Emoniseli 7:1-17
7 Nsima na yango namonaki baanzelu+ minei batɛlɛmi na nsuka minei ya mabele, basimbi makasi mipɛpɛ+ minei ya mabele, mpo mopɛpɛ epɛpa te na mabele to na mbu to mpe na nzete moko te.+
2 Mpe namonaki anzelu mosusu auti epai moi ebimaka+ azali komata, azalaki na elembo ya Nzambe ya bomoi;+ mpe abelelaki na mongongo makasi baanzelu minei oyo bapesamaki nzela ya kobebisa mabele ná mbu,
3 alobi: “Bóbebisa mabele to mbu to banzete te, tii ntango tokosilisa kotya baombo ya Nzambe na biso bilembo+ na bilongi na bango.”+
4 Mpe nayokaki motángo ya bato oyo batyamaki elembo, nkóto nkama moko na ntuku minei na minei (144 000),+ oyo batyamaki elembo na mabota nyonso+ ya bana ya Yisraele:+
5 Na libota ya Yuda,+ bato nkóto zomi na mibale (12 000) batyamaki elembo;na libota ya Rubene+ bato nkóto zomi na mibale;na libota ya Gade+ bato nkóto zomi na mibale;
6 na libota ya Ashere+ bato nkóto zomi na mibale (12 000);na libota ya Nafatali+ bato nkóto zomi na mibale;na libota ya Manase+ bato nkóto zomi na mibale;
7 na libota ya Simeone+ bato nkóto zomi na mibale (12 000);na libota ya Levi+ bato nkóto zomi na mibale;na libota ya Isakare+ bato nkóto zomi na mibale;
8 na libota ya Zebulone+ bato nkóto zomi na mibale (12 000);na libota ya Yozefe+ bato nkóto zomi na mibale;na libota ya Benyamina+ bato nkóto zomi na mibale batyamaki elembo.+
9 Nsima ya makambo wana namonaki, mpe talá! ebele mpenza ya bato,+ oyo ata moto moko te akokaki kotánga, bauti na bikólo nyonso+ mpe na mabota nyonso mpe na bato ya mikili nyonso+ mpe na minɔkɔ nyonso,+ batɛlɛmi liboso ya kiti ya bokonzi+ mpe liboso ya Mwana-Mpate, balati bazambala ya mpɛmbɛ;+ mpe basimbi mandalala+ na mabɔkɔ.
10 Mpe bazali kokoba koganga na mongongo makasi ete: “Lobiko na biso euti na Nzambe na biso,+ oyo afandi na kiti ya bokonzi,+ mpe na Mwana-Mpate.”+
11 Mpe baanzelu+ nyonso batɛlɛmaki zingazinga ya kiti ya bokonzi mpe ya bankulutu+ mpe ya bikelamu minei ya bomoi,+ mpe bakweaki bilongi na nse liboso ya kiti ya bokonzi mpe basambelaki Nzambe,+
12 balobi: “Amen! Lipamboli, ná nkembo, ná bwanya, ná matɔndi, ná lokumu, ná nguya,+ ná makasi ezala na Nzambe na biso libela na libela. Amen.”+
13 Bongo moko ya bankulutu+ alobaki na ngai ete: “Baoyo balati bazambala ya mpɛmbɛ,+ bazali banani mpe bauti wapi?”
14 Na mbala moko nalobaki na ye ete: “Nkolo na ngai, yo nde moto oyebi.” Mpe ye alobaki na ngai ete: “Bango bazali bato oyo bauti na bolɔzi monene,+ mpe basukoli bazambala na bango mpe bakómisi yango mpɛmbɛ+ na makila+ ya Mwana-Mpate.
15 Yango wana bazali liboso+ ya kiti ya bokonzi ya Nzambe; mpe bazali kosalela ye mosala mosantu+ butu moi na tempelo na ye; mpe Oyo afandi na kiti ya bokonzi+ akotanda hema na ye+ likoló na bango.
16 Bakoyoka lisusu nzala te mpe bakoyoka lisusu mposa ya mai te, moi mpe ekobɛta bango te to molunge makasi mpe te,+
17 mpo Mwana-Mpate,+ oyo azali na katikati ya kiti ya bokonzi, akokamba+ bango, mpe akomema bango na maziba ya mai+ ya bomoi. Mpe Nzambe akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango.”+