MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA
Nakosala nini soki nzoto etungisaka ngai? (Eteni 3)
Emonanaka ete bilenge bazalaka nzoto makasi mpe na nguya mingi. Kasi, bilenge mosusu bazalaka bongo te mpo babɛlaka bamaladi ya makasi. Ezali mpe bongo mpo na yo? Soki ɛɛ, masolo ya V’loria, Justin mpe ya Nisa ekolendisa yo—bango nyonso misato bazali Batatoli ya Yehova. Talá ndenge basalaka mpo na bamaladi oyo babɛlaka.
V’loria
Nabɛlá maladi babengi fibromyalgie banda ntango nazalaki na mbula 14. Ntango nakokisaki mbula 20, nabɛlaki mpe maladi ya mingai na mikuwa, maladi oyo ebebisaka loposo ya nzoto (lupus), mpe maladi babengi lyme. Ezalaka mpasi kosala likambo nyonso oyo olingi soki omiyokaka ntango nyonso ete olɛmbi. Na nsima, nakómaki paralize kobanda na loketo tii na nse mpe esɛngaki nasalelaka kiti ya bibɔsɔnɔ.
Konyokwama na makanisi nde ezalaki mabe koleka mpo na ngai mpo nazangaki likoki ya kosala ata misala ya mike, na ndakisa kokoma mokanda to kofungola nzungu. Soki namoni bana bazali kotambola, nazalaki komituna mpo na nini nakokaka te kotambola. Nazalaki komimona ntina te.
Nazalaka na esengo ndenge bato ya libota na ngai mpe bandeko ya lisangá na biso basalisaka ngai. Mbala mingi bandeko ya lisangá bayaka kotala ngai yango esalaka ete namiyoka mpenza te ete nazali kaka ngai moko. Bamosusu babengisaka ngai na bafɛti, ata soki ezali pɛtɛɛ te kolongola ngai na kiti ya bibɔsɔnɔ mpe komatisa ngai na motuka.
Bandeko ya mibange na lisangá nde basalisaka mpenza mpo bayebi ndenge moto amiyokaka soki nzoto ezali malamu te. Basalisaki ngai nandima ete nakokoka kosala makambo nyonso te mpe namiyoka te lokola namemi ngambo mpo na yango. Nazalaka na esengo mingi ntango nazali na makita mpe na mosala ya kosakola. (Baebre 10:25) Na mabaku yango, namonaka ete atako nabɛlaka, nakeseni mpenza te na basusu.
Nabosanaka te ete Yehova apesaka biso oyo tosengeli na yango mpo na koyika mpiko. Na ndakisa, Biblia elobi ete ata soki na libándá nzoto ya moto ezali kobeba, bomoto na ye ya kati ekoki “kokóma ya sika mokolo na mokolo.” (2 Bakorinti 4:16) Namiyokaka mpenza bongo!
Omituna boye: Soki maladi moko ya makasi ezali konyokola yo, mpo na nini ezali na ntina osololaka na basusu? Soki ozali nzoto makasi, ndenge nini okoki kosalisa moto oyo azali kobɛla?—Masese 17:17.
Justin
Nakweaki na pavema mpe nakokaki lisusu kotɛlɛma te. Mpanzi na ngai ekangamaki mpe nakokaki lisusu te koningisa nzoto. Bamemaki ngai mbangu na lopitalo. Na ebandeli, minganga bayebaki te nini esalaki ngai bongo. Kasi nsima ya kosala baekzamɛ mbala ebele, bamonaki ete nazali na maladi babengi Lyme.
Maladi yango ebebisaki bɔɔngɔ na ngai. Kutu, tii lelo nalɛngaka, na bantango mosusu nalɛngaka makasi, ata soki eleki sikoyo bambula ebele banda bazwá ngai na maladi yango. Mikolo mosusu nzoto mobimba esalaka ngai mpasi to misapi esalaka ngai mpasi makasi na boye ete mwaye ya koningisa yango ezalaka te. Ezalaka lokola nde matonga nyonso ya nzoto na ngai ebebibebi.
