Kolimbola Mibeko 9:1-29

  • Ntina oyo Yehova apesaki Yisraele mokili (1-6)

  • Yisraele asilikisi Yehova mbala minei (7-29)

    • Mwana ngɔmbɛ ya wolo (7-14)

    • Moize abondeli mpo na bato (15-21, 25-29)

    • Bayisraele basilikisi Yehova mbala misato mosusu (22)

9  “Yoká, Ee Yisraele, lelo ozali kokatisa Yordani+ mpo na kozwa mokili oyo ezali na bikólo minene mpe ya makasi koleka yo,+ oyo ezali na bingumba minene mpe oyo ebatelami makasi tii na likoló,*+  oyo ezali na bingambe ya bato, bana ya Baanakime,+ oyo oyebi mpe oyo oyokaki bazali koloba mpo na bango ete: ‘Nani akoki kotɛmɛla bana ya Anake?’  Bongo, osengeli koyeba lelo ete Yehova Nzambe na yo akokatisa liboso na yo.+ Azali mɔtɔ oyo ezikisaka+ mpe akosilisa bango nyonso. Na miso na yo akotya bango na nse mpo obengana bango nokinoki mpe osilisa bango, kaka ndenge Yehova apesi yo elaka.+  “Ntango Yehova Nzambe na yo akobengana bango liboso na yo, koloba na motema na yo te ete: ‘Ezali mpo na bosembo* na ngai moko nde Yehova akɔtisi ngai na mokili oyo mpo nazwa yango.’+ Nzokande, ezali mpo na mabe ya bikólo+ yango nde Yehova azali kobengana yango liboso na yo.  Ezali te mpo na boyengebene na yo to mpo na bosembo ya motema na yo nde ozali kokɔta kozwa mokili na bango. Kasi, ezali mpo na mabe ya bikólo yango nde Yehova Nzambe na yo azali kobengana yango liboso na yo,+ mpe mpo na kokokisa liloba oyo Yehova alapaki ndai epai ya bankɔkɔ na yo, Abrahama,+ Yisaka+ mpe Yakobo.+  Na yango, yebá ete ezali te mpo na bosembo na yo nde Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo mokili malamu oyo mpo ozwa yango, mpamba te ozali ekólo ya bato moko ya motó makasi.*+  “Bóbosana ata moke te ndenge bosilikisaki Yehova Nzambe na bino na esobe.+ Banda na mokolo oyo bobimaki na mokili ya Ezipito tii kokóma na bino na esika oyo, bozali kaka kotombokela Yehova.+  Ata na Horebe botumolaki Yehova, mpe Yehova asilikelaki bino tii akómaki pene ya kosilisa bino mpenza.+  Ntango namataki na ngomba mpo na kozwa bitanda ya mabanga,+ bitanda ya kondimana oyo Yehova asalaki ná bino,+ natikalaki na ngomba mikolo 40 butu moi,+ nalyaki eloko te mpe namɛlaki mai te. 10  Bongo Yehova apesaki ngai bitanda mibale ya mabanga oyo ekomami na mosapi ya Nzambe, mpe likoló na yango ezalaki na maloba nyonso oyo Yehova alobelaki bino na ngomba longwa na katikati ya mɔtɔ na mokolo ya liyangani.*+ 11  Na nsuka ya mikolo 40 butu moi, Yehova apesaki ngai bitanda mibale ya mabanga, bitanda ya kondimana, 12  mpe Yehova alobaki na ngai ete: ‘Tɛlɛmá, longwá awa, kitá nokinoki, mpo bato na yo oyo obimisaki na Ezipito basali makambo ya kozanga bosembo.+ Balongwe nokinoki na nzela oyo napesaki bango mitindo ete bálanda. Bamisaleli ekeko ya ebende.’*+ 13  Yehova alobaki na ngai lisusu boye: ‘Namoni bato oyo, mpe talá! bazali mpenza motó makasi.