Lakisá makambo oyo ezali na kati

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Bomoi ekelamá to ebimá yango moko?​—Eteni 4: Ndenge nini nakoki kolimbola ete bomoi ekelamá?

Bomoi ekelamá to ebimá yango moko?​—Eteni 4: Ndenge nini nakoki kolimbola ete bomoi ekelamá?

Ondimaka ete bomoi ekelamá, kasi obangaka koloba yango polele na kelasi. Mbala mosusu babuku ya kelasi emonisaka ete bomoi ebimá kaka yango moko mpe ozali kobanga ete balakisi ná bana-kelasi na bino bakotyola yo. Okoki kosala nini mpo oloba na mpiko mpo na kolimbola polele ete bomoi ekelamá?

 Okoki kosala yango!

 Okoki kokanisa ete: ‘Nazali na mayele ya kolobela siansi mpe liteya ya evolisyo te.’ Danielle mpe azalaki kokanisa bongo. Alobi boye: “Soki nakanisi ete esengeli nakweisa makanisi ya molakisi mpe ya bana-kelasi na biso, nazalaki koyoka mabe.” Diana mpe alobi boye: “Nazalaki kobulungana ntango bazalaki kotyana ntembe na maloba ya siansi.”

 Nzokande, mokano na yo ezali te ya kobimisa makanisi oyo ekokweisa makanisi ya baninga. Lisusu, kobosana te ete esɛngi te oyeba siansi malamu mpenza mpo okoka kolimbola ntina oyo omonaka ete biloko oyo ezali na mokili emonisi ete bomoi ekelamá.

 Toli: Salelá likanisi ya polele ya Biblia oyo ezali na Baebre 3:4: “Ndako nyonso etongamaka na moto, kasi oyo atongá biloko nyonso ezali Nzambe.”

 Mpo na kolimbola maloba ya Baebre 3:4, elenge mwasi moko na nkombo Carol alobaka boye: “Kanisá ete ozali kotambola na zamba moko monene. Makambo oyo ekoki kotinda yo okanisa ete moto azalaka wana ezali naino mosika mpenza. Na nsima otali na nse mpe omoni cure-dent. Okoloba nini? Bato mingi bakoloba ete, ‘Moto azalaki awa.’ Soki eloko ya moke mpe oyo ezangá ntina lokola cure-dent ezali kotinda yo okanisa moto, tokoloba boni mpo na molɔ́ngɔ́ mobimba mpe biloko nyonso oyo ezali na kati!”

 Soki moto alobi: “Soki bomoi ekelamá, bongo nani akelaki Mozalisi?”

 Okoki koloba: “Tóloba te ete Mozalisi azalaka te kaka mpo toyebi makambo nyonso te oyo etali ye. Na ndakisa, mbala mosusu oyebi te soki nani nde asalá telefone na yo, kasi ondimaka ete ezali na moto oyo asalaki yango, boye te? [Tiká ye apesa eyano.] Ezali na makambo ebele oyo tokoki koyekola mpo na Mozalisi. Soki olingi, nakoki koyebisa yo makambo oyo nayekoli na ntina na ye.”

 Omibongisa

 Biblia elobi ete osengeli ‘komibongisa ntango nyonso mpo na koloba liboso ya moto nyonso oyo atuni yo ntina ya elikya oyo ozali na yango, kasi osalaka bongo na boboto mpe na limemya.’ (1 Petro 3:15) Na yango, tyá likebi na makambo mibale: makambo oyo ozali koloba mpe ndenge ozali koloba yango.

  1.   Makambo oyo ozali koloba. Kolinga Nzambe ezali na ntina mingi mpe yango ekoki kopesa yo makasi ya koloba. Kasi mbala mosusu kosuka kaka na koyebisa basusu ete olingaka Nzambe mingi ekokoka te mpo na kondimisa bango ete akelaki biloko nyonso. Ekoleka malamu kotánga biloko oyo Nzambe akelá mpo na komonisa ntina oyo ebongi mpenza kondima ete bomoi ekelamá.

  2.   Ndenge ozali koloba yango. Lobá na mpiko, kasi na limemya mpe kotyola moto te. Bato bakondima likanisi na yo soki ozali na limemya mpo na mateya oyo bandimaka mpe ozali kondima lotomo oyo bazali na yango ya koboya to kondima makambo oyo oyebisi bango.

     “Esengeli te kotyola moto to kosala lokola yo nde oyebi nyonso. Koloba na bato na lityo ekobota mbuma ya malamu te.”​—Elaine.

 Biloko oyo ekoki kosalisa yo

Komibongisa mpo na kolobela mateya oyo tondimaka ezali lokola komibongisa mpo na mbula makasi

 Elenge mwasi moko na nkombo Alicia alobi boye: “Soki omibongisi te, okomona malamu ofanda kaka kimya mpo na koboya mindɔndɔ.” Ndenge Alicia amonisi yango, komibongisa ezali na ntina mingi. Jenna alobi boye: “Nabangaka te kolobela liteya ya bozalisi soki nazali na ndakisa moko ya malamu oyo ekosalisa ngai nalimbola mateya oyo nandimaka.”

 Okoki kozwa bandakisa yango wapi? Bilenge mingi bazwaki matomba ntango basalelaki biloko oyo elandi:

 Biteni mosusu ya lisolo oyo, “Bomoi ekelamá to ebimá yango moko?” ekoki mpe kosalisa yo.

  1.  Eteni 1: Mpo na nini kondima ete Nzambe azali?

  2.  Eteni 2: Mpo na nini koboya kondima liteya ya evolisyo?

  3.  Eteni 3: Mpo na nini kondima ete bomoi ekelamá?

 Toli: Poná bandakisa oyo yo omonaka ete yango nde ebongi. Okokanisa yango mbala moko, mpe ekosalisa yo olobela yango kozanga kobanga. Meká mbala na mbala ndenge oyo okoloba mpo na kolimbola mateya oyo ondimaka.