Emoniseli 14:1-20

14  Mpe namonaki, mpe talá! Mwana-Mpate+ atɛlɛmi likoló ya Ngomba Siona,+ mpe elongo na ye bato nkóto nkama moko na ntuku minei na minei (144 000)+ oyo nkombo na ye mpe nkombo ya Tata+ na ye ekomamá na bilongi na bango.  Mpe nayokaki lokito moko euti na likoló lokola lokito ya ebele ya mai+ ezali kotíyola makasi mpe lokola lokito ya nkake makasi; mpe lokito oyo nayokaki ezalaki lokola oyo ya bayembi oyo bazali koyemba na nzɛnzɛ,+ bazali kobɛta banzɛnzɛ na bango.  Mpe bazali koyemba+ lokola nde loyembo moko ya sika+ liboso ya kiti ya bokonzi mpe liboso ya bikelamu minei ya bomoi+ mpe ya bankulutu;+ mpe moto moko te akokaki koyeba loyembo yango malamumalamu longola kaka bato yango nkóto nkama moko na ntuku minei na minei (144 000),+ oyo basombamaki+ na mabele.  Bango bazali bato oyo bamibebisaki na basi te;+ ɛɛ, bazali bangɔndɔ.+ Bango bazali bato oyo bazali kokoba kolanda Mwana-Mpate epai nyonso oyo azali kokende.+ Bango basombamaki+ na kati ya bato, bazali mbuma ya liboso+ epai ya Nzambe mpe epai ya Mwana-Mpate,  mpe lokuta ata moke te ezwamaki na minɔkɔ na bango;+ bazali na mbeba te.+  Mpe namonaki anzelu mosusu azali kopumbwa na katikati ya likoló,+ mpe azalaki na nsango malamu+ ya seko, nsango ya esengo ya kosakwela bato oyo bafandi na mabele, mpe bikólo nyonso mpe mabota nyonso mpe minɔkɔ nyonso mpe mikili nyonso,+  azali koloba na mongongo makasi ete: “Bóbanga Nzambe+ mpe bókumisa ye,+ mpo ngonga na ye ya kosambisa eyei,+ yango wana bósambela Oyo asalá+ likoló, ná mabele, ná mbu, ná maziba ya mai.”+  Mpe anzelu mosusu ya mibale, alandaki mpe azalaki koloba ete: “Akwei! Babilone+ Monene akwei,+ ye oyo amɛlisaki bikólo nyonso vinyo+ ya nkanda ya pite na ye!”+  Mpe anzelu mosusu, ya misato, alandaki bango mpe azalaki koloba na mongongo makasi ete: “Soki moto asambeli nyama mabe+ mpe elilingi na yango,+ mpe azwi elembo na elongi na ye to na lobɔkɔ na ye,+ 10  akomɛla mpe vinyo ya nkanda ya Nzambe oyo basangisá yango na eloko te mpe esopami na kati ya kɔpɔ ya nkɛlɛ na ye,+ mpe akonyokwama+ na mɔtɔ mpe na sufulu+ na miso ya baanzelu basantu mpe na miso ya Mwana-Mpate. 11  Mpe milinga ya monyoko na bango ezali komata libela na libela;+ mpe butu moi, baoyo basambelaka nyama mabe yango mpe elilingi na yango, mpe moto nyonso oyo azwi elembo+ ya nkombo na yango bazali kopema te. 12  Awa nde basantu, baoyo batosaka mitindo ya Nzambe+ mpe bandimelaka+ Yesu, basengeli koyika mpiko.”+ 13  Mpe nayokaki mongongo moko euti na likoló elobi: “Komá boye: Esengo na bakufi+ oyo bazali kokufa na bomoko elongo na Nkolo+ banda sikoyo.+ Ɛɛ, elimo elobi ete: bápema mpo basalaki misala makasi, mpo makambo oyo basalaki ezali kolanda bango.” 14  Mpe namonaki, mpe talá! lipata moko ya mpɛmbɛ, mpe moto moko oyo azali lokola mwana ya moto+ afandi na lipata yango, azali na motole ya wolo+ na motó na ye mpe likwangola moko oyo epeli makasi na lobɔkɔ na ye. 15  Mpe anzelu mosusu abimaki na esika mosantu ya tempelo, abeleli moto oyo afandi na lipata yango na mongongo makasi ete: “Tyá likwangola na yo mpe buká mbuma,+ mpo ngonga ya kobuka mbuma ekómi, mpo mbuma+ ya mabele eteli mpenza.”+ 16  Mpe moto oyo afandi na lipata atindaki likwangola na ye na mabele, mpe babukaki mbuma ya mabele. 17  Anzelu mosusu mpe abimaki na esika mosantu ya tempelo oyo ezali na likoló,+ ye mpe asimbi likwangola moko oyo epeli makasi. 18  Anzelu mosusu mpe abimaki na etumbelo mpe azalaki na bokonzi likoló ya mɔtɔ.+ Mpe abelelaki oyo asimbi likwangola oyo epeli makasi na mongongo makasi ete: “Tyá likwangola na yo oyo epeli makasi mpe yanganisá bituka ya mbuma ya nzete ya vinyo ya mabele,+ mpo mbuma na yango eteli.” 19  Mpe anzelu+ yango atindaki likwangola na ye na mabele mpe ayanganisaki vinyo+ ya mabele, mpe abwakaki yango na ekamwelo monene ya vinyo ya nkanda ya Nzambe.+ 20  Mpe banyataki mbuma na ekamwelo yango ya vinyo na libándá ya engumba,+ mpe makila ebimaki na ekamwelo yango ya vinyo emati tii na bibende ya mbanga ya bampunda,+ na ntaka ya setade nkóto moko na nkama motoba (1 600).*+

Maloba na nse

Kilomɛtrɛ soki 300. Epai ya Bagrɛki ya kala, Setade ezalaki emekeli ya bolai, ekokani na mɛtrɛ 185.