Lakisá makambo oyo ezali na kati

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Nasala nini soki likambo ya mawa ekómeli ngai?

Nasala nini soki likambo ya mawa ekómeli ngai?

 Likambo ya mawa ekoki kokómela moto nyonso. Biblia elobi: “Ezali te bato ya mbangu mingi nde balongaka na momekano ya kopota mbangu, to bato ya nguya nde balongaka na etumba . . . ntango ná makambo oyo ekanami te ekwelaka bango nyonso.” (Mosakoli 9:11) Na ndakisa, bilenge mosusu bakutanaki na likambo ya mawa. Basalaki nini? Tólobela ndakisa mibale.

 REBEKAH

 Baboti na ngai babomaki libala ntango nazalaki na mbula 14.

 Nazalaki koloba na nse ya motema ete baboti na ngai bakoboma libala te, nakanisaki ete papa alingaki kaka kozala ye moko mpo na mwa ntango. Azalaki kolinga mama, mpo na nini akoboya ye? Mpo na nini akotika ngai?

 Nazalaki kokoka koyebisa bato likambo yango te. Nazalaki kolinga kokanisa yango te. Nazalaki koyoka nkanda, atako na ntango wana nazalaki koyeba yango te. Nakómaki komitungisa mpe nazalaki kolala malamu te.

 Ntango nakómaki na mbula 19, mama akufaki na kanser. Azalaki moninga na ngai ya motema.

 Nayokaki mpasi mingi ntango baboti na ngai babomaki libala, kasi ntango mama akufaki nabulunganaki mingi mpenza. Tii lelo, nazali kaka kobunda. Kolala ekómá lisusu mpasi mpe komitungisa ezali kaka.

 Atako bongo, ezali na makambo ebele oyo esalisaka ngai. Na ndakisa, Masese 18:1 elendisi biso tókimaka bato te; nasalaka makasi nasalela toli yango.

 Lisusu, lokola nazali Motatoli ya Yehova, nasalaka makasi natángaka mingi mikanda na biso mpo elendisaka mpenza. Mokanda moko oyo esalisaki ngai mingi ntango baboti na ngai babomaki libala ezalaki buku Mituna oyo bilenge batunaka​—Biyano oyo ebongi. Nabosanaka te ete nazalaki kotánga mingimingi Volimi 2 na mokapo oyo elobi “Nakoki kozala na esengo ata soki nazali na moboti kaka moko?”

 Moko ya bavɛrsɛ oyo nalingaka mingi, oyo esalisaka ngai natika komitungisa ezali Matai 6:25-34. Na vɛrsɛ 27, Yesu atunaki: “Nani na kati na bino soki amitungisi akoki kobakisa bolai ya bomoi na ye ata moke?”

 Makambo ya mpasi ekozanga te kokómela biso na bomoi, kasi ndakisa ya mama eteyaki ngai ete ndenge tokotalela mikakatano yango nde ezali na ntina. Akutanaki na mikakatano mingi, libala ekufaki mpe abɛlaki maladi moko makasi, kasi na makambo nyonso wana, abatelaki makanisi ya malamu mpe kondima na ye epai ya Nzambe ezalaki kaka makasi tii liwa na ye. Nakobosana ata mokolo moko te makambo oyo ateyá ngai mpo na Yehova.

 Okanisi nini? Ndenge nini kotánga Biblia mpe mikanda na biso ekoki kosalisa yo ntango likambo ya mawa ekómeli yo?​—Nzembo 94:19.

 CORDELL

 Ntango nazalaki na mbula 17, namonaki ndenge papa na ngai akataki motema. Liwa na ye ezalaki likambo eleki mabe na bomoi na ngai. Nabulunganaki.

 Nazalaki kondima te ete akufi, nazalaki kondima te ete papa na ngai nde bazipaki nzoto mobimba alali na nse ya ba drap. Nalobaki na nse ya motema ete: ‘Lobi akolamuka.’ Nasilaki mayele.

 Biso nyonso na libota tozali Batatoli ya Yehova mpe bandeko ya lisangá na biso basalisaki biso mingi mpenza ntango papa akufaki. Bazalaki komemela biso bilei, bazalaki kofandisa biso, mpe batikaki biso te, kaka mwa mikolo te, kasi na boumeli ya ntango molai mpenza. Lisalisi na bango elakisaki ngai ete Batatoli ya Yehova bazali bakristo ya solo.​—Yoane 13:35.

 Vɛrsɛ oyo elendisi ngai mpenza ezali 2 Bakorinti 4:17, 18. Elobi ete: “Atako bolɔzi ezali ya ntango mokuse mpe ya pɛpɛlɛ, ezali kobotela biso nkembo moko ya kilo mingi koleka mpe oyo ezali seko; wana tozali te kotya miso na biso na biloko oyo emonanaka, kasi nde na biloko oyo emonanaka te. Mpo biloko oyo emonanaka ezali ya ntango mokuse, kasi biloko oyo emonanaka te ezali ya seko.”

 Eteni wana ya nsuka ezalaki kopesa ngai makasi. Mpasi ya tata na ngai ezalaki ya ntango mokuse, kasi bilaka ya Nzambe mpo na mikolo ezali koya ezali ya seko. Liwa ya papa esalisaki ngai nakanisa ndenge nazalaki kosalela bomoi na ngai mpe natalela lisusu mikano na ngai.

 Okanisi boni? Ndenge nini likambo ya mawa oyo ekómeli yo ekoki kosalisa yo otalela mikano ya bomoi na yo?​—1 Yoane 2:17.