MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA
Réseaux sociaux, ezali kobebisa to kobongisa bomoi na ngai?
Baboti na yo bapesá yo nzela osalelaka barezɔ? Soki ɛɛ, lisolo oyo ekosalisa yo na makambo misato ya ntina mingi.
Na lisolo oyo tokolobela:
Barezɔ elyaka yo ntango mingi?
Kosalela barezɔ ezali lokola moto amati na mpunda oyo ezali ligboma, soki otambwisi yango te, yango nde ekotambwisa yo.
“Mbala mingi nalobaka ‘nakɔta kaka mpo na mwa miniti’, kasi nakosutuka boye nalekisi bangonga! Kaka lokola drɔgɛ, barezɔ ekoki kokómisa moto moombo na yango.”—Joanna.
Oyebaki yango? Barezɔ ekómisaka bato lokola baombo mpo yango nde mokano basalelá yango. Bato oyo basalá yango bayebi ete soki ebele ya bato bazali kosalela yango mingi, yango ekosala ete bákɔtisa mbongo mingi na bapiblisite oyo batyaka kuna.
Omituna boye: ‘Nabosanaka ngonga ntango nazali kosalela barezɔ? Nakoki te kosalela ntango yango mpo na makambo mosusu ya ntina mingi?’
Oyo okoki kosala. Tyá ntango oyo osengeli kolekisa na barezɔ, mpe tosá yango.
Tyá ntango oyo osengeli kosalela barezɔ
“Nasalá ete ba application mosusu na telefone na ngai ekangamaka na ngonga moko boye. Nsima ya kotosa bandelo oyo namityelaki, nakómaki na bokatikati mingi mpe yango esali ete nalekisaka lisusu ntango mingi te na barezɔ.”—Tina.
Toli ya Biblia: “Bósalela ntango na bino malamu mpenza.”—Baefese 5:16.
Barezɔ esalaka ete olalaka retare?
Bato mingi ya mayele balobi ete bilenge basengeli kolalaka ngonga 8, kasi mingi balalaka ngonga moke kaka. Moko ya makambo oyo esalaka ete bilenge bálalaka mingi te ezali barezɔ.
“Liboso nalala, nabwakaka liso na telefone na ngai nayeba soki eloko ya malonga ezali, kasi na nsima okomona nakolekisa ntango molai. Ezali ezaleli ya malamu te, nazali kobunda natika yango.”—Maria.
Oyebaki yango? Moto oyo alalaka mingi te akoki kobɛla maladi ya makanisi mpe kokóma na mitungisi mingi. Jean Twenge, oyo azali profɛsɛrɛ ya mwasi na psychologie, amonisi ete moto oyo alalaka mingi te azalaka na mayoki ya malamu te. Abakisi ete “nsima ya mikolo” yango ekoki kobimisa “mitungisi makasi ya makanisi.” a
Omituna boye: ‘Nalalaka ngonga boni na butu?’ ‘Nasalelaka barezɔ na ntango oyo nasengelaki kopema to komibongisa mpo na kolala?’
Oyo okoki kosala. Tyá baaparɛyi na yo nyonso mosika ya mbeto na yo. Soki likoki ezali, tiká kosalela baaparɛyi ngonga mibale liboso okende kolala. Soki osalelaka alarme mpo na kolamuka na ntɔngɔ, luká eloko mosusu na esika osalela telefone to tablɛti.
Tiká kasalela barezɔ mwa bangonga liboso olala
“Na bantango mosusu natikalaka ntango molai liboso ya telefone na ngai, nayebi ezali malamu te, nazali kobunda natika. Nazali lisusu mwana moke te, nasengeli kokola. Nasengeli kolalaka na ngonga ya malamu mpo mokolo ekolanda nazala en forme.”—Jeremy.
Toli ya Biblia: ‘Bólukaka mpenza koyeba makambo oyo eleki ntina.’—Bafilipi 1:10.
Barezɔ ezali kobebisa makanisi na yo?
Na kotalela ankɛtɛ moko oyo esalemaki na eteyelo moko, bana kelasi mingi bamonisaki ete “mbala mingi bamiyokaka mawamawa lokola bato bazangi elikya.” Barezɔ ekoki kozala moko ya makambo oyo esalaka ete bana yango bámiyoka bongo. Dr. Leonard Sax alobi, “soki moto azali kolekisa ntango mingi na barezɔ, komikokanisaka na basusu, yango ekoki kosala ete moto yango akóma komitungisa se komitungisa na makanisi.” b
“Bilenge mingi balingaka komikokanisa na basusu, mpe ezaleli yango ekómaka lisusu mabe koleka na barezɔ. Okoki kolekisa bangonga ebele na kotalaka bafoto oyo bato batye, ndenge bazali komemela bomoi na bango, na nsima okobanda kokokanisa bomoi na yo na ya bango, mpe nsuka okómi komona bomoi na yo ntina te.”—Phoebe.
Oyebaki yango? Barezɔ ekoki kosalisa yo osololaka na baninga na yo oyo bazali mosika, kasi yango ekokani te na kosolola na moto na miso boye. Dr. Nicholas Kardaras alobi, “atako barezɔ ekoki kosalisa biso tósololaka na bato, yango ekoki te kokokisa mposa oyo tozalaka na yango ya komonana na bato boye na miso. Ekokisaka mpenza bamposa na biso nyonso te, mpo tosalemá na mposa ya kosololaka na bato na miso boye.” c
Omituna boye: ‘Namiyokaka mawamawa nsima ya kotala makambo oyo baninga na ngai bazali kotya na barezɔ?’ ‘Namonaka bomoi na ngai ntina te soki nakokanisi yango na oyo baninga na ngai batyaka na barezɔ?’ ‘Nalɛmbaka nzoto soki basepeli mpenza te na eloko oyo natye na barezɔ?’
Okoki kosala nini. Meká kotika barezɔ mpo na mwa mikolo, pɔsɔ moko, to sanza mobimba. Bandá kolekisa ntango mingi na baninga na yo, na miso boye to na nzela ya telefone, na nsima talá soki okozala kaka na mitungisi ndenge ezalaki liboso to okokóma na esengo mingi.
Lekisáká ntango mingi na baninga oyo bozali komonana na biso
“Ntango nazalaki kosalela barezɔ, nazalaki kolandela mingi makambo oyo bato mosusu bazalaki kosala. Nsima ya kokanga bakonte nazalaki na yango, namiyokaki lokola kilo moko elongwaki na mapeka na ngai, mpe nakómaki kosalela ntango na ngai na makambo oyo eleki ntina.”—Briana.
Etinda ya Biblia: “Moto na moto ameka mosala na ye moko, bongo akozwa likambo ya kosepela na yango mpo na ye moko, kasi te mpo azali komikokanisa na moto mosusu.”—Bagalatia 6:4.

