!+ Nazali kaka moninga na yo moombo mpe ya bandeko na yo oyo bazali na mosala ya kotatola Yesu.+ Sambelá Nzambe;+ mpo bisakweli epesami nde mpo na kotatola mpo na Yesu.”+ 11  Mpe namonaki likoló efungwami, mpe talá! mpunda moko ya mpɛmbɛ.+ Mpe moto oyo afandaki likoló na yango abengami Sembo+ mpe Solo,+ mpe asambisaka mpe abundaka etumba na boyengebene.+ 12  Miso na ye ezali lolemo ya mɔtɔ,+ mpe motó na ye ezali na mitole mingi.+ Azali na nkombo+ moko ekomami oyo moto moko te ayebi longola kaka ye moko, 13  mpe makila esopani+ na elamba ya likoló oyo alati, mpe babengi ye na nkombo Liloba+ ya Nzambe. 14  Lisusu, mampinga ya likoló ezalaki kolanda ye na bampunda ya mpɛmbɛ, mpe balataki lini ya kitoko ya mpɛmbɛ, ya pɛto. 15  Mpe mopanga moko ya molai oyo epeli makasi ezali kobima na monɔkɔ na ye,+ mpo abɛta na yango bikólo, mpe akokamba bango na lingenda moko ya ebende.+ Azali mpe konyata mbuma na ekamwelo ya vinyo+ ya nkanda makasi ya Nzambe+ Mozwi-ya-Nguya-Nyonso. 16  Mpe na elamba na ye ya likoló, ɛɛ na ebɛlɔ na ye, azali na nkombo moko ekomami: Mokonzi ya bakonzi mpe Nkolo ya bankolo.+ 17  Namonaki mpe anzelu moko atɛlɛmi na kati ya moi, mpe agangaki na mongongo makasi mpe alobaki na bandɛkɛ nyonso+ oyo ezali kopumbwa na katikati ya likoló ete: “Bóya awa, bóyangana na fɛti monene ya mpokwa oyo Nzambe asali, 18  mpo bólya misuni+ ya bakonzi mpe misuni ya bakomanda ya basoda mpe misuni ya bato ya makasi+ mpe misuni ya bampunda+ mpe ya baoyo bafandi likoló na yango, mpe misuni ya bato nyonso, ya bato ya bonsomi mpe ya baombo mpe ya bato mike mpe ya bato minene.” 19  Mpe namonaki nyama mabe+ mpe bakonzi+ ya mabele mpe mampinga na bango bayangani mpo na kobunda etumba+ na moto oyo afandi likoló ya mpunda+ mpe na limpinga na ye. 20  Mpe bakangaki nyama mabe,+ elongo na mosakoli ya lokuta+ oyo asalaki bilembo+ liboso na yango oyo na nzela na yango akosaki bato oyo bazwaki elembo+ ya nyama mabe mpe bato oyo bazali kosambela elilingi na yango.+ Bango mibale babwakamaki na bomoi na laki ya mɔtɔ oyo ezali kopela na sufulu.+ 21  Kasi bato oyo batikalaki babomamaki na mopanga ya molai ya moto oyo afandi likoló ya mpunda,+ oyo ebimaki na monɔkɔ na ye.+ Mpe bandɛkɛ nyonso+ etondaki+ misuni na bango.+

Maloba na nse