Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 32

Kómisá kondima na yo makasi epai ya Mozalisi

Kómisá kondima na yo makasi epai ya Mozalisi

“Kondima . . . ezali elembeteli oyo ezali komonisa bosolo ya makambo atako ezali komonana te.”​—EBR. 11:1.

LOYEMBO 11 Biloko Nzambe akelá ekumisaka Ye

NA MOKUSE *

1. Makambo nini bateyá yo mpo na Mozalisi?

SOKI obɔkwamá na libota ya Batatoli ya Yehova, na ntembe te oyekolaki makambo etali Yehova banda bomwana. Bateyaki yo ete azali Mozalisi, azali na bizaleli ya kitoko, mpe ete akokómisa mabele paradiso.​—Eba. 1:1; Mis. 17:24-27.

2. Ndenge nini bato mosusu batalelaka bato oyo bandimaka ete Nzambe akelá biloko nyonso?

2 Nzokande bato mingi bandimaka te ete Nzambe azali. Basusu bandimaka te ete ye nde akelá biloko nyonso. Kutu, bandimaka ete bomoi ebandá kaka yango moko. Balobaka ete ebandaki na biloko mikemike ya bomoi, mpe malembemalembe biloko yango ekolaki mpe ebimisá bikelamu ndenge na ndenge ya bomoi. Bato mosusu oyo batángá mingi mpe bandimaka likambo yango. Balobaka ete siansi emonisaka polele ete Biblia elobaka solo te, mpe bato oyo bandimaka ete Mozalisi azali batángá te, bazali mayele te, mpe bakoki kokosama na pɛtɛɛ nyonso.

3. Mpo na nini ezali na ntina tókómisa kondima na biso moko makasi?

3 Makambo oyo bato mosusu ya mayele balobi esengeli kopekisa biso tóndima ete Yehova azali Mozalisi na biso ya bolingo? Eyano na motuna yango etaleli mingimingi ntina oyo tondimaka ete Yehova azali Mozalisi. Mpo na nini tondimaka ete Yehova azali Mozalisi? Ezali nde mpo bayebisá biso bongo, to mpo biso moko tozwaki ntango ya kotalela makambo oyo endimisi biso likambo yango? (1 Ko. 3:12-15) Ata soki tozali Batatoli ya Yehova eleki sikoyo bambula mingi to te, biso nyonso tosengeli kokoba kokómisa kondima na biso makasi. Soki tosali bongo, tokokosama te na “filozofi mpe na bokosi ya mpambampamba” ya bato oyo batyaka ntembe ete Biblia elobaka solo. (Kol. 2:8; Ebr. 11:6) Mpo na kosalisa biso, lisolo oyo ekolobela (1) ntina oyo bato mingi bandimaka te ete Mozalisi azali, (2) ndenge oyo okoki kokómisa kondima na yo makasi epai ya Yehova Mozalisi na yo, mpe (3) ndenge oyo okoki kokoba kobatela kondima yango makasi.

NTINA OYO BATO MINGI BANDIMAKA TE ETE MOZALISI AZALI

4. Na kotalela Baebre 11:1, kondima ya solosolo esimbami na nini?

4 Bato mosusu bakanisaka ete kozala na kondima elimboli kotya motema na likambo moko ata soki eloko moko te emonisi ete likambo yango ezali solo. Kasi Biblia eteyaka bongo te. (Tángá Baebre 11:1.) Biblia emonisi ete kondima esimbami na bilembeteli ya solosolo. Na yango atako tomonaka Yehova ná Yesu te, tozali na bilembeteli oyo emonisi ete bazalaka mpenza, mpe ete Bokonzi ya likoló ezali solo. (Ebr. 11:3) Motatoli ya Yehova moko oyo azali moto ya mayele na makambo ya siansi alobi boye: “Batatoli ya Yehova bazali na bilembeteli ya solosolo mpo na makambo oyo bandimaka. Mpe baboyaka makambo ya siansi te.”

