Kolimbola Mibeko 33:1-29
33 Sikoyo talá lipamboli oyo Moize, moto ya Nzambe ya solo alobaki epai ya Bayisraele liboso akufa.+
2 Alobaki ete:
“Yehova autaki na Sinai,+Mpe angɛngisaki pole na ye likoló na bango uta na Seire.
Angɛngaki na nkembo uta na etúká ya ngombangomba ya Parane,+Mpe bamiriade basantu*+ bazalaki elongo na ye,Babundi na ye bazalaki na lobɔkɔ na ye ya mobali.+
3 Alingaki bato na ye mingi;+Basantu na bango nyonso bazali na lobɔkɔ na yo,+Ee Nzambe.
Bafandaki na makolo na yo;+Bazalaki koyoka maloba na yo.+
4 (Moize apesaki biso etinda, mobeko,+oyo ezali eloko ya bato* ya Yakobo.)+
5 Mpe Nzambe akómaki mokonzi na Yeshurune,*+Ntango bankumu ya bato bayanganaki,+Ná mabota nyonso ya Yisraele.+
6 Rubene atikala na bomoi mpe akufa te,+Mpe bato na ye bákóma moke te.”+
7 Mpe alobaki lipamboli oyo mpo na Yuda:+
“Ee Yehova, yoká mongongo ya Yuda,+Mpe zongisá ye epai ya bato na ye.
Mabɔkɔ na ye ebundeli eloko oyo ezali ya ye;Mpe salisá ye liboso ya banguna na ye.”+
8 Mpo na Levi alobaki ete:+
“Tumime na yo* mpe Urime*+ na yo ezali ya moto oyo azali sembo epai na yo,+Oyo otyaki na komekama na Masa.+
Obandaki kobunda na ye na mai ya Meriba,+
9 Moto oyo alobaki mpo na tata na ye mpe mama na ye ete: ‘Namoniselaki bango limemya te.’
Ayebaki ata bandeko na ye te,+Mpe atyelaki ata bana na ye moko likebi te.
Mpo babatelaki liloba na yo,Mpe batosaki kondimana na yo.+
10 Tiká bálakisa Yakobo bikateli na yo+Mpe Yisraele Mobeko na yo.+
Bápesa mpaka ya malasi lokola nsolo moko mpo na kosepelisa yo*+Bápesa mpe likabo mobimba na etumbelo na yo.+
11 Ee Yehova, pambolá makasi na ye,Mpe sepelá na mosala ya mabɔkɔ na ye.
Buká makolo* ya baoyo bazali kotɛmɛla ye,Mpo baoyo bazali koyina ye bátɛmɛla ye lisusu te.”
12 Mpo na Benyamina alobaki ete:+
“Moto oyo Yehova alingá afanda na kimya pene na ye;Wana azali kobatela ye mokolo mobimba,Akofanda na katikati ya mapeka na ye.”
13 Mpo na Yozefe alobaki ete:+
“Yehova apambola mokili na ye+Azwa biloko kitoko ya likoló,Mamwɛ* mpe mai oyo ezali kouta na maziba ya nse,+
14 Azwa biloko kitoko oyo euti na moi,Mpe biloko kitoko oyo ebimaka sanza nyonso,+
15 Azwa biloko oyo eleki kitoko ya bangomba ya kala*+Mpe biloko kitoko ya bangomba mike oyo eumelaka,
16 Azwa biloko kitoko ya mabele mpe bomɛngo na yango nyonso,+Mpe kondimama ya Ye oyo azali kofanda na mwa nzete ya nzubɛ.+
Yango ekitela motó ya YozefeNa nsɔngɛ ya motó ya moto oyo akabolamaki na bandeko na ye.+
17 Nkembo na ye ezali lokola oyo ya mwana ya liboso ya ngɔmbɛ-mobali,Mpe maseke na ye ezali maseke ya ngɔmbɛ-mobali ya zamba.
Na maseke yango, akotindika bato ya bikóloBango nyonso tii na nsuka ya mabele.
