MITUNA BILENGE BATUNAKA
Ezali na ntina kozala na baninga mingi na basite ya kosolola na bato?
Elenge moko na nkombo Elaine alobi boye: “Ntango nazalaki komona baninga na ngai ya kelasi bazalaki na bankama ya baninga na basite ya kosolola na bato, nazalaki komilobela boye: ‘Bayebani mpenza!’ Mpo na koloba solo, nazalaki koyokela bango mwa zuwa.”
Osí omiyoká bongo? Soki bongo, lisolo oyo ekoki kosalisa yo omitungisa te soki ozali na baninga mingi te na basite ya kosolola na bato.
Makama nini ekoki kobimisa?
Na Masese 22:1, Biblia elobi ete “nkombo esengeli kolingama mingi koleka ebele ya bomɛngo.” Yango wana, ezali mabe te kosala ete basusu báyeba ete ozalaka na bizaleli malamu, ata mpe koluka ete basusu basepelaka na yo.
Kasi na bantango mosusu, mposa ya koluka bato básepela na yo ekoki kokóma makasi mpe okoki kozala na esengo te soki bato mingi bayebi yo te. Yango ekoki kozala likama? Onya, oyo azali na mbula 16, ayanoli ɛɛ:
“Namonaki bato mosusu bazalaki kosala makambo ya bozoba kaka mpo báyebana, na ndakisa kopumbwapumbwa na fenetre ya etaje ya liboso na eteyelo.”
Mpo na kobenda likebi ya baninga na bango, bato mosusu bazwaka bililingi ya makambo ya bozoba oyo basalaka mpe batyaka yango na Internet. Na ndakisa, bilenge mingi batyaka bavideo na bango wana bazali kolya sabuni ya kosokola bilamba, mpe kolya mwa bouchon ya milangi oyo ezali na pwazɔ, likambo oyo moto mosusu akolinga te kosala!
Biblia elobi: “Bósala eloko moko te na . . . komimona ete boleki bamosusu.”—Bafilipi 2:3.
Kanisá naino:
Mpo na yo, ezali na ntina kozala na baninga mingi na basite ya kosolola na bato?
Okosepela kotya sante na yo to bomoi na yo na likama kaka mpo obenda likebi ya baninga na yo to mpo ondimama na bango?
Koyebana oyo ezali kaka ndɔtɔ
Bato basalaka kaka te makambo ya bozoba to oyo ekotya bomoi na bango na likama mpo báyebana. Erica, oyo azali na mbula 22, alobeli mayele oyo bato mosusu basalelaka:
“Bato mingi batyaka bafɔtɔ mingi ya makambo ya bomoi na bango, mpo bámonisa ete bazali na baninga mingi ya motema oyo balekisaka mbala mingi ntango elongo, nzokande ezali bongo te. Yango ezali koyebana oyo ezali kaka ndɔtɔ.”
Cara, oyo azali na mbula 15, alobi ete bato mingi basalaka makambo ya kozanga bosembo mpo báyebana mingi:
“Namonaka bato mosusu batyaka bafɔtɔ oyo emonanaka lokola bazali na fɛti moko boye, nzokande bazali na bango na ndako.”
Matthew, oyo azali na mbula 22, andimi ete ye mpe asalá likambo moko ya bongo:
“Natyaki fɔtɔ moko mpe nalobaki ete nazali na Ngomba Everest, nzokande natikalá kokende na Asie te!”
Biblia elobi: “Tolingi kozala sembo na makambo nyonso.”—Baebre 13:18.
Kanisá naino:
Soki osalelaka basite ya kosolola na bato, osí otyá makambo oyo ezali solo te kaka mpo oyebana na bato mingi?
Bafɔtɔ mpe bakomantɛrɛ oyo otyaka emonisaka mpenza ndenge ya moto oyo ozali mpe makambo oyo ondimelaka?
Ezali na ntina kozala na baninga mingi mpe bato básepelaka na biloko oyo otyaka na basite ya kosolola na bato?
Bato mingi bakanisaka ete mpo na koyebana mingi na basite ya kosolola na bato esengeli kozala na baninga mingi mpe bato basepelaka na biloko oyo batyaka na basite ya kosolola na bato. Matthew, oyo tolobelaki liboso, andimi ete ye mpe azalaki komiyoka bongo:
“Nabandaki kotuna baninga boye: ‘Ozali na baninga boni na basite ya kosolola na bato?’ to ‘Bato boni basepelaki na biloko oyo otyaki na basite ya kosolola na bato?’ Mpo na kokóma na baninga mingi, nabandaki kosala boninga na bato oyo nayebaki te, mpe nazalaki komizela ete bango mpe bándima ngai. Nakómaki na mposa makasi ya koyebana, mpe kosalela basite ya kosolola na bato ekolisaki mposa yango.”
Koluka koyebana na basite ya kosolola na bato ezali lokola bilei ya sukali, na ndakisa, bombo na bisikiti, atako ezalaka elɛngi, kasi etondisaka te
Maria, oyo azali na mbula 25, alobi ete bato mosusu bamonaka ete kozala na baninga mingi mpe ntango bato bazali kosepela na biloko oyo bazali kotya nde emonisi ete bazali na valɛrɛ:
“Soki elenge mwasi atye fɔtɔ mpe bato mingi basepeli na yango te, akanisaka ete azali kitoko te. Yango ezali solo te, nzokande bato mingi bakanisaka ndenge wana. Kokanisa bongo, bazali komipesa mpasi mpamba.”
Biblia elobi: “Tólukaka te komimonisa ete toleki bamosusu, kobimisa kowelana na kati na biso, koyokelana likunya.”—Bagalatia 5:26.
Kanisá naino:
Ekómelaka yo omikokanisa na bato mosusu ntango ozali kosalela basite ya kosolola na bato?
Omonaka ete kozala na baninga ebele nde ezali na ntina mingi koleka kozala na baninga ya solosolo oyo batyelaka yo mpenza likebi?