5. Mpo na nini bato mingi bandimaka te ete Nzambe nde akelá biloko nyonso oyo ezali na bomoi?

5 Tokoki komituna boye: ‘Soki ezali na bilembeteli ya solosolo oyo emonisi ete Mozalisi azali, mpo na nini bato mingi bandimaka te ete Nzambe nde akelaki biloko nyonso oyo ezali na bomoi?’ Bato mosusu baluká naino te kotalela makambo oyo ekoki kondimisa bango ete Yehova azali Mozalisi. Robert, oyo azali sikoyo Motatoli ya Yehova, alobi boye: “Lokola na eteyelo bateyaki biso te ete Nzambe nde akelaki biloko nyonso, nabandaki kokanisa ete liteya ya bozalisi ezali lokuta. Kasi ntango nakómaki na mbula mwa moke koleka 20, nasololaki na Motatoli ya Yehova moko, mpe nayekolaki ete Biblia epesi biso bantina mingi oyo emonisi ete Nzambe akelaki biloko nyonso. Yango nde endimisaki ngai ete Nzambe akelá biloko nyonso.” *​—Talá etanda “ Liyebisi epai ya baboti.”

6. Mpo na nini bato mosusu baboyaka kondima ete Mozalisi azali?

6 Bato mosusu bandimaka te ete Mozalisi azali mpo balobaka ete bakoki kondima kaka biloko oyo bakoki komona. Nzokande, bandimaka biloko mosusu oyo emonanaka te. Na ndakisa, bandimaka ete ezali na nguya moko oyo esalaka ete eloko oyo ezali na likoló ekwea na mabele (gravité). Bandimaka yango mpo bazali na makambo oyo emonisaka bango ete ezali solo. Kondima oyo Biblia elobeli esimbami mpe na “bosolo ya makambo atako ezali komonana te.” (Ebr. 11:1) Esɛngaka ntango mpe milende mpenza mpo na koyekola makambo oyo endimisaka biso ete Nzambe azali. Kasi bato mingi balingaka kosala milende ya ndenge wana te. Moto oyo aboyi kosala milende yango akoki koloba ete Nzambe azalaka te.

7. Bato nyonso oyo batángá, baboyaka kondima ete Nzambe nde akelá mɔlɔ́ngɔ́? Limbolá.

7 Nsima ya koyekola makambo oyo emonisi ete Nzambe azali, bato mosusu ya mayele na makambo ya siansi bamindimisi mpenza ete Nzambe nde akelá mɔlɔ́ngɔ́. * Ndenge moko na ndeko Robert, oyo tolobelaki liboso, bato mosusu bakoki koboya kondima ete ezali na moto moko oyo akelaki biloko nyonso mpo bateyá bango soki moke te liteya ya bozalisi na iniversite. Kasi bato mingi ya mayele bayaki koyeba Yehova mpe bakómá kolinga ye. Ndenge moko na bato yango, biso nyonso tosengeli kokómisa kondima na biso makasi epai ya Nzambe, ata soki bateyá biso yango na kelasi to te. Moto moko te akoki kosala yango na esika na biso.

NDENGE YA KOKÓMISA KONDIMA NA YO MAKASI EPAI YA MOZALISI

8-9. (a) Motuna nini tokotalela sikoyo? (b) Ndenge nini koyekola biloko oyo Nzambe akelá ekoki kosalisa yo?

8 Ndenge nini okoki kokómisa kondima na yo makasi epai ya Mozalisi? Tólobela lolenge minei ya kosala yango.

9 Yekoláká biloko oyo Nzambe akelá. Okoki kokómisa kondima na yo makasi epai ya Mozalisi, soki ozali kotala na likebi mpenza banyama, milona, mpe minzoto. (Nz. 19:1; Yis. 40:26) Soki ozali koyekola biloko yango mingi, yango ekosalisa yo omindimisa ete Yehova azali Mozalisi. Mbala mingi, mikanda na biso ebimisaka masolo ndenge na ndenge oyo elobeli bozalisi. Koboya te kotánga masolo yango ata soki omonaka ete ezalaka mpasi kokanga ntina na yango. Yekolá makambo oyo okokoka. Mpe kobosana te kobwaka liso na site na biso, jw.org, mpo na kotala bavideo kitoko oyo elobeli bozalisi, oyo ebimaki na mayangani na biso ya etúká na bambula oyo euti koleka.

10. Pesá ndakisa moko oyo emonisi ete biloko oyo ezali na mokili emonisaka ete