Emoniseli 6:1-17
6 Mpe namonaki ntango Mwa-na-Mpate+ afungolaki moko ya bilembo yango nsambo,+ mpe nayokaki moko ya bikelamu yango minei ya bomoi+ elobi na mongongo lokola ya nkake ete: “Yaká!”+
2 Mpe namonaki, mpe talá! mpunda moko ya mpɛmbɛ;+ mpe moto oyo afandi+ likoló na yango azali na litimbo;+ mpe bapesaki ye motole,+ mpe abimaki azali kolonga+ mpe mpo na kolonga tii na nsuka.+
3 Mpe ntango afungolaki elembo ya mibale, nayokaki ekelamu ya mibale ya bomoi+ elobi: “Yaká!”
4 Mpe mosusu ebimaki, mpunda moko ya langi ya motane ngwaa; mpe bapesaki moto oyo afandi likoló na yango nzela ya kolongola kimya na mabele mpo bato bábomana; mpe bapesaki ye mopanga moko monene.+
5 Mpe ntango ye+ afungolaki elembo ya misato, nayokaki ekelamu ya misato ya bomoi+ elobi: “Yaká!” Mpe namonaki, mpe talá! mpunda moko ya moindo; mpe moto oyo afandi likoló na yango azalaki na emekeli-kilo+ na lobɔkɔ na ye.
6 Mpe nayokaki mongongo moko lokola nde na katikati+ ya bikelamu yango minei ya bomoi+ elobi: “Kilo moko ya blé denari moko,+ mpe kilo misato ya ɔrje denari moko; mpe kobebisa mafuta ya olive ná vinyo te.”+
7 Mpe ntango afungolaki elembo ya minei, nayokaki mongongo ya ekelamu ya minei ya bomoi+ elobi: “Yaká!”
8 Mpe namonaki, mpe talá! mpunda moko ya langi mwa moke lokola mai ya mpɔndu; mpe moto oyo afandaki likoló na yango nkombo na ye Liwa. Mpe Nkunda*+ ezalaki kolanda ye penepene. Mpe bapesaki bango bokonzi likoló ya moko ya bandambo minei ya mabele, mpo na koboma na mopanga+ moko ya molai mpe na nzala+ mpe na bolɔzi ya liwa mpe na banyama mabe+ ya mabele.
9 Mpe ntango afungolaki elembo ya mitano, namonaki na nse ya etumbelo+ milimo+ ya bato oyo babomamaki+ mpo na liloba ya Nzambe mpe mpo na mosala ya kotatola+ oyo bazalaki na yango.
10 Mpe bagangaki na mongongo makasi ete: “Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso+ oyo azali mosantu mpe oyo alobaka solo,+ tii ntango nini okokanga motema mpo na kosambisa+ mpe kozongisela bato oyo bafandi na mabele mabe mpo na makila na biso?”+
11 Mpe bapesaki mokomoko na bango zambala moko ya mpɛmbɛ;+ mpe bayebisaki bango ete bápema mwa moke lisusu, tii ntango oyo motángo ya baninga na bango baombo mpe ya bandeko na bango oyo bazalaki pene ya kobomama+ lokola bango ekokoka.
12 Mpe namonaki ntango afungolaki elembo ya motoba, mpe mabele eninganaki makasi mpenza; mpe moi ekómaki moindo lokola ngɔtɔ+ ya moindo,* mpe sanza mobimba ekómaki lokola makila,+
13 mpe minzoto ya likoló ekweaki na mabele, lokola ntango nzete ya figi oyo eningani na mopɛpɛ makasi ekweisaka bafigi na yango oyo eteli te.
14 Mpe likoló elongwaki lokola rulo oyo ezali kolíngama,+ mpe ngomba nyonso mpe esanga nyonso elongwaki na bisika na yango.+
15 Mpe bakonzi ya mabele, ná bato ya bibonga minene, ná bakomanda ya basoda, ná bazwi, ná bato ya makasi, ná moombo nyonso, ná moto nyonso ya bonsomi bamibombaki na kati ya mibenga mpe na kati ya mabanga+ ya bangomba.
16 Mpe bazali kokoba koloba na bangomba mpe na mabanga ete: “Bókwela biso+ mpe bóbomba biso liboso ya elongi ya Oyo afandi na kiti ya bokonzi+ mpe liboso ya nkanda ya Mwana-Mpate,+
17 mpo mokolo monene+ ya nkanda+ na bango eyei, mpe nani akoki kotɛlɛma?”+
Maloba na nse
^ To, “Hadesi.” Talá Ap 4.
^ Ezali elamba ya moindo oyo basali na nsuki ya nyama mpe bazalaki kosala na yango basakosi.