Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Batatoli ya Yehova

Lingala

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Nasala nini mpo nalonga mitungisi ya bolenge?

Nasala nini mpo nalonga mitungisi ya bolenge?

“Eleko ya bolenge esepelisaka mpenza bana-basi te. Ezalaka mpasi, kimya te, motungisi​—lokola nde makambo nyonso ekómi mabe!”​—Oksana.

“Na ntango moko nazalaki na esengo mpe mbala moko nakomi na mawa. Nayebi te soki ezalaka bongo mpo na bana-mibali nyonso, kasi ngai ekomelaki ngai.”​—Brian.

Eleko ya bolenge ezali lokola moto azali kosala lisano ya kitá-matá, esepelisaka mpe ebangisaka! Okosala ndenge nini na bambongwana yango?

 Eleko ya bolenge ezali nini?

Na ntembe te, bolenge ezali eleko oyo ekosala ete okola nokinoki na nzoto mpe na makanisi. Na eleko yango, nzoto ekolaka noki mpe bambongwana esalemaka na ba-hormones oyo ekosala ete okóma na likoki ya kozwa zemi mpe obota.

Yango elingi koloba te ete osengeli mbala moko kokóma moboti. Kasi, bolenge ezali komonisa ete ozali lisusu mwana moke te, likambo oyo ekoki kosala ete ozala na esengo mpe mawa.

Motuna: Mpo na yo, mbula nini eleko ya bolenge ekoki kobanda?

  • 8

  • 9

  • 10

  • 11

  • 12

  • 13

  • 14

  • 15

  • 16

Eyano: Bambula nyonso oyo etyami awa ezali na kati ya eleko ya bolenge.

Yango emonisi ete ezali na ntina te omitungisa koleka ndelo ntango ozali na mbula pene na 15 mpe omoni naino te bambongwana na nzoto na yo to soki ozali na nse na yango mpe bambongwana ebandi kosalema. Ndenge makambo esalemaka na bolenge, yo moko kutu okoyeba te.

Ndenge moko kaka na lisano ya kitá-matá, bolenge esepelisaka mpe ebangisaka​—kasi okoki koyekola ndenge ya kosala mpo olonga bambongwana yango

 Mbongwana na nzoto

Mbala mosusu mbongwana emonanaka mingi nde na ndenge oyo nzoto ya bilenge efungwamaka. Biteni nyonso te ya nzoto na yo nde ekofungwama nzela moko. Yango wana kokamwa te soki oyoki mwa mpasi ntango oningisi nzoto. Yebá ete na nsima makambo ekobonga.

Na eleko ya bolenge bambongwana mosusu mpe esalemaka na nzoto.

Epai ya bana-mibali:

  • Binama ya kobotela ekómaka monene

  • Nsuki ebimaka bango na bisika mosusu na ndakisa, na nse ya mapeka, na libumu ata mpe mandɛfu

  • Mongongo ebongwanaka

  • Enama ya kobotela ekoki kotɛlɛma yango moko mpe kobebisa mbeto na mai ya mibali na butu

Epai ya bana-basi:

  • Mabɛlɛ ekómaka minene

  • Nsuki ebimaka bango na bisika mosusu na ndakisa na nse ya mapeka mpe na libumu

  • Komona sanza

Epai ya bilenge nyonso:

  • Kotoka mpe salite esalaka ete nzoto ekóma kolumba nsolo.

    Toli: Mpo nzoto elumba nsolo te, sukoláká mingi mpe saleláká malasi to eloko oyo ekoki kosala ete otoka te.

  • Salite ya mafuta oyo ebimaka na nzoto nde ebimisaka babutɔ.

    Toli: Atako ezalaka mpasi kosilisa babutɔ, kosukola elongi mbala mingi mpe kosalela biloko oyo epɛtolaka nzoto, ekoki mpe kosalisa.