*+ 14  Tiká ngai nasilisa bango nyonso mpe nalongola nkombo na bango na nse ya lola, mpe nakómisa yo ekólo moko ya makasi mpe ya bato mingi koleka bango.’+ 15  “Nsima na yango, nabalukaki mpe nakitaki na ngomba, wana ngomba ezalaki kopela mɔtɔ,+ mpe nasimbaki bitanda mibale ya kondimana na mabɔkɔ na ngai nyonso mibale.+ 16  Bongo natalaki, mpe namonaki ete bosalelaki Yehova Nzambe na bino lisumu! Bomisalelaki ekeko ya mwana-ngɔmbɛ ya ebende.* Bolongwaki nokinoki na nzela oyo Yehova apesaki bino mitindo ete bólanda.+ 17  Na yango, na mabɔkɔ na ngai nyonso mibale, nazwaki bitanda yango nyonso mibale, nabwakaki yango na nse mpe nabukaki yango na miso na bino.+ 18  Mpe nafukamaki elongi na nse liboso ya Yehova, ndenge nasalaki liboso, mikolo 40 butu moi. Nalyaki eloko te mpe namɛlaki mai te,+ mpo na masumu na bino nyonso na ndenge bosalaki mabe na miso ya Yehova mpe bosilikisaki ye. 19  Mpo nabangaki mpenza komona nkanda makasi oyo Yehova asilikelaki bino,+ tii akómaki pene ya kosilisa bino nyonso. Kasi na ntango yango mpe, Yehova ayokelaki ngai.+ 20  “Yehova asilikelaki Arona makasi tii akómaki pene ya koboma ye,+ kasi na ntango yango mpe nabondelaki mpo na Arona. 21  Bongo nazwaki ekeko ya mwana-ngɔmbɛ+ oyo bosalaki, eloko oyo lisumu na bino ebotaki mpe nazikisaki yango na mɔtɔ; natutaki yango, nanikaki yango nyonso tii ekómaki mikemike lokola putulu, mpe nabwakaki putulu yango na mokɛli oyo ezalaki kokita uta na ngomba.+ 22  “Lisusu, na Tabera,+ na Masa,+ mpe na Kibrote-hataava,+ botumolaki nkanda ya Yehova. 23  Ntango Yehova atindaki bino longwa na Kadeshe-barnea,+ alobaki ete: ‘Bómata mpe bózwa mokili oyo nakopesa mpenza bino!’ botombokelaki lisusu etinda ya Yehova Nzambe na bino,+ mpe bondimelaki ye te+ mpe botosaki ye te. 24  Banda nayebá bino, bozali kaka kotombokela Yehova. 25  “Nakobaki kofukama elongi na nse liboso ya Yehova mikolo 40 butu moi.+ Nafukamaki bongo mpo Yehova alobaki ete akosilisa bino nyonso. 26  Nabandaki kobondela Yehova mpe koloba ete: ‘Ee Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, kosilisa bato na yo te. Bazali eloko na yo moko,*+ oyo osikolaki na bonene na yo, mpe obimisaki na Ezipito na nguya ya lobɔkɔ na yo.+ 27  Kanisá basaleli na yo Abrahama, Yisaka mpe Yakobo.+ Kolanda te motó makasi ya bato oyo, mabe na bango mpe lisumu na bango.+ 28  Noki bato ya mokili epai obimisaki biso báloba ete: “Yehova akokaki te kokɔtisa bango na mokili oyo alakaki bango, mpe ayinaki bango, yango wana abimisaki bango mpo na koboma bango na esobe.”+ 29  Mpo bazali bato na yo mpe eloko na yo moko*+ oyo obimisaki na nguya monene mpe na makasi na yo nyonso.’*+

Maloba na nse

Elingi koloba, bifelo ya milai mpenza.
To, “boyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “nkingo makasi.”
To, “lisangá.”
To, “ekeko oyo enyangwisami.”
Lil., “nkingo makasi.”
To, “ebende oyo enyangwisami.”
To, “libula na yo.”
To, “libula na yo.”
Lil., “na lobɔkɔ oyo esembolami.”