Emoniseli 8:1-13
8 Mpe ntango ye+ afungolaki elembo ya nsambo,+ likoló efandi nyɛɛ na boumeli soki ya ndambo ya ngonga moko.
2 Mpe namonaki baanzelu nsambo+ oyo batɛlɛmi liboso ya Nzambe, mpe bapesaki bango bakelelo nsambo.
3 Mpe anzelu mosusu ayaki mpe atɛlɛmaki na etumbelo,+ azalaki na esaleli ya wolo ya mpaka ya malasi; mpe bapesaki ye ebele ya mpaka ya malasi+ mpo na kopesa yango likabo esika moko na mabondeli ya basantu nyonso likoló ya etumbelo ya wolo oyo ezalaki liboso ya kiti ya bokonzi.
4 Mpe milinga ya mpaka ya malasi eutaki na lobɔkɔ ya anzelu yango emati nzela moko na mabondeli+ ya basantu liboso ya Nzambe.
5 Kasi na mbala moko anzelu yango akamataki esaleli wana ya mpaka ya malasi, mpe atondisaki yango na mwa ndambo ya mɔtɔ+ ya etumbelo wana mpe abwakaki yango na mabele.+ Mpe bankake+ ebɛtaki, mingongo eyokanaki, mikalikali+ ebimaki mpe mabele eninganaki.+
6 Mpe baanzelu nsambo oyo bazalaki na bakelelo+ nsambo+ bamilɛngɛlaki mpo na koyula yango.
7 Mpe oyo ya liboso ayulaki kelelo na ye. Mpe mbula ya mabanga ebɛtaki ná mɔtɔ+ esanganá na makila, mpe ebwakamaki na mabele; mpe moko ya bandambo misato ya mabele ezikaki,+ mpe moko ya bandambo misato ya banzete ezikaki, mpe matiti nyonso ya mobesu+ ezikaki.
8 Mpe anzelu ya mibale ayulaki kelelo na ye. Mpe eloko moko lokola ngomba+ monene oyo ezali kopela mɔtɔ ebwakamaki na mbu.+ Mpe moko ya bandambo misato ya mbu ekómaki makila;+
9 mpe moko ya bandambo misato ya bikelamu oyo ezalaka na mbu oyo ezali na milimo ekufaki,+ mpe moko ya bandambo misato ya bamasuwa ebebaki.
10 Mpe anzelu ya misato ayulaki kelelo na ye. Mpe monzoto moko monene oyo ezalaki kopela lokola mwinda eutaki na likoló ekwei,+ mpe ekwelaki moko ya bandambo misato ya bibale mpe maziba ya mai.+
11 Mpe nkombo ya monzoto yango Mbondo. Mpe moko ya bandambo misato ya mai ekómaki mbondo, mpe bato mingi bakufaki mpo na mai yango, mpo ekómaki bololo.+
12 Mpe anzelu ya minei ayulaki kelelo na ye. Mpe moko ya bandambo misato ya moi ná moko ya bandambo misato ya sanza ná moko ya bandambo misato ya minzoto ebebisamaki, mpo moko ya bandambo na yango misato eyinda+ mpe moko ya bandambo misato ya mokolo ezala na pole te na moi,+ ná butu mpe ndenge moko.
13 Mpe namonaki, mpe nayokaki mpongo+ moko oyo ezalaki kopumbwa na katikati ya likoló+ elobi na mongongo makasi ete: “Mawa, mawa, mawa+ na bato oyo bafandi na mabele mpo na bakelelo oyo etikali oyo baanzelu misato balingi koyula!”+