Emoniseli 10:1-11
10 Mpe namonaki anzelu mosusu ya makasi+ azali kokita na likoló, alati lipata,+ mpe monama ezalaki na motó na ye, mpe elongi na ye ezalaki lokola moi,+ mpe makolo na ye+ ezalaki lokola makonzí ya mɔtɔ,
2 mpe asimbaki rulo moke oyo efungwamá na lobɔkɔ. Mpe atyaki lokolo na ye ya mobali na mbu, kasi lokolo na ye ya mwasi na mabele,+
3 mpe agangaki na mongongo makasi ndenge nkɔsi+ egangaka. Mpe ntango agangaki, bankake+ nsambo ebimisaki mingongo na yango mpenza.
4 Bongo ntango bankake yango nsambo elobaki, nalingaki kokoma; kasi nayokaki mongongo moko euti na likoló+ elobi: “Bombá makambo+ oyo bankake nsambo elobi, mpe kokoma yango te.”
5 Mpe anzelu oyo namonaki atɛlɛmi na mbu mpe na mabele atombolaki lobɔkɔ na ye ya mobali na likoló,+
6 mpe alapaki ndai na nkombo ya Oyo azali na bomoi+ libela na libela,+ oyo azalisaki likoló ná biloko oyo ezali na kati na yango mpe mabele+ ná biloko oyo ezali na kati na yango mpe mbu ná biloko oyo ezali na kati na yango,+ alobi: “Ntango ya kozela ekozala lisusu te;+
7 kasi na mikolo oyo anzelu ya nsambo+ akoyula, ntango akokóma pene ya koyula kelelo na ye,+ sekele mosantu+ ya Nzambe ekokokisama mpenza na kolanda nsango malamu oyo asakwelaki baombo na ye basakoli.”+
8 Mpe mongongo+ oyo nayokaki euti na likoló esololi na ngai lisusu mpe elobi ete: “Kende, kamatá rulo wana oyo efungwami oyo ezali na lobɔkɔ ya anzelu oyo atɛlɛmi na mbu mpe na mabele.”+
9 Mpe nakendaki epai ya anzelu yango mpe nayebisaki ye apesa ngai rulo yango ya moke. Mpe alobaki na ngai ete: “Kamatá yango mpe lyá yango,+ mpe ekokómisa libumu na yo bololo, kasi na monɔkɔ na yo ekozala elɛngi lokola mafuta ya nzoi.”
10 Mpe nakamataki rulo wana ya moke na lobɔkɔ ya anzelu yango mpe nalyaki yango,+ mpe na monɔkɔ na ngai ezalaki elɛngi lokola mafuta ya nzoi;+ kasi ntango nalyaki yango, libumu na ngai ekómaki bololo.
11 Mpe balobi na ngai ete: “Osengeli kosakola lisusu mpo na bato ya mikili mpe bikólo mpe minɔkɔ mpe bakonzi mingi.”+