Lakisá makambo oyo ezali na kati

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Nasala nini mpo bato mosusu bándima ngai?

Nasala nini mpo bato mosusu bándima ngai?

 “Osengeli koluka bándima yo. Soki bongo te, okozanga baninga, avenire, mpe bomoi na yo ekozala mpasi. Bato nyonso bakobosana yo mpe okotikala kaka yo moko.”​—Carl.

 Carl alekisi ndelo? Mbala mosusu. Kasi, bilenge mosusu bakoki kosala nyonso mpo na kokima likambo oyo Carl auti koloba. Bongo te? Lisolo oyo ekosalisa yo oyeba ndenge ya malamu ya kopona baninga.

 Mpo na nini bato balukaka ete bándima bango?

  •   Mpo balingaka te ete bábwakisa bango. “Na site Internet ya kosolola na baninga namonaki bafɔtɔ ya bilenge mosusu oyo ebimaki na site yango kasi ngai nazalaki te na bafɔtɔ yango. Mbala moko namilobelaki ete likambo moko ezali kotambola malamu te epai na ngai namitungisaki mpenza mpe nalobaki boye: Nazali mpenza na ntina te na miso na bango.”​—Natalie.

     KANISÁ NAINO: Osí omiyoká ete babwakisi yo? Na bongo, osalaká nini mpo bándima yo?

  •   Mpo balingaka te ete bákesana na basusu. “Baboti na ngai balingaka te nazala na telefone. Ntango bilenge mosusu basɛngaka ngai nimero na ngai ya telefone, nayebisaka bango ete nazalaka na telefone te, balobaka boye: ‘Nini? Ozali na mbula boni?’ Ntango nayebisaka bango nazali na mbula 13, batalaka ngai mpe bayokelaka ngai mawa mpenza.”​—Mary.

     KANISÁ NAINO: Makambo nini baboti na yo bapekisi yo oyo ezali kosala omona ete okeseni na baninga mosusu? Osalaka nini mpo otosa makambo yango?

  •   Mpo balingaka te bátumola bango. “Bilenge mosusu na eteyelo basepelaka te na baoyo basalaka te makambo lokola bango, balobaka te lokola bango, to bazali na lingomba moko te na bango. Soki ozali te lokola bango, bango nyonso bakobanda kotala yo na liso ya mabe.”​—Olivia.

     KANISÁ NAINO: Basí batumolá yo mpo ozalaki te lokola basusu? Osalaká nini mpo olonga matumoli yango?

  •   Mpo balingaka te bábungisa baninga na bango. “Mbala nyonso oyo nazalaki na etuluku moko, nazalaki kaka kosala makambo lokola baninga na ngai. Nazalaki kobongola ndenge na ngai ya koloba. Nazalaki kosɛka ata soki likambo ya kosɛkisa ezalaki te. Ntango bazalaki kotyola moto moko, ngai mpe nazalaki kosala bongo, atako nayebaki ete likambo yango ezalaki kopesa moto yango mpasi.”​—Rachel.

     KANISÁ NAINO: Omonaka ete kondimama na baninga na yo nde likambo eleki makambo nyonso na motuya? Osí obongolá ndenge na yo ya koloba to ya kosala makambo mpo kaka baninga na yo bándima yo?

 Oyo osengeli koyeba

  •   Kosala makambo lokola basusu kaka mpo bándima yo ekoki kobebisa makambo. Na ndenge nini? Mbala mingi bato bakoki komonisa soki ozali kobomba ndenge ozalaka. Brian oyo azali na mbula 20 alobi boye: “Na eteyelo, bato mingi bazalaki kondima mpenza ngai te ntango nazalaki kobomba ndenge nazalaka. Nayaki komona ete oyo eleki malamu, zalá kaka ndenge ozalaka, mpo bato bayebaka soki ozali kosala lisano na esika ya moto mosusu.”

