Emoniseli 22:1-21
22 Mpe alakisaki ngai ebale moko ya mai ya bomoi,+ pɛɛ lokola kristale, ezali kouta na kiti ya bokonzi ya Nzambe mpe ya Mwana-Mpate,+ ekei
2 tii na katikati ya balabala na yango ya monene. Mpe na ngámbo oyo ya ebale mpe na ngámbo mosusu ezalaki na banzete+ ya bomoi oyo ezalaki kobota mbuma mbala zomi na mibale, ezali kopesa mbuma na yango sanza na sanza.+ Mpe nkasa ya banzete wana ezalaki mpo na kobikisa bikólo.+
3 Mpe elakeli mabe ata moko ekozala lisusu te.+ Kasi kiti ya bokonzi ya Nzambe+ mpe ya Mwana-Mpate+ ekozala na engumba wana, mpe baombo na ye bakosalela ye mosala mosantu;+
4 mpe bakomona elongi na ye,+ mpe nkombo na ye ekozala na bilongi na bango.+
5 Mpe butu ekozala lisusu te,+ mpe bazali na mposa ya pole ya mwinda te mpe ya pole ya moi te, mpo Yehova Nzambe akosopela bango pole,+ mpe bakoyangela libela na libela.+
6 Mpe alobaki na ngai ete: “Maloba wana ezali sembo mpe solo;+ ɛɛ, Yehova Nzambe oyo alobaka+ na nzela ya basakoli+ atindaki anzelu na ye mpo na kolakisa baombo na ye makambo oyo esengeli kosalema nsima ya mwa ntango moke.+
7 Mpe talá! Nazali koya nokinoki.+ Esengo na moto oyo azali kotosa maloba ya esakweli ya rulo oyo.”+
8 Ya solo, ngai Yoane nde moto nazalaki koyoka mpe komona makambo wana. Mpe ntango nasilisaki koyoka mpe komona, nakweaki mpo na kosambela+ na makolo ya anzelu oyo azalaki kolakisa ngai makambo yango.
9 Kasi ayebisi ngai ete: “Kebá! Kosala bongo te! Nazali kaka moninga na yo moombo mpe moninga ya bandeko na yo oyo bazali basakoli+ mpe ya baoyo bazali kotosa maloba ya rulo oyo. Sambelá Nzambe.”+
10 Ayebisi ngai lisusu ete: “Kobomba maloba ya esakweli ya rulo oyo te, mpo ntango oyo etyamá ekómi pene.+
11 Moto oyo azali kosala makambo ya kozanga boyengebene, asala lisusu makambo ya kozanga boyengebene;+ mpe moto ya mbindo akóma lisusu mbindo;+ kasi moyengebene+ asala lisusu boyengebene, mpe mosantu akóma lisusu mosantu.+
12 “‘Talá! Nazali koya nokinoki,+ mpe nazali na mbano+ ya kopesa, mpo na kozongisela moto na moto ndenge mosala na ye ezali.+
13 Ngai nazali Alfa ná Omega,+ moto ya liboso mpe moto ya nsuka,+ ebandeli mpe nsuka.
14 Esengo na baoyo bazali kosukola bazambala na bango,+ mpo bázala na lotomo ya kokende na banzete ya bomoi+ mpe bázwa nzela ya kokɔta na engumba mosantu na baporte na yango.+
15 Bambwa+ ná baoyo basalaka misala ya bilimo mabe+ ná bato ya pite+ ná babomi-bato ná basambeli ya bikeko mpe moto nyonso oyo alingá mpe amipesá na lokuta+ bazali libándá.’
16 “‘Ngai, Yesu, natindaki anzelu na ngai atatwela bino makambo wana mpo na masangá. Nazali mosisa+ mpe mwana+ ya Davidi, mpe monzoto ya ntɔngɔ oyo engɛngaka.’”+
17 Mpe elimo+ ná mwasi ya libala+ bazali se koloba ete: “Yaká!” Mpe tiká moto nyonso oyo ayoki aloba: “Yaká!”+ Mpe tiká moto nyonso oyo azali na mposa ya mai aya;+ tiká moto nyonso oyo alingi, akamata mai ya bomoi ofele.+
18 “Nazali kotatwela moto nyonso oyo azali koyoka maloba ya esakweli ya rulo oyo ete: Soki moto abakisi likambo mosusu+ na makambo oyo, Nzambe akobakisela ye malɔzi+ oyo ekomami na rulo oyo;
19 mpe soki moto alongoli liloba moko na maloba ya rulo ya esakweli oyo, Nzambe akolongola likabo na ye na makambo oyo ekomami na rulo oyo—akopesa ye nzela te ya kolya mbuma ya banzete ya bomoi+ mpe ya kokɔta na engumba mosantu.+
20 “Oyo azali kotatola makambo oyo alobi ete: ‘Ya solo; nazali koya nokinoki.’”+
“Amen! Yaká, Nkolo Yesu.”
21 Boboto monene ya Nkolo Yesu Kristo ezala na basantu.+