Kolimbola Mibeko 22:1-30
22 “Soki omoni ngɔmbɛ to mpate ya ndeko na yo ebungi nzela, kosala te lokola omoni yango te.+ Osengeli mpenza kozongisa yango epai ya ndeko na yo.
2 Kasi soki ndeko na yo afandaka pene na yo te to oyebi ye te, okomema nyama yango epai na yo, ekotikala wana tii ndeko na yo akoluka yango. Mpe okozongisela ye yango.+
3 Okosala mpe bongo mpo na mpunda na ye, elamba na ye, eloko nyonso ya ndeko na yo oyo ebungi mpe oyo yo omoni. Osengeli te kosala lokola nde omoni yango te.
4 “Soki omoni mpunda to ngɔmbɛ ya ndeko na yo ekwei na nzela, osengeli kosala te lokola nde omoni yango te. Okosalisa mpenza ndeko na yo mpo na kotɛlɛmisa nyama yango.+
5 “Mwasi asengeli te kolata elamba ya mobali, mpe mobali asengeli te kolata elamba ya mwasi. Mpo moto nyonso oyo asali bongo Yehova Nzambe na yo akoyina ye.
6 “Soki omoni zumbu* ya ndɛkɛ moko na nzela ezali na bana to na maki, ezala na nzete to na mabele, mpe mama afandeli bana to maki, osengeli te kozwa mama ná bana.+
7 Okotika mpenza mama akende, kasi okoki kozwa bana. Salá bongo mpo makambo na yo etambola malamu mpe ozala na bomoi molai.
8 “Soki otongi ndako ya sika, osengeli mpe kosala efelo ya libateli mpo na nsamba*+ na yo, mpo yo ná bato ya libota na yo bómema ngambo ya makila te soki moto moko akwei uta na nsamba mpe akufi.
9 “Osengeli te kolona mboto ya mitindo mibale na elanga na yo ya vinyo.+ Noki mbuma nyonso oyo mboto yango ekobimisa oyo okolona mpe mbuma ya elanga ya vinyo ebɔtɔlama mpe epesama na esika mosantu.
10 “Osengeli te kokangisa ngɔmbɛ ná mpunda esika moko+ mpo na kosalisa yango mosala ya kobalola mabele ya elanga.
11 “Osengeli te kolata elamba oyo esalemi na lɛnɛ ná lini oyo esangisami esika moko.+
12 “Okosala mbuma ya malenda na nsuka minei ya elamba na yo oyo okolata.+
13 “Soki mobali moko abali mwasi, asangisi na ye nzoto, kasi na nsima akómi koyina ye,*
14 mpe afundi ye ete azalaki na etamboli ya mabe, abebisi lokumu na ye mpe alobi ete: ‘Talá mwasi oyo nabalaki, kasi nsima ya kosangisa na ye nzoto, eloko moko te emonisi ete azalaki ngɔndɔ,’
15 boye tata ná mama ya mwana mwasi bakomonisa epai ya bankulutu na porte ya engumba likambo oyo endimisi bongɔndɔ ya mwana mwasi yango.
16 Tata ya mwana mwasi yango asengeli koloba na bankulutu ete: ‘Napesaki mwana na ngai ya mwasi epai ya mobali oyo mpo azala mwasi na ye, mpe ye azali koyina ye*
17 mpe azali kofunda ye ete azalaki na etamboli ya mabe, alobi ete: “Nakutaki eloko moko te oyo emonisi ete mwana na yo ya mwasi azalaki ngɔndɔ.” Sikoyo bótala eloko oyo ezali komonisa bongɔndɔ ya mwana na ngai ya mwasi.’ Basengeli kotanda elamba yango liboso ya bankulutu ya engumba.
18 Bankulutu ya engumba+ bakozwa mobali yango mpe bakopesa ye etumbu.+
19 Bakofutisa ye lomande ya shekele* ya palata 100 mpe bakopesa yango tata ya mwana mwasi, mpo mobali yango asambwisi ngɔndɔ moko ya Yisraele,+ mpe akokoba kozala mwasi na ye. Mobali yango akozala na lotomo te ya koboma libala ná ye ntango nyonso oyo akozala na bomoi.
20 “Kasi, soki efundeli yango ezali solo ete bakuti eloko moko te oyo emonisi ete mwana mwasi yango azalaki ngɔndɔ,
21 bakomema mwana mwasi yango na ekɔtelo ya ndako ya tata na ye, mpe mibali ya engumba na ye bakobamba ye mabanga tii akokufa, mpo asali likambo moko ya nsɔni+ na Yisraele ndenge asalaki pite* na ndako ya tata na ye.+ Osengeli kolongola oyo ezali mabe epai na yo.+
22 “Soki bakuti mobali moko azali kolala na mwasi ya mobali mosusu, bango mibale basengeli kokufa, mobali oyo alali na mwasi mpe mwasi yango.+ Osengeli kolongola oyo ezali mabe na Yisraele.
23 “Soki ngɔndɔ moko alakami libala na mobali moko, mpe mobali mosusu akutani na ye na engumba mpe alali na ye,
24 bokomema bango mibale na porte ya engumba yango mpe bokobamba bango mabanga tii bakokufa, mwana mwasi mpo agangaki te na kati ya engumba, mpe mobali mpo asambwisi mwasi ya moninga na ye.+ Osengeli kolongola oyo ezali mabe epai na yo.
25 “Nzokande, soki mobali akuti na zamba mwana mwasi oyo alakami libala, mpe mobali yango akangi ye na makasi mpe alali na ye, mobali yango kaka nde asengeli kokufa,
26 mpe osengeli kosala mwana mwasi eloko te. Asali lisumu te oyo ebongi na liwa. Likambo yango ezali kaka lokola ntango mobali moko abundisi moninga na ye mpe abomi ye.*+
27 Mpo mobali akutaki ye na zamba, mpe mwana mwasi oyo alakami libala agangaki, kasi moto ya kobikisa ye azalaki te.
28 “Soki mobali moko akutani na mwana mwasi moko, ngɔndɔ oyo alakami libala te, soki akangi ye na makasi mpe alali na ye, mpe bakuti bango,+
29 mobali oyo alali na ye asengeli kopesa tata ya mwana mwasi yango shekele ya palata 50, mpe akokóma mwasi na ye.+ Lokola asambwisi ye, akozala na lotomo te ya koboma libala na mwasi yango ntango nyonso oyo akozala na bomoi.
30 “Moto moko te akozwa mwasi ya tata na ye, noki asambwisa tata na ye.*+
Maloba na nse
^ To, “zála.”
^ Na ntango wana, bandako mingi ezalaki na nsamba ya patatalu esika bato bazalaki koyamba bapaya, kozwa mopɛpɛ, to mpe kolala.
^ To, “na nsima aboyi ye.”
^ To, “aboyi ye.”
^ To, “bondumba.”
^ To, “abomi molimo na ye.”
^ Lil., “noki alongola elamba ya tata na ye.”