Kolimbola Mibeko 10:1-22

  • Bitanda mibale esalemi lisusu (1-11)

  • Oyo Yehova azali kosɛnga (12-22)

    • Bangá mpe lingá Yehova (12)

10  “Na ntango yango, Yehova alobaki na ngai ete: ‘Katá bitanda mibale ya mabanga lokola oyo ya liboso,+ mpe matá epai na ngai na ngomba; osengeli mpe kosala sanduku ya mabaya. 2  Mpe nakokoma na bitanda yango maloba oyo ezalaki na bitanda ya liboso, oyo obukaki, mpe okotya yango na kati ya sanduku.’ 3  Bongo nasalaki sanduku na nzete ya akasia mpe nasalaki bitanda mibale ya mabanga lokola oyo ya liboso mpe namataki na ngomba ná bitanda yango mibale na lobɔkɔ na ngai.+ 4  Na nsima, akomaki na bitanda yango maloba oyo akomaki liboso,+ Mibeko Zomi,*+ oyo Yehova alobaki na bino na ngomba, na katikati ya mɔtɔ,+ na mokolo ya liyangani;*+ mpe Yehova apesaki ngai yango. 5  Bongo nabalukaki mpe nakitaki na ngomba+ mpe natyaki bitanda yango na kati ya sanduku oyo nasalaki, esika yango ezalaka, kaka ndenge Yehova apesaki ngai mitindo. 6  “Mpe Bayisraele balongwaki na Beerote Bene-yaakane bakei na Mosera. Kuna Arona akufaki mpe bakundaki ye,+ mpe mwana na ye, Eleazare abandaki kosala mosala ya nganga-nzambe na esika na ye.+ 7  Balongwaki wana bakei na Gudegoda, mpe balongwaki na Gudegoda bakei na Yotebata,+ mokili moko ya mikɛli oyo ezali na mai mingi.* 8  “Na ntango yango, Yehova atyaki libota ya Levi+ pembeni mpo na komema sanduku ya kondimana ya Yehova,+ mpo na kotɛlɛma liboso ya Yehova, mpo na kosalela ye mpe kopambola bato na nkombo+ na ye, ndenge basalaka na mokolo ya lelo. 9  Yango wana, bapesaki Levi likabo te to libula te esika moko na bandeko na ye. Yehova azali libula na ye, kaka ndenge Yehova Nzambe na yo alobaki na ye.+ 10  Mpe ngai natikalaki na ngomba kaka ndenge nasalaki liboso, mikolo 40 butu moi,+ mpe Yehova ayokelaki ngai lisusu na libaku yango.+ Yehova alingaki te koboma yo. 11  Na nsima, Yehova alobaki na ngai ete: ‘Kende mpe kambá bato, mpo bákɔta mpe bázwa mokili oyo nalapelaki bankɔkɔ na bango ndai ete nakopesa bango.’+ 12  “Sikoyo, Ee Yisraele, eloko nini Yehova Nzambe na yo azali kosɛnga yo?+ Kaka oyo: kobanga Yehova Nzambe na yo,+ kotambola na banzela na ye nyonso,+ kolinga ye, kosalela Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo* na yo mobimba,+ 13  mpe kobatela mitindo ná mibeko ya Yehova oyo nazali kopesa yo lelo, mpo na bolamu na yo moko.+ 14  Talá: Likoló, ɛɛ esika eleki mpenza likoló, mpe mabele ná nyonso oyo ezali na kati ezali ya Yehova Nzambe na yo.+ 15  Kasi, Yehova akangamaki kaka na bankɔkɔ na yo mpe amoniselaki bango bolingo; mpe na kati ya bato ya bikólo nyonso aponaki bino, libota na bango,+ mpe lelo bozali bato na ye. 16  Bosengeli sikoyo kopɛtola* mitema na bino+ mpe bótika kozala motó makasi.*+ 17  Mpo Yehova Nzambe na bino azali Nzambe ya banzambe+ mpe Nkolo ya bankolo, Nzambe monene, ya nguya mpe ya nsɔmɔ, oyo aponaka bilongi te+ mpe andimaka kanyaka te. 18  Akataka na bosembo likambo ya mwana oyo tata akufá ná ya mwasi oyo mobali akufá+ mpe alingaka moto oyo afandi mopaya,+ mpe apesaka ye bilei ná elamba. 19  Bosengeli kolinga moto oyo afandi mopaya, mpo bino mpe bofandaki bapaya na mokili ya Ezipito.+ 20  “Okobanga Yehova Nzambe na yo, okosalela ye,+ okokangama na ye, mpe okolapa ndai na nkombo na ye. 21  Ye nde osengeli kosanzola.+ Azali Nzambe na yo, oyo asaleli yo makambo oyo nyonso ya minene mpe ya nsɔmɔ, oyo omoni na miso na yo moko.+ 22  Bankɔkɔ na yo bakitaki na Ezipito bato* 70,+ mpe sikoyo Yehova Nzambe na yo akómisi yo ebele lokola minzoto ya likoló.+

Maloba na nse

Lil., “Maloba Zomi.”
To, “lisangá.”
To, “bawadi ya mai.”
Lil., “kokata mosutu ya.”
Lil., “kokómisa nkingo na bino makasi.”
To, “milimo.”