Emoniseli 16:1-21

16  Mpe nayokaki mongongo moko ya makasi+ euti na esika mosantu elobi na baanzelu yango nsambo ete: “Bókende kosopa mabakuli nsambo ya nkanda+ ya Nzambe na mabele.”  Mpe oyo ya liboso+ akendaki asopi kibakuli na ye na mabele.+ Mpe mpota moko ya mabe mpe oyo elyaka nzoto+ ebimelaki bato oyo bazalaki na elembo ya nyama mabe+ wana mpe baoyo bazalaki kosambela elilingi na yango.+  Mpe oyo ya mibale+ asopaki kibakuli na ye na mbu.+ Mpe ekómaki makila+ lokola oyo ya moto oyo akufi, mpe milimo nyonso ya bomoi ekufaki, ɛɛ, biloko oyo ezalaki na mbu.+  Mpe oyo ya misato+ asopaki kibakuli na ye na bibale+ mpe na maziba ya mai. Mpe ekómaki makila.+  Mpe nayokaki anzelu ya mai alobi ete: “Yo Oyo ozali mpe ozalaki,+ Moto ya sembo,+ ozali moyengebene, mpo ozwi bikateli wana,+  mpo basopaki makila ya basantu mpe ya basakoli,+ mpe opesi bango makila+ bámɛla. Babongi na yango.”+  Mpe nayokaki etumbelo elobi ete: “Ɛɛ, Yehova Nzambe, Mozwi-ya-Nguya-Nyonso,+ bikateli ya lisambisi na yo ezali solo mpe boyengebene.”+  Mpe oyo ya minei+ asopelaki moi kibakuli na ye; mpe bapesaki moi nzela ya kozikisa+ bato na mɔtɔ.  Mpe bato bazikaki na molunge makasi, kasi bafingaki nkombo+ ya Nzambe, oyo azali na bokonzi+ likoló ya malɔzi wana, mpe babongolaki mitema te mpo bákumisa+ ye. 10  Mpe oyo ya mitano asopaki kibakuli na ye na kiti ya bokonzi ya nyama mabe.+ Mpe bokonzi na ye ekómaki molili,+ mpe babandaki komiswa lolemo na mpasi, 11  kasi bafingaki+ Nzambe ya likoló mpo na mpasi na bango mpe mpo na bampota na bango, mpe babongolaki mitema te, batikaki misala na bango te. 12  Mpe oyo ya motoba+ asopaki kibakuli na ye na ebale monene Efrate,+ mpe mai na yango ekaukaki,+ mpo nzela ebongisama mpo na bakonzi+ oyo bauti epai moi ebimaka. 13  Mpe namonaki maloba misato ya elimo ya mbindo+ oyo ezalaki lokola mbemba+ ezali kobima na monɔkɔ ya dragɔ+ mpe na monɔkɔ ya nyama mabe+ mpe na monɔkɔ ya mosakoli ya lokuta.+ 14  Ya solo, yango ezali maloba oyo euti+ na bademo mpe ezali kosala bilembo,+ mpe ezali kokende epai ya bakonzi+ ya mabele mobimba esika bato bafandi,+ mpo na koyanganisa bango mpo na etumba+ ya mokolo monene+ ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.+ 15  “Talá! Nazali koya lokola moyibi.+ Esengo na moto oyo alali mpɔngi te+ mpe azali kobatela bilamba na ye ya likoló, mpo atambola bolumbu te mpe bátala nsɔni na ye te.”+ 16  Mpe bayanganisaki bango na esika oyo babengi na Ebre ete Har–Magedone.+ 17  Mpe oyo ya nsambo asopelaki mopɛpɛ+ kibakuli na ye. Bongo mongongo moko ya makasi+ ebimaki na esika mosantu, euti na kiti ya bokonzi, elobi ete: “Esalemi!” 18  Mpe mikalikali ebimaki, mpe mingongo eyokanaki, mpe bankake ebɛtaki, mpe mabele eninganaki makasi mpenza+ na ndenge oyo esalemá naino te banda bato bazali na mabele,+ mabele eninganaki makasi,+ makasi mpenza. 19  Mpe engumba monene+ ekabwanaki na biteni misato, mpe bingumba ya bikólo ekweaki; mpe Nzambe akanisaki Babilone Monene,+ mpo na kopesa yango kɔpɔ ya vinyo ya nkanda na ye makasi.+ 20  Lisusu, bisanga nyonso ekimaki, mpe bangomba emonanaki te.+ 21  Mpe mbula ya mabanga ya monene,+ oyo libanga mokomoko ezalaki na kilo soki ya talanta* moko, eutaki na likoló ekiteli bato, mpe bato yango bafingaki+ Nzambe mpo na bolɔzi wana ya mbula ya mabanga,+ mpo bolɔzi yango ezalaki monene mpenza.

Maloba na nse

Pene na kilo 20,4.