Emoniseli 3:1-22
3 “Mpe komelá anzelu+ ya lisangá ya Sarde ete: Moto oyo azali na bilimo nsambo+ ya Nzambe mpe na minzoto nsambo+ alobi makambo oyo: ‘Nayebi misala na yo, oyebani ete ozali na bomoi, nzokande okufá.+
2 Kebá,+ mpe lendisá+ biloko oyo etikali oyo ekómaki pene ya kokufa, mpo nakuti ete okokisi misala na yo nyonso te liboso ya Nzambe na ngai.+
3 Yango wana, kanisá ntango nyonso ndenge ozwi+ mpe ndenge oyoki, mpe kobá kobatela yango,+ mpe bongolá motema.+ Ya solo soki olamuki te,+ nakoya lokola moyibi,+ mpe okoyeba ata moke te ngonga oyo nakobimela yo.+
4 “‘Nzokande, ozali na mwa bato+ na Sarde oyo bakómisaki bilamba na bango ya likoló mbindo te,+ mpe bakotambola elongo na ngai na bilamba ya mpɛmbɛ,+ mpo babongi na yango.+
5 Moto oyo alongi+ bakolatisa ye bilamba ya likoló ya mpɛmbɛ;+ mpe nakoboma nkombo na ye te na buku ya bomoi,+ kasi nakondima nkombo na ye liboso ya Tata na ngai+ mpe liboso ya baanzelu na ye.+
6 Moto oyo azali na litoi ayoka oyo elimo+ ezali koloba na masangá.’
7 “Mpe komelá anzelu+ ya lisangá ya Filadelfia ete: Moto oyo azali mosantu,+ oyo alobaka solo,+ oyo azali na fungola ya Davidi,+ oyo afungolaka mpe moto moko te akoki kokanga, oyo akangaka mpe moto moko te akoki kofungola, alobi makambo oyo:
8 ‘Nayebi makambo oyo osalaka+—talá! natye liboso na yo porte oyo efungwami,+ oyo moto moko te akoki kokanga—ete ozali na nguya moke, mpe otosaki liloba na ngai mpe owanganaki nkombo na ngai te.+
9 Talá! nakopesa bato ya sinagoga ya Satana oyo balobaka ete bazali Bayuda,+ nzokande bazali Bayuda te kasi bazali nde kokosa+—talá! nakosala ete báya kogumbama+ na makolo na yo mpe nakosala ete báyeba ete ngai nalingá yo.
10 Lokola otosaki liloba oyo oyokaki mpo na ezaleli na ngai ya koyika mpiko,+ ngai mpe nakobatela+ yo na ngonga ya komekama, oyo ekoya na mabele mobimba esika bato bafandi, mpo na komeka bato oyo bafandi na mabele.+
11 Nazali koya nokinoki.+ Simbá makasi oyo ozali na yango,+ mpo moto moko azwa motole na yo te.+
12 “‘Moto oyo alongi—nakokómisa ye likonzí+ na tempelo+ ya Nzambe na ngai,+ mpe akobima lisusu te, mpe nakokoma likoló na ye nkombo ya Nzambe na ngai mpe nkombo ya engumba ya Nzambe na ngai, Yerusaleme ya sika+ oyo ezali kouta na likoló epai ya Nzambe na ngai mpe kokita, mpe nkombo na ngai ya sika.+
13 Moto oyo azali na litoi ayoka oyo elimo+ ezali koloba na masangá.’
14 “Mpe komelá anzelu ya lisangá ya Laodikia+ ete: Talá makambo oyo Amen,+ motatoli+ ya sembo+ mpe ya solo,+ ebandeli ya bozalisi ya Nzambe,+ alobi:
15 ‘Nayebi makambo oyo osalaka, ozali mpiɔ te mɔtɔ mpe te. Nalingaki ozala mpiɔ to mɔtɔ.
16 Bongo lokola ozali mwa molunge kaka mpe mɔtɔ te+ mpiɔ mpe te,+ nakosanza yo na monɔkɔ na ngai.
17 Lokola olobaka ete: “Nazali mozwi+ mpe nanduki bomɛngo mpe nazali ata na mposa ya eloko moko te,” kasi oyebi te ete ozali moto ya mpasi mpe moto ya mawa mpe mobola mpe moto oyo akufá miso+ mpe bolumbu,
18 nazali kopesa yo toli osomba epai na ngai wolo+ oyo epɛtolami na mɔtɔ mpo okóma mozwi, osomba mpe bilamba ya likoló ya mpɛmbɛ mpo olata mpe mpo nsɔni ya bolumbu na yo emonana te,+ mpe osomba nkisi ya miso mpo opakola na miso na yo+ bongo omona.
19 “‘Bato nyonso oyo ngai nalingaka mingi napamelaka bango mpe napesaka bango disiplini.+ Yango wana, zalá na molende mpe bongolá motema.+
20 Talá! Natɛlɛmi na porte+ mpe nazali kobɛta kɔkɔkɔ. Soki moto ayoki mongongo na ngai mpe afungoli porte,+ nakokɔta na ndako na ye mpe nakolya bilei ya mpokwa elongo na ye mpe ye elongo na ngai.
21 Moto oyo alongi+ nakopesa ye nzela afanda elongo na ngai na kiti na ngai ya bokonzi,+ ndenge ngai mpe nalongaki mpe nafandi+ elongo na Tata na ngai na kiti na ye ya bokonzi.+
22 Moto oyo azali na litoi ayoka oyo elimo+ ezali koloba na masangá.’”+