Lakisá makambo oyo ezali na kati

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Mibeko ya baboti ezalaka mpenza na ntina?

Mibeko ya baboti ezalaka mpenza na ntina?

 Mibeko ya baboti etyaka bomoi na yo na nkaka? Lisolo mpe lokasa oyo ekosalisa yo osolola na baboti na yo mpo na likambo yango.

 Makanisi malamu

 Lokuta: Ntango okolongwa na ndako, okokóma na bonsomi ya kosala nyonso olingi.

 Solo: Ekozala ntango nyonso na mibeko oyo okolanda soki otiki ndako ya baboti. Ekozala ntango nyonso na moto oyo akotyela ya mibeko; na ndakisa patrɔ na yo, Nkolo-ndako to bakambi ya guvɛrnema. Danielle, elenge moko ya mbula 19, alobi boye: “Nakanisi ete bilenge oyo batosaka te mibeko ya baboti na bango bakozala na mpasi mpenza ntango bakolongwa na ndako ya baboti.

 Biblia elobi boye: ‘Bótosa baguvɛrnema mpe bakonzi.’ (Tito 3:1) Kotosa mibeko ya baboti ezali formasyo malamu mpo na makambo oyo okokutana na yango ntango okokóma mokóló.

 Oyo okoki kosala: Luká koyeba matomba oyo mibeko yango ekoki komemela yo. Elenge mobali moko na nkombo Jeremy, alobi boye: “Mibeko ya baboti na ngai esalisaki ngai mpenza nayeba kopona baninga mpe kosalela ntango na ngai. Esalisaki ngai mpe naboya kotalaka televizyo mpe kobɛta masano ya video mingi mpe esalisaki ngai nasalaka misala oyo ekopesa ngai matomba mingi; tii lelo nasalaka misala yango mosusu.”

 Lolenge malamu ya kosala

 Bongo soki namoni ete mobeko yango ezali na ntina te? Na ndakisa, elenge mwasi moko na nkombo Tamara, alobi boye: “Baboti na ngai bapesaki ngai nzela ya kosala mobembo na mboka mosusu, kasi sikoyo lokola nazongi ndako, balingi ata moke te nakende na engumba moko oyo ekozwa ngai kaka miniti 20 ya mobembo!”

 Soki yo mpe okutani na likambo ya bongo, ekozala mabe kosolola na baboti na yo mpo na mobeko yango? Ekozala mabe te! Sekele ezali koyeba ntango nini mpe ndenge nini kosolola na bango mpo na likambo yango.

 Ntango nini. Elenge moko na nkombo Amanda, alobi boye: “Kaka soki osali makambo mingi oyo ekotinda baboti na yo bátyela yo motema nde okozala na likoki ya kosolola na baboti na yo mpo na koyebisa bango bábongola mobeko moko oyo batyeli yo.”

 Elenge mwasi moko na nkombo Daria, alobi mpe bongo: “Kaka ntango mama na ngai amonaki ete nazali kotosa ye ntango nyonso nde amonaki malamu abongola mobeko.” Kobosana te, yo moko nde osengeli kosala ete bátyela yo motema, kasi ezali te eloko oyo osengeli kosɛnga.

Kofanda na ndako oyo bana batosaka mibeko ya baboti te ezali lokola koluka kokitisa aviɔ na esika oyo batosaka mibeko ya nzela te

 Biblia elobi: “Batelá mitindo ya tata na yo, mpe kosundola mobeko ya mama na yo te.” (Masese 6:20) Soki osaleli toli yango, okosala makambo oyo ekotinda baboti na yo bátyelaka yo motema mpe ekozala mpasi te osolola na bango.

 Ndenge nini. Elenge mobali moko na nkombo Steven, alobi boye: “Mpo osolola malamu na baboti na yo esɛngi ozala na limemya mpe kimya na esika ya komilelalela mpe koganga.”

 Daria, oyo tolobelaki liboso, andimi likanisi yango; alobi boye: “Soki naswani na mama, likambo moko te ebongaka. Kutu ayeisaka nde mibeko yango makasi.”

 Biblia elobi: “Zoba abimisaka elimo na ye nyonso, kasi ye oyo azali na bwanya abatelaka yango ezala kimya tii na nsuka.” (Masese 29:11) Koyeba komipekisa ekomemela yo matomba mpenza, kaka na ndako na bino te kasi mpe na kelasi, mosala mpe esika mosusu nyonso.

 Oyo okoki kosala: Kanisá liboso ya koloba. Ata soki osalaka makambo oyo etindaka baboti na yo bátyela motema, kotomboka ekoki kobebisa makambo nyonso. Yango wana Biblia elobi “ye oyo ayokaka nkanda noki te azalaka na bososoli mingi.”​—Masese 14:29.

 Toli: Salelá lokasa oyo mpo na kokanisa na mibeko ya baboti na yo mpe soki esengeli, sololá na bango mpo na likambo yango.