Bazali bankóto zomi ya bato ya Efraime,+Mpe bazali bankóto ya bato ya Manase.”
18 Mpo na Zebulone alobaki ete:+
“Sepelá, Ee Zebulone, ntango ozali kobima,Mpe yo, Isakare, na bahema na yo.+
19 Bakobenga bato ya bikólo bákende na ngomba.
Kuna bakopesa bambeka ya bosembo.*
Mpo bakotoka* bomɛngo oyo etondani na mbuMpe biloko oyo ebombaná* na zɛlo.”
20 Mpo na Gade alobaki ete:+
“Moto oyo azali kokómisa bandelo ya Gade monene apambwama.+
Alali kuna lokola nkɔsi,Pene ya kolongola lobɔkɔ, ata mpe nsɔngɛ ya motó.
21 Akopona mpo na ye moko eteni ya liboso,+Mpo kuna nde eteni ya mosali-mibeko ebatelami.+
Bankumu ya bato bakoyangana esika moko.
Akokokisa bosembo ya YehovaMpe bikateli* na ye mpo na Yisraele.”
22 Mpo na Dani alobaki ete:+
“Dani azali mwana-nkɔsi ya mobali.+
Akopumbwa utá na Bashane.”+
23 Mpo na Nafatali alobaki ete:+
“Nafatali atondi mpo andimami na YehovaMpe atondi na lipamboli na ye.
Zwá wɛsti ná sudi.”
24 Mpo na Ashere alobaki ete:+
“Nzambe apamboli Ashere na bana ebele.
Bandeko na ye bálinga ye mingi,Azindisa* makolo na ye na mafuta.
25 Bikangeli na yo ya porte ezali ya ebende ná kwivre,+Mpe okobatelama malamu mikolo na yo nyonso ya bomoi.*
26 Moto moko te azali lokola Nzambe ya solo+ ya Yeshurune,+Oyo azali kokatisa likoló mpo na kosalisa yoMpe oyo azali koya likoló ya mapata na lokumu na ye.+
27 Nzambe azali esika ya komibomba kobanda ntango ya kala,+Mabɔkɔ na ye oyo ezali koumela mpo na libela ezali na nse na yo.+
Mpe akobengana monguna liboso na yo,+Mpe akoloba ete: ‘Silisá bango nyɛɛ!’+
28 Yisraele ekofanda na kimya,Mpe liziba ya Yakobo ekobatelama,Na mokili moko ya bilei* mpe ya vinyo ya sika.+Mokili oyo mamwɛ ekotanga uta na likoló.+
29 Esengo na yo, Ee Yisraele!+
Nani azali lokola yo,+Ekólo moko oyo Yehova abikisi,+Ye azali nguba ya libateli+ na yo,Mpe Ye azali mopanga na yo oyo eleki lokumu?
Banguna na yo bakogumbamela yo na kobanga,+Mpe okotambola na mokɔngɔ na bango.”*
Maloba na nse
^ To, “bankóto zomi ya basantu.”
^ Lil., “lisangá.”
^ Elimboli, “moto ya sembo,” titre ya lokumu oyo bapesaki Yisraele.
^ Na vɛrsɛ oyo, “yo,” “otyaki” mpe “obandaki,” ezali kolobela Nzambe.
^ Talá Ndimbola ya maloba (Tumime ná Urime).
^ Lil., “liboso ya zolo na yo.”
^ To, “loketo.”
^ Matangá ya mai oyo ezalaka na milona na ntɔngɔntɔngɔ.
^ To mbala mosusu, “bangomba ya ɛsti.”
^ To, “boyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
^ To, “biloko ya motuya.”
^ Lil., “bakomɛla.”
^ To, “bikateli ya lisambisi.”
^ To, “Asukola.”
^ Lil., “Mpe lokola mikolo na yo ekozala makasi na yo.”
^ Ekoki kozala, “blé to ɔrjɛ.”
^ To mbala mosusu, “bisika oyo etombwaná.”