MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA
Nasengeli koyeba nini na likambo etali kotya bafɔtɔ na Internet?
Ozali kosala mobembo moko molai, mpe olingi koyebisa baninga na yo makambo nyonso oyo ezali koleka! Kasi okosala yango ndenge nini?
okotindela moninga mokomoko karte?
okokomela bango nyonso mesaje na Internet?
okotya bafɔtɔ na Internet?
Ntango bankɔkɔ na yo bazalaki na mbula na yo, bazalaki na likoki ya kosala kaka likambo “A.”
Ntango baboti na yo bazalaki na mbula na yo, bakokaki kopona likambo “B.”
Lelo oyo, bilenge mingi oyo basalelaka Internet bakopona likambo “C.” Bongo yo? Soki yo mpe okopona likambo C, lisolo oyo ekosalisa yo okima mwa makama.
Matomba na yango nini?
Esalaka noki. “Ntango nazalaki kosala mwa mibembo to kobima na baninga, nakokaki kotya bafɔtɔ oyo emonisi ndenge makambo ezali koleka atako nazali naino kosepela.”—Melanie.
Ebongi mpenza. “Ezali mpasi te kotala bafɔtɔ ya sika oyo baninga na ngai batye na Internet na esika ya kotánga bamesaje na Internet mpo na koyeba ndenge bazali to makambo oyo bazali kosala.”—Jordan.
Ezali kosalisa yo oyebaka bansango ya basusu. “Baninga na ngai mosusu mpe bandeko na ngai mosusu bafandaka mosika mpenza. Soki bazali kotya bafɔtɔ na bango mbala na mbala mpe nazali kotala bafɔtɔ yango, ezali lokola nazali komona bango mokolo na mokolo!”—Karen.
Makama na yango nini?
Okoki kotya bomoi na yo na likama. Soki kamera na yo ezali likoki ya kosala ete bato báyeba mpenza esika okangi foto, bafɔtɔ oyo okotya na Internet ekoki koyebisa bato makambo oyo okanisaki te. Site Internet moko (Digital Trends) elobi: “Kotya na ba site ya kosolola na bato bafɔtɔ oyo ezali komonisa mpenza esika ozali, ekopesa nzela na bato oyo bazali na baprogramɛ ya ordinatɛrɛ ya kolandela bato, oyo bazali na makanisi mabe báyeba esika moto azali.”
Ya solo, bato mosusu ya mabe balingaka nde koyeba esika oyo ozali te. Site Internet moko (Digital Trends) elobaki ete bamiyibi misato bakɔtaki na bandako 18 na ntango oyo bato nyonso bazalaki te na ndako. Ndenge nini bayebaki ete moto moko te azalaki na bandako yango? Bakɔtaki na Internet mpe balandelaki makambo nyonso oyo bankolo-ndako bazalaki kosala, tekiniki yango babengi yango cybercasing, mpe bayibaki biloko oyo ezali na valɛrɛ ya mbongo koleka dolare 100 000.
Okoki komona makambo oyo ekosepelisa yo te. Bato mosusu bayokaka nsɔni te ntango batyaka biloko oyo bato nyonso bakomona. Elenge mwasi moko na nkombo Sarah alobi: “Makambo ebebaka ntango okomi kotala na adrɛsi ya Internet ya bato oyo oyebi te. Ezali lokola kotambola na kartye moko oyo oyebi te mpe ozali na karte na yango te. Yebá ete okoya kokende na esika oyo esengelaki te.”
Ekolya yo ngonga. Elenge mwasi moko na nkombo Yolanda alobi: “Okozala na mposa ya kotala bafɔtɔ oyo batye sika mpe kotánga makambo oyo bato nyonso bakomi. Okokóma ntango nyonso kotalatala telefone na yo mpo na koluka koyeba eloko oyo batye sika.”
Ebongi ozala na komipekisa soki ozali na adrɛsi moko na Internet mpo na kotya bafɔtɔ
Elenge mwasi moko na nkombo Samantha andimi likambo yango mpe alobi: “Namityelá ngonga oyo nakolekisa na basite yango. Ebongi mpenza ozala na komipekisa soki olingi ofungola adrɛsi moko na Internet mpo na kotya bafɔtɔ.”
Oyo okoki kosala
Zalá na ekateli ya kokima makambo ya mabe. Biblia elobi: “Nakotya eloko moko te ya mpambampamba liboso ya miso na ngai.”—Nzembo 101:3.
“Mbala na mbala natalaka biloko oyo bato tosololaka na bango batye na Internet, mpe natikaka kosolola na baoyo namoni ete batye makambo oyo ebongi te.”—Steven.
Kimá bato oyo bazali na bizaleli ya mabe, mpo mokemoke bakoki kobebisa bizaleli na yo. Biblia elobi: “Bómikosa te. Baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu.”—1 Bakorinti 15:33.
“Komikɔtisa te na site Internet ya kotya bafɔtɔ kaka mpo bato nyonso basalaka yango. Mbala mingi, kuna nde okomona maloba ya nsɔni, bato bolumbu mpe makambo mosusu ya mabe.”—Jessica.
Mityelá ndelo na ngonga oyo okolekisa mpo na kotala bafɔtɔ na Internet mpe yebá mbala boni okobanda kotya bafɔtɔ na yo. Biblia elobi: “Na yango, bókeba mpenza ete ndenge na bino ya kotambola ezala te lokola bato bazangá bwanya kasi lokola bato ya bwanya, bómisombela ntango oyo ebongi.”—Baefese 5:15, 16.
“Nandimaka te kozala moninga ya bato oyo balingaka kotya ntango nyonso bafɔtɔ ebeleebele na Internet. Na ndakisa, moto moko akei pene na ebale mpe atye bafɔtɔ 20 oyo akangi kaka esika moko. Ya solo, ezwaka ntango mingi mpo na kotala bafɔtɔ wana nyonso!”—Rebekah.
Salá ete bafɔtɔ oyo okotya na Internet eyebisa makambo na yo nyonso te. Paulo, mokomi moko ya Biblia alobi: “Nazali koyebisa moto nyonso na kati na bino ete akanisa te ete azali koleka ndenge oyo ye azali mpenza.” (Baroma 12:3) Kokanisa te ete baninga na yo bakokamwa bafɔtɔ na yo mpe ya makambo oyo osalaka.
“Bato mosusu batyaka ebele ya bafɔtɔ ya bilongi na bango. Soki tozali baninga, nayebi yo ndenge ozalaka: nazali na mposa te olakisa ngai yango ntango nyonso!”—Allison.