Emoniseli 9:1-21

9  Mpe anzelu ya mitano ayulaki kelelo na ye.+ Mpe namonaki monzoto+ moko euti na likoló mpe ekwei na mabele, mpe bapesaki ye* fungola+ ya libulu mozindo.+  Mpe afungolaki libulu mozindo yango, mpe milinga+ eutaki na libulu yango lokola milinga ya litumbu monene,+ mpe moi eyindaki,+ ná mopɛpɛ mpe, mpo na milinga ya libulu yango.  Mpe mayoyo+ eutaki na milinga yango ekei na mabele; mpe bapesaki yango nguya lokola oyo bankotó+ ya mabele ezalaka na yango.  Mpe bayebisaki yango ebebisa te matiti ya mabele to molona ata moko te to nzete ata moko mpe te, kasi kaka bato oyo bazali na elembo ya Nzambe na bilongi na bango te.+  Mpe bapesaki mayoyo yango nzela ya koboma bango te, kasi ya konyokola+ bango sanza mitano, mpe monyoko oyo bazwaki ezalaki lokola mpasi oyo nkotó+ epesaka ntango ebɛti moto.  Mpe na mikolo yango bato bakoluka liwa+ kasi bakozwa yango te, mpe bakozala na mposa ya kokufa kasi liwa ekokima bango se kokima.  Mpe mayoyo yango ezalaki lokola bampunda+ oyo elɛngɛlami mpo na etumba; mpe na mitó na yango ezalaki na biloko moko lokola mitole ya wolo, mpe bilongi na yango ezalaki lokola bilongi ya bato,+  kasi ezalaki na nsuki lokola nsuki ya basi.+ Mpe mino na yango ezalaki lokola oyo ya bankɔsi;+  mpe ezalaki na bibateli-ntolo+ lokola bibateli-ntolo ya bibende. Mpe lokito ya mapapu na yango ezalaki lokola lokito ya makalo+ oyo ezali na bampunda mingi mpe ezali kopota mbangu na etumba.+ 10  Lisusu, ezali na mikila mpe na bitubeli lokola bankotó;+ mpe nguya na yango ya konyokola bato sanza mitano ezali na mikila na yango. 11  Yango ezali na mokonzi moko, ye anzelu ya libulu mozindo.+ Na Ebre nkombo na ye Abadona, kasi na Grɛki nkombo na ye Apolyone.+ 12  Mawa moko eleki. Talá! Mawa+ mosusu mibale ezali koya nsima ya makambo wana. 13  Mpe anzelu+ ya motoba ayulaki kelelo na ye.+ Mpe nayokaki mongongo+ moko euti na maseke ya etumbelo ya wolo+ oyo ezali liboso ya Nzambe 14  elobi na anzelu ya motoba, oyo azalaki na kelelo ete: “Fungolá baanzelu+ minei oyo bakangami+ pene na ebale monene, Efrate.”+ 15  Mpe afungolaki baanzelu yango minei, oyo balɛngɛlamaki mpo na ngonga yango mpe mokolo yango mpe sanza yango mpe mbula yango, mpo na koboma moko ya bandambo misato ya bato. 16  Mpe motángo ya mampinga yango ya basoda oyo batambolaka na mpunda ezalaki miriade mibale ya bamiriade: Nayokaki motángo na bango. 17  Mpe talá ndenge namonaki bampunda yango na emonaneli, mpe bato oyo bafandi likoló na yango: bazalaki na bibateli-ntolo ya motane lokola mɔtɔ mpe ya bulé lokola yasɛnti mpe ya langi ya mosaka lokola sufulu; mpe mitó ya bampunda yango ezalaki lokola mitó ya bankɔsi,+ mpe mɔtɔ, ná milinga, ná sufulu+ ezalaki kobima na minɔkɔ na yango. 18  Moko ya bandambo misato ya bato bakufaki na malɔzi wana misato: na mɔtɔ, milinga ná sufulu oyo ezalaki kobima na minɔkɔ na yango. 19  Mpo nguya ya bampunda wana ezali na minɔkɔ na yango mpe na mikila na yango; mpo mikila na yango ezali lokola banyoka+ mpe ezali na mitó, mpe ezali koyokisa mpasi na mitó yango. 20  Kasi bato oyo batikalaki oyo babomamaki na malɔzi wana te babongolaki mitema te mpo na kotika misala ya mabɔkɔ na bango,+ mpo básambela te bademo+ mpe bikeko ya wolo, mpe ya palata,+ mpe ya motako, mpe ya libanga mpe ya nzete, oyo ekoki komona te, koyoka te, kotambola mpe te;+ 21  mpe babongolaki mitema te mpo bátika koboma,+ mpe misala na bango ya bilimo mabe+ mpe pite na bango mpe moyibi na bango.

Maloba na nse

Na Grɛki, liloba “ye” elobeli nde “monzoto.”