 Mbongwana na makanisi

Ndenge oyo ba-hormones ememaka mbongwana na nzoto na eleko ya bolenge ekoki kobulunganisa makanisi ya elenge. Akoki kutu kobanda koyoka nkanda makasi.

“Mokolo moko oleli mpe mokolo mosusu oyoki malamu. Okómi na nkanda mpe na mbala moko omikangeli na kati ya shambre mpo otungisami na makanisi.”​—Oksana.

Na eleko yango, bilenge mingi mpe bazalaka nsɔninsɔni lokola nde moto nyonso azali kotyela bango miso mpe azali kosambisa bango. Lisusu, lokola nzoto na bango ezali kobongwana bamitungisaka mingi!

“Ntango nazalaki kokola, nazalaki kolinga kolata basimisi ya minene mpe kofanda na ndenge na ngai. Atako nayebaki ntina oyo bambongwana ezalaki kosalema na nzoto na ngai, nazalaki koyoka mabe mpe nsɔninsɔni. Nazalaki mpenza ngai te.”​—Janice.

Mbala mosusu mbongwana ya monene oyo esalemaka na makanisi ezali ndenge oyo elenge akómaka kotalela bana-basi to bana-mibali.

“Natikaki kokanisa ete bana-mibali nyonso bazali mabe. Sikoyo nakómá kosepela na bamosusu, mpe likanisi ya kolingana ezalaki mpenza mabe te. Kutu, na masolo na biso tokómaki kosalela maloba ‘nani alulaka nani.’​—Alexis

Na eleko yango, bilenge mosusu mpe balulanaka, basi na basi to mibali na mibali. Soki yango ekómeli yo, kokanisa mbala moko te ete okómi mobali oyo asangisaka nzoto na mibali to basi na basi. Mbala mingi mposa yango esilaka nsima ya ntango.

“Lokola nazalaki komikokanisa mingi na baninga na ngai mibali, nakómaki kolula bango. Ntango bolenge esilaki nde nabandaki kolula sikoyo bana-basi. Mposa ya kolula baninga na ngai mibali esilá.”​—Alan.

 Oyo okoki kosala

  •  Salá makasi okóma na makanisi malamu. Mpo na koloba solo, na bolenge mbongwana esengeli esalema na nzoto mpe na makanisi na yo. Maloba oyo ya Davidi mokomi ya nzembo ekoki kopesa yo makasi, alobaki boye: “Nasalami na ndenge moko ya kokamwa.”​—Nzembo 139:14.

  • Komikokanisa te na basusu mpe kotya makanisi na yo kaka te na ndenge ozali komonana na miso ya bato. Biblia elobi: “Moto amonaka oyo emonanaka na miso; kasi Yehova, amonaka ndenge motema ezali.”​—1 Samwele 16:7.

  • Saláká ngalasisi mingi mpe pemáká. Kolala mingi ekosala ete osilika te, otungisama te na makanisi ntango olamuki.

  • Kotya makanisi te na bambongwana oyo ezali kosalema. Bato nyonso bazali mpenza komona kaka yango? Ata soki bato bazali kolobela yango, kolanda na yo te. Biblia elobi: “Kotya motema na yo te na maloba nyonso oyo bato bakoki koloba.”​—Mosakoli 7:21.

  • Yebá kokanga bamposa na yo ya nzoto mpo ekóma kotambwisa yo te. Biblia elobi: “Bókima pite. . . . moto oyo asalaka pite, azali kosalela nzoto na ye moko lisumu.”​—1 Bakorinti 6:18.

  • Sololá na moboti na yo to mokóló moko oyo otyelaka motema. Ya solo, na ebandeli ekoki kozala mwa nsɔni. Kasi, okomona ete kosolola na ye ezalaki mosala ya mpunda te.​—Masese 17:17.

Na mokuse: Eleko ya bolenge ezali na mitungisi na yango. Kasi ezali mpe kosalisa yo okola​—kaka na nzoto te kasi mpe na makanisi ná elimo.​—1 Samwele 2:26.