Emoniseli 11:1-19
11 Mpe bapesaki ngai mongendu+ moko lokola lingenda ntango azalaki koloba ete: “Tɛlɛmá mpe meká bonene ya esika mosantu ya tempelo+ ya Nzambe mpe ya etumbelo mpe ya bato oyo bazali kosambela kuna.
2 Kasi lopango oyo ezali na libándá+ ya esika mosantu ya tempelo, tiká yango libándá mpe komeka bonene na yango te, mpo bapesi yango bikólo,+ mpe bango bakonyata engumba mosantu+ na makolo sanza ntuku minei na mibale (42).+
3 Mpe nakotinda batatoli na ngai mibale+ ete básakola+ mikolo nkóto moko na nkama mibale na ntuku motoba (1 260), balati ngɔtɔ.”+
4 Bango nde nzete mibale ya olive+ mpe bitɛlɛmiselo ya miinda mibale+ mpe batɛlɛmi liboso ya Nkolo ya mabele.+
5 Mpe soki moto alingi kosala bango mabe, mɔtɔ ebimi na minɔkɔ na bango mpe elei banguna na bango;+ mpe soki moto alingi kosala bango mabe, akobomama ndenge wana.
6 Bango bazali na nguya ya kokanga likoló+ mpo mbula enɔka te+ na mikolo ya esakweli na bango, mpe bazali na nguya ya kobongola mai makila+ mpe ya kopesa mabele bolɔzi ya ndenge nyonso na ntango nyonso oyo bango balingi.
7 Mpe ntango bakosilisa litatoli na bango, nyama ya mabe mpenza oyo azali komata na libulu mozindo+ akobunda na bango etumba mpe akolonga bango mpe akoboma bango.+
8 Mpe bibembe na bango ekozala na balabala monene ya engumba yango monene oyo babengi na maloba ya elilingi Sodoma+ mpe Ezipito, epai babakaki mpe Nkolo na bango na nzete.+
9 Mpe bato ya mikili, ná mabota, ná minɔkɔ, ná bikólo+ bakotala bibembe na bango mikolo misato ná ndambo,+ mpe bakopesa nzela te ete bibembe na bango elalisama na lilita.
10 Mpe bato oyo bafandi na mabele bazali koyoka esengo+ mpo na bango mpe bazali kosepela, mpe bakotindelana makabo,+ mpo basakoli wana mibale bazalaki konyokola bato oyo bafandi na mabele.
11 Mpe nsima ya mikolo misato ná ndambo+ elimo ya bomoi oyo euti na Nzambe ekɔtelaki bango,+ mpe batɛlɛmaki na makolo na bango, mpe bato oyo bazalaki kotala bango babangaki makasi.
12 Mpe bayokaki mongongo moko makasi+ euti na likoló elobi na bango ete: “Bómata awa.”+ Mpe bamataki na likoló na lipata, mpe banguna na bango bazalaki kotala bango.
13 Mpe na ngonga yango mabele eninganaki makasi mpenza, mpe moko ya bandambo zomi+ ya engumba ekweaki; mpe koningana yango ya mabele ebomaki bato nkóto nsambo (7 000), mpe baoyo batikalaki babangaki mpe bakumisaki Nzambe ya likoló.+
14 Mawa+ ya mibale eleki. Talá! Mawa ya misato ezali koya nokinoki.
15 Mpe anzelu ya nsambo ayulaki kelelo na ye.+ Mpe mingongo ya makasi ebimaki na likoló, elobi: “Bokonzi ya mokili ekómi bokonzi ya Nkolo na biso+ mpe ya Kristo na ye,+ mpe akoyangela libela na libela.”+
16 Mpe bankulutu ntuku mibale na minei (24)+ oyo bafandaki liboso ya Nzambe na bakiti na bango ya bokonzi bakweaki bilongi na nse+ mpe basambelaki Nzambe,+
17 balobi: “Totɔndi yo,+ Yehova Nzambe, Mozwi-ya-Nguya-Nyonso,+ Oyo azali+ mpe azalaki, mpo ozwi nguya na yo monene+ mpe obandi koyangela.+
18 Kasi bikólo basilikaki, mpe nkanda na yo eyaki, ná ntango oyo etyamá mpo bakufi básambisama, mpe opesa mbano+ na baombo na yo basakoli+ mpe na basantu mpe na baoyo babangaka nkombo na yo, bato mike ná bato minene,+ mpe obebisa+ baoyo bazali kobebisa mabele.”+
19 Mpe esika mosantu ya tempelo ya Nzambe oyo ezali na likoló+ efungwamaki, mpe sanduku+ ya kondimana na ye emonanaki na kati ya esika mosantu ya tempelo na ye.+ Mpe mikalikali ebimaki, mpe mingongo eyokanaki, mpe bankake ebɛtaki, mpe mabele eninganaki mpe mbula monene ya mabanga ebɛtaki.