Lakisá makambo oyo ezali na kati

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Ezali malamu kosala makambo mingi na mbala moko?

Ezali malamu kosala makambo mingi na mbala moko?

 Omesaná kosala makambo mingi na mbala moko?

 Omesaná kosala makambo mingi na mbala moko? Bato mingi bakanisaka ete bana oyo bazali kokola na makambo ya teknoloji, bakoki komesana kosala makambo mingi na mbala moko koleka bato ya kala, oyo bazali koyekola makambo ya teknoloji ntango bakómi mikóló. Ezali mpenza solo?

 SOLO to LOKUTA?

  •   Kosala makambo mingi na mbala moko esalisaka yo osala makambo na lombangu.

  •   Soki omesani, okoki kokóma kosala makambo mingi na mbala moko.

  •   Bilenge bakoki kosala makambo mingi na mbala moko koleka baoyo bakómi mikóló.

 Soki eyano na yo ezali “solo” na makambo oyo touti kolobela, mbala mosusu ozwami na motambo na likambo etali “makanisi ya bato mingi na oyo etali kosala makambo mingi na mbala moko.”

 Makanisi ya bato mingi na oyo etali kosala makambo mingi na mbala moko

 Okanisaka ete okoki kosala makambo mibale na mbala moko? Okoki kozala na likoki ya kosangisa mwa makambo kozanga ete olongola likebi na yo. Na ndakisa, soki ozali koyoka miziki wana ozali kopɛtola shambrɛ na yo, na ntembe te, shambrɛ ekomonana pɛto.

 Kasi soki ozali kosala makambo mibale oyo esɛngaka kotya likebi, ekozala mpasi osala yango mibale malamu. Yango wana mpo na oyo etali kosala makambo mingi na mbala moko, elenge mwasi moko na nkombo Katherine alobi boye: “Ezali likoki ya kosala makambo na mobulu na mbala moko.”

 “Nazalaki kosolola na moto moko mpe kaka na ntango yango nasengelaki koyanola na mesaje oyo batindelaki ngai. Namekaki kosala yango nyonso mibale na mbala moko. Yango wana, nakangaki te ntina ya makambo mingi oyo moto tozalaki kosolola na ye azalaki koloba mpe nakomaki mesaje yango na bafoti mingi.”​—Caleb.

 Sherry Turkle, moto moko ya mayele na likambo etali teknoloji akomi boye: “Ntango tokanisaka ete tozali na makoki ya kosala makambo mingi malamu na mbala moko, . . . mpe mbala nyonso oyo tobakisaka likambo mosusu na oyo tozali kosala, makoki na biso ya kosala makambo malamu ekitaka. Kosala makambo mingi na mbala moko etindaka bɔɔngɔ na biso ekanisa ete tozali kosala makambo malamu koleka, nzokande tozali kosala yango mabe koleka.” a

 “Na bantango mosusu, ntango nazali kokomela moto mesaje mpe na ntango yango kaka nazali kosolola na moto mosusu, nakanisaka ete nazali kosala yango malamu. Na nsima nayaka koyeba ete makambo oyo nasengelaki koloba na mongongo makasi nazalaki kokoma na mesaje mpe makambo oyo nasengelaki kokoma na mesaje nazalaki koloba na mongongo makasi!”​—Tamara.

 Bato oyo balingaka kosala makambo mingi na mbala moko bakómisaka bomoi kaka mpasi bango moko. Na ndakisa, mbala mingi ezwaka bango ntango mingi mpo básilisa badevuare na bango. To bakoki kolekisa lisusu ntango mpo na kozongela mosala oyo basalaki oyo bakanisaki ete basilisaki yango. Ezala ndenge nini, bato oyo basalaka makambo mingi na mbala moko bazalaka lisusu na ntango mingi te mpo na kosala makambo mosusu oyo balingi!

 Yango wana, Thomas Kersting, monganga moko ya maladi ya motó mpe mopesi-toli na eteyelo moko alobi boye: “Soki bɔɔngɔ ezalaka armware esika oyo babombaka mikanda, bɔɔngɔ ya bato oyo basalaka makambo mingi na mbala moko, elingaki kozala na mobulu mingi na kati.” b

 Soki ozali kosala makambo mingi na mbala moko, okobosana makambo mingi ya ntina oyo osengeli kotyela likebi. Na yango, okokóma na misala makasi mpe okozala na ntango te ya kosala yango.”​—Teresa.

Koluka kosala makambo mingi na mbala moko ezali lokola koluka kotambwisa motuka moko na balabala mibale na mbala moko

 Lolenge eleki malamu ya kosala

  •   Yekolá ndenge ya kotya makanisi na yo nyonso na mosala moko. Yango ekoki kozala mokakatano, mingimingi soki omesaná kosangisa makambo mingi na mbala moko, na ndakisa, koyekola ná kokoma mesaje. Kasi Biblia eyebisi biso ‘tóluka koyeba mpenza makambo oyo eleki ntina.’ (Bafilipi 1:10) Makambo nyonso oyo tosalaka ezalaka na valɛrɛ ndenge moko te. Na yango, poná oyo osengeli kosala liboso, mpe tyá kaka makanisi na yo na likambo oyo ozali kosala tii okosilisa yango.

     “Makanisi ya moto oyo ezali koyengayenga ezali lokola mwana moke; na bantango mosusu esɛngaka kopekisa makanisi yango, ata soki ekoki komonana pɛtɛɛ kotika yango esala oyo elingi.”​—Maria.

  •   Longolá makambo nyonso oyo ekoki kolongola likebi na yo. Omekaka kotala telefone na yo ntango ozali koyekola? Tyáká yango na shambrɛ mosusu. Kangáká TV, mpe kokanisaka te bamesaje oyo bato batindaka na Internet! Biblia elobi boye: “Bómisombela ntango oyo ebongi.”​—Bakolose 4:5.

     “Namoni ete namiyokaka malamu soki natye makanisi na ngai nyonso na likambo kaka moko. Na ndenge wana, nazalaka na esengo mingi soki nasilisi mosala moko oyo nasengelaki kosala mpe naleki na mosala oyo elandi. Yango nde nabengaka koyoka esengo ya mosala.”​—Onya.

  •   Tyáká makanisi na yo epai ya moto oyo ozali kosolola na ye. Kosala makambo mosusu na telefone ntango ozali kosolola na moto mosusu, ezali kaka te kolekisa ntango mpamba kasi ezali mpe kozanga bokonde to limemya. Biblia eyebisi biso ete tósalela basusu makambo ndenge tolingaka bango mpe básalela biso.​—Matai 7:12.

     “Ntango mosusu soki nazali kosolola na ndeko na ngai ya mwasi, akomaka bamesaje to asalaka makambo mosusu na telefone. Epesaka ngai nkanda makasi! Kasi mpo na koloba solo, na bantango mosusu ngai mpe nasalaka yango!”​—David.

a Uta na buku Reclaiming Conversation.

b Uta na buku Disconnected.