Emoniseli 17:1-18
17 Mpe moko ya baanzelu nsambo oyo bazalaki na mabakuli nsambo+ ayaki mpe asololaki na ngai ete: “Yaká nalakisa yo lisambisi ya mwasi ya ndumba+ monene oyo afandi na mai mingi,+
2 oyo bakonzi ya mabele basalaki na ye pite,+ mpe bato oyo bafandi na mabele balangwaki vinyo ya pite na ye.”+
3 Bongo amemaki ngai na nguya ya elimo+ tii na esobe moko. Mpe namonaki mwasi moko afandeli nyama mabe+ moko ya langi ya motane makasi oyo etondi na bankombo ya kofinga+ mpe oyo ezali na mitó nsambo+ mpe na maseke zomi.
4 Mpe mwasi yango alataki elamba ya motane-bulé+ mpe ya motane makasi,+ mpe amibongisi nzoto na biloko ya wolo, na mabanga ya ntalo, na mayaka+ mpe na lobɔkɔ na ye asimbi kɔpɔ ya wolo+ oyo etondi na biloko ya bosɔtɔ+ mpe ya mbindo ya pite na ye.+
5 Mpe nkombo moko ekomamá na elongi na ye, libombami moko:+ “Babilone Monene, mama ya basi ya ndumba+ mpe ya biloko ya bosɔtɔ ya mabele.”+
6 Mpe namonaki ete mwasi yango alangwe makila+ ya basantu mpe makila ya batatoli ya Yesu.+
Ɛɛ, ntango namonaki ye nakamwaki mpenza kokamwa.+
7 Bongo anzelu wana alobaki na ngai ete: “Mpo na nini okamwe? Nakoyebisa yo libombami ya mwasi wana+ mpe ya nyama mabe oyo ememi ye mpe ezali na mitó nsambo mpe na maseke zomi:+
8 Nyama mabe oyo omonaki ezalaki,+ kasi ezali te, mpe atako bongo etikali moke ebima na libulu mozindo,+ mpe ekokende na libebi. Mpe ntango bakomona ndenge nyama mabe yango ezalaki, kasi ezali te, mpe atako bongo ekozala, bato oyo bafandi na mabele bakokamwa mpenza na esengo, kasi bankombo na bango ekomamá te na rulo ya bomoi+ banda na ebandeli ya mokili.+
9 “Awa nde esengeli kozala na mayele mpe na bwanya:+ Mitó wana nsambo+ elakisi bangomba+ nsambo, epai mwasi yango afandi na nsɔngɛ.
10 Mpe ezali na bakonzi nsambo: mitano bakweá,+ moko azali,+ mpe mosusu ayei naino te,+ kasi ntango akoya akoumela mwa ntango moke.+
11 Mpe nyama mabe oyo ezalaki kasi ezali te,+ yango moko mpe ezali mokonzi ya mwambe, kasi euti na bango nsambo, mpe ezali kokende na libebi.
12 “Mpe maseke zomi oyo omonaki elakisi bakonzi zomi,+ oyo bazwi naino bokonzi te, kasi bazwi nguya bázala bakonzi mpo na ngonga moko elongo na nyama mabe wana.
13 Bango bazali na likanisi kaka moko, yango wana bazali kopesa nyama mabe nguya mpe bokonzi na bango.+
14 Bango bakobunda etumba na Mwana-Mpate,+ kasi lokola azali Nkolo ya bankolo mpe Mokonzi ya bakonzi,+ Mwana-Mpate akolonga bango.+ Lisusu, bato oyo babengami mpe baponami mpe oyo bazali sembo bakolonga elongo na ye.”+
15 Mpe alobi na ngai ete: “Mai oyo omonaki, epai mwasi wana ya ndumba afandi, elakisi bato ya mikili mpe ebele ya bato mpe bikólo mpe minɔkɔ.+
16 Mpe maseke zomi+ oyo omonaki, ná nyama mabe,+ ekoyina mwasi wana ya ndumba+ mpe ekopanza ye mpe ekotika ye bolumbu, mpe ekolya misuni na ye mpe ekozikisa ye na mɔtɔ nyɛɛ.+
17 Mpo Nzambe atye yango na mitema na bango mpo na kokokisa likanisi na ye,+ ɛɛ mpo na kokokisa likanisi na bango kaka moko ya kopesa nyama mabe bokonzi na bango,+ tii ntango maloba ya Nzambe ekokokisama.+
18 Mpe mwasi wana+ oyo omonaki elakisi engumba yango monene oyo ezali na bokonzi likoló ya bakonzi ya mabele.”+