MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA
Nasala nini ntango bazali kotɔnga ngai?
Mpo na nini esalaka mpasi
Matɔngi mosusu ezalaka mabe mpenza. Na ndakisa, soki moto akoseli yo makambo mpo na kobebisa lokumu na yo kaka mpamba. Ezala matɔngi ya ndenge nini esalaka kaka mpasi, mingimingi soki euti na moto na yo ya kati mpenza!—Nzembo 55:12-14.
“Nayaki koyeba ete moninga moko azalaki kotɔnga ngai ete nazalaka fiere. Esalaki ngai mpasi! Nayebaki te mpo na nini azalaki koloba bongo.”—Ashley.
Oyo osengeli koyeba: Moto oyo azali kotɔnga yo, azala moninga ya motema to te, matɔngi ezalaka likambo ya esengo te.
Likambo ya mawa—okoki te kopekisa matɔngi
Ezali na makambo ebele oyo etindaka bato bátɔnga, na ndakisa:
Kotyelana likebi. Tosalemá na mposa ya kozalaka ná bato. Yango wana, tolingaka kosolola na bato mpe kobɛta masolo ya bato. Kutu, Biblia esɛngaka biso tótyelanaka likebi mpe tólukaka “matomba ya basusu.”—Bafilipi 2:4.
“Bato bazalaka ntango nyonso na makambo ya koloba mpo na basusu!”—Bianca.
“Mpo na koloba solo, nalingaka koyeba makambo ya bato; ndenge nini bazali; mpe kolobela yango ná basusu. Nayebi te mpo na nini, kasi esalaka bien.”—Katie.
Kozanga eloko ya kosala. Na ntango ya kala, ezalaki na bato oyo “bazalaki kolekisa ntango na bango ya kozwa mopɛpɛ na eloko mosusu te kaka na koloba to na koyoka mwa likambo moko ya sika.” (Misala 17:21) Ezali ndenge moko mpe lelo!
“Na bantango mosusu ata soki masolo ya kobɛta ezali te, bato bango moko babimisaka likambo moko mpo bálobela yango.”—Joanna.
Komimona mpamba. Yango wana, Biblia ekebisi biso na ezaleli ya komikokanisaka na basusu. (Bagalatia 6:4) Likambo ya mawa, bato mosusu lokola bamimonaka mpamba, balekisaka ntango na bango na kotɔnga basusu.
“Na bantango mosusu, matɔngi emonisaka bizaleli ya moto oyo azali kosala yango. Mbala mingi emonisaka ete moto yango azali koyokela moto oyo azali kotɔnga zuwa. Azali kopanza bansango ya lokuta mpo amiyoka malamu, mpe amindimisa ete aleki moto oyo ye azali kotɔnga.”—Phil.
Oyo osengeli koyeba: Olinga, olinga te, bato bakobɛta masolo na yo—kaka ndenge babɛtaka mpe ya bato mosusu.
Likambo ya esengo—esengeli kolɛmbisa yo nzoto te
Okoki te kopekisa bato bátɔnga yo, kasi ndenge okozwela yango nde eleki ntina. Soki oyoki bato bazali kolobaloba mpo na yo, ezali na makambo mibale oyo okoki kosala.
YA LIBOSO: Kokipe yango te. Mbala mingi kobɛta kara na matɔngi ezalaka solution ya malamu, mingimingi soki ezali na yango na makambo ya ntina te. Talá oyo Biblia elobi: “Kosilikaka nokinoki te, mpo bazoba nde basilikaka mpambampamba.”—Mosakoli 7:9.
“Bapanzaki ngai nsango ete nazalaki kobima na mwana mobali moko boye, oyo kutu nayebaki ata koyeba te. Namonaki yango ata ntina te, nasɛkaki kaka.”—Elise.
“Bizaleli na yo ya malamu ekoloba na esika na yo. Ata soki bapanzi yo nsango ya mabe ndenge nini, kasi soki bato bayebi yo na bizaleli malamu, mingi bakondima likambo yango te. Mbala mingi solo eyaka koyebana kaka.”—Allison.
Toli: Komá (1) makambo balobaki mpo na yo mpe (2) ndenge omiyokaki. Ntango omoni na ‘motema na yo’ makambo oyo olingaki koloba, mbala mosusu okomona malamu otika na yo kaka.—Nzembo 4:4.
YA MIBALE: Kutaná na moto oyo abandisaki likambo yango. Ekoki kokóma ete makambo oyo bakoseli yo ezali mpenza mabe makasi, mpo na yango okoki komona malamu osolola na moto oyo abandisaki yango.
“Soki okei kokutana na bato oyo bazali kotɔnga yo, ekoki kosalisa bango bámona ete makambo balobi esali yo mpasi. Lisusu, okoki kotalisa bango ndenge makambo ezali mpe kosilisa likambo yango.”—Elise.
Liboso okende kokutana na moto oyo atɔngaki yo, talelá batoli ya Biblia oyo elandi mpe mituna oyo batuni.
“Moto oyo apesaka eyano liboso ya koyoka likambo azali zoba, mpe amisambwisaka.” (Masese 18:13) Omituna: ‘Nazali mpenza na ba-preuve nyonso? Bongo soki moto oyo ayebisi ngai nde ayokaki malamu te?’
“Moto nyonso asengeli koyokaka noki, kowelaka koloba te, koyokaka nkanda noki te.” (Yakobo 1:19) Omituna: ‘Oyo ezali mpenza ntango ebongi mpo na kokutana na moto yango? Nandimi mpenza ete nakosolola na ye na ndenge oyo ebongi? To ekozala malamu natika mwa ntango mpo nkanda na ngai ekita?’
“Makambo nyonso oyo bolingaka bato básalela bino, bino mpe bosengeli kosalela bango yango.” (Matai 7:12) Omituna: ‘Soki ezalaki ngai nde natɔngaki moto, nalingaki kosepela aya kosolola na ngai ndenge nini? Nalingaki kosepela tósolola likambo yango wapi? Maloba nini mpe ndenge nini nalingaki kosepela alobela ngai?’
Toli: Liboso okende kokutana na moto oyo atɔngaki yo, komá naino makambo olingi koloba na ye. Na nsima, zelá pɔsɔ moko to mibale eleka, mpe na nsima tángá lisusu makambo okomaki, bongolá yango mwa moke soki esengeli. Lisusu, sololá na baboti na yo to moninga moko oyo akoki kosalisa yo mpo na makambo oyo okani koloba.
Oyo osengeli koyeba: Okokoka te ntango nyonso kopekisa bato kotɔnga yo, kasi yango esengeli te kopekisa yo ozala malamu na bomoi. Na bomoi, tokokaka te kosala makambo nyonso oyo tolingaka!