Nazalaki komituna ‘mpo na nini ngai mwana moke boye nabɛla boye’ mpe yango ezalaki kosilikisa ngai. Nazalaki kobondela Nzambe mikolo nyonso, kotuna ye, “mpo na nini likambo ya boye ekómeli ngai?” Nakómaki kutu komona ete Nzambe asundolaki ngai. Kasi na nsima nakanisaki lisolo ya Yobo na Biblia. Yobo ayebaki mpenza te mpo na nini akutanaki na mikakatano mingi mpenza, ata bongo atikalaki sembo epai ya Nzambe. Soki Yobo atikalaki sembo na mikakatano ebele oyo akutanani na yango, ngai mpe nakoki kosala bongo.
Bankulutu ya lisangá na biso basalisaka ngai mpenza. Bayaka ntango nyonso kotala ngai mpe kotuna soki nazali malamu. Moko na bango ayebisaki ngai nábengaka ye soki nazali na mposa ya kosolola ata na ngonga nini. Napesaka Yehova matondi mikolo nyonso mpo na baninga ya ndenge wana!—Yisaya 32:1, 2.
Na bantango mosusu soki tobɛli makasi, tobosanaka ete Yehova ayebaka oyo ekómeli biso. Biblia elobi boye: “Bwakelá Yehova ye moko mokumba na yo ya kilo, mpe ye moko akosunga yo.” (Nzembo 55:22) Yango nde namekaka kosala mikolo nyonso.
Omituna boye: Ndenge nini bato oyo balingaka yo bakoki kosalisa yo oyikela maladi na yo mpiko?—Masese 24:10; 1 Batesaloniki 5:11.
Nisa
Ntango nakokisaki mbula soki 15, bazwaki ngai na maladi babengi Syndrome de Marfan—maladi yango ebebisaka matonga ya nzoto mpe elɛmbisaka yango. Ekoki mpe kobebisa motema, miso mpe binama mosusu ya nzoto. Nayokaka mpasi mikolo nyonso te, kasi soki nayoki mpasi, ezalaka makasi mpenza.
Ntango bayebisaki ngai ete nazali na maladi yango, nalelaki mingi. Namitungisaki ete nakokoka lisusu te kosala makambo nyonso oyo nazalaki kosepela kosala. Na ndakisa, nalingaka kobina; kokanisa ete mokolo mosusu ekokómela ngai mpasi kosala yango mpe mbala mosusu mpasi mingi mpo natambola, esalaki ete nabanga avenire.
Yaya na ngai ya mwasi asungaki ngai mpenza. Asalisaki ngai natika komiyokela mawa. Ayebisaki ngai ete nasengeli kobanga te mpo yango ekosilisa ngai mposa ya bomoi. Alendisaki ngai mpe nakoba kobondela Yehova mpo ye nde ayebi mpenza ndenge nazali komiyoka.—1 Petro 5:7.
Vɛrsɛ oyo elendisaka ngai mpenza ezali Nzembo 18:6, oyo elobi boye: “Na mpasi na ngai nazalaki kobelela Yehova, mpe nazalaki kolelela Nzambe na ngai mpo na kosɛnga lisalisi. Na tempelo na ye ayokaki mongongo na ngai, mpe sikoyo kolela na ngai liboso na ye mpo na kosɛnga lisalisi ekómaki na matoi na ye.” Vɛrsɛ yango esalisaki ngai namona ete soki nabondeli Yehova mpe nasɛngi asalisa ngai nalonga, akoyoka mpe akosalisa ngai. Azali wana ntango nyonso mpo na ngai.
Nayekolaki ete ezali mabe te koyoka mawa ata mpe nkanda mpo na likambo ya mabe oyo ekómeli biso soki totiki te ete makanisi ya bongo ebebisa bomoi na biso mpe boyokani na biso na Nzambe mpo moto nyonso amiyokaka bongo. Nzambe te nde abimiselaka biso mikakatano mpe akotika biso te soki totye ye na esika ya liboso na bomoi na biso.—Yakobo 4:8.
Omituna boye: Ebongi kopesa Nzambe foti mpo na bampasi na biso?—Yakobo 1:13.