     NDENGE MALAMU YA KOSALA: Luká koyeba makambo eleki ntina. Biblia elobi: “Bóluka koyeba mpenza makambo oyo eleki ntina.” (Bafilipi 1:10) Na yango omituna boye, ‘Likambo nini eleki mpenza ntina: Kondimama na bato oyo bazali na bizaleli oyo ekeseni na oyo ya ngai to kozala ndenge nazalaka?’

     “Koluka kozala lokola basusu ezali na ntina te. Yango ekosala te ete bato bálinga yo mingi mpe ekokómisa yo malamu koleka te.”​—James.

  •   Koluka kondimama na bato ekoki kopekisa yo omonisa ndenge ozalaka. Okoki kokóma lokola “mwana-popi” oyo basusu bakoki kosakana na yango ndenge balingi. Elenge mobali moko na nkombo Jeremy alobi boye: “Nazalaki kosala nyonso oyo basɛngi ngai nasala kaka mpo bato bándima ngai, atako yango ekokaki kobebisa lokumu na ngai. Yango esalaki ete basusu bákóma kotambwisa ngai. Nakómaki mwana-popi na bango.”

     NDENGE MALAMU YA KOSALA: Yebá ndenge ozalaka mpe kobá kozala kaka bongo, na esika ozala lokola mongingima (caméléon) oyo ebongolaka langi na yango esika nyonso ezali. Yango wana Biblia elobi: “Ata bato balingi kosala mabe bazali baike [ebele], olanda bango te.”​—Kobima 23:2, Biblia liloba lya Nzambe.

     “Nakómaki kolinga eloko nyonso oyo basusu bazalaki kolinga​—miziki, masano, molato, monzɛlɛ . . . Nakómaki lokola bango. Nakanisi ete bazalaki komona ete nazalaki te ndenge nazalaka. Moto nyonso amonaki yango, ezala ngai moko mpe. Nakómaki komimona mpamba mpe natikalaki ngai moko. Nayebaki lisusu te soki nazalaki moto ya ndenge nini. Nabosanaki soki nani mpenza nazalaki. Nayaki koyeba na nsima ete okoki te kondimama na moto nyonso mpe ete bato nyonso te nde bakolinga yo. Ezali mpo na yango te nde osengeli kotika likanisi ya koluka baninga. Esengeli kozala na motema molai mpe kotika ntango mpo na koyeba soki ozali moto ya ndenge nini.”​—Melinda.

  •   Koluka kondimama na bato ekoki kobebisa bizaleli na yo. Elenge mobali moko na nkombo Chris amonaki bosolo ya likambo yango na oyo ekómelaki ndeko na ye. Chris alobi boye: “Akómaki kosala makambo oyo azalaki te kosala liboso, na ndakisa komɛla drɔgɛ kaka mpo baninga na ye bándima ye. Akómaki momɛli-bangi monene, mpe etikalaki moke abebisa bomoi na ye kaka boye.”

     NDENGE MALAMU YA KOSALA: Kimá bato oyo bamonisaka bizaleli ya mabe na misala mpe na maloba na bango. Biblia elobi: “Ye oyo atambolaka na bato ya bwanya akokóma na bwanya, kasi ye oyo azalaka na boyokani na bazoba akosuka mabe.”​—Masese 13:20.

     “Na bantango mosusu ezalaka mabe te koluka boninga epai ya basusu mpe kosala makasi basusu bándima yo. Kasi koluka te kosala makambo oyo oyebi ete ezali mabe kaka mpo basusu bándima yo. Baninga malamu bakondima yo kaka ndenge ozalaka mpenza.”​—Melanie.

     Toli: Ntango ozali koluka bato ya sika mpo bókóma baninga, kosuka kaka te na koluka bato oyo makambo na bango eyokani na oyo ya yo. Luká nde baoyo bazali na bizaleli ya malamu, oyo ozali na bango kondima moko, etamboli moko, mpe oyo bosambelaka na bango lingomba moko.

    Kaka ndenge bilamba mosusu ekoki kosimba te na nzoto na yo, ezali mpe na bato mosusu oyo yo ná bango ekoki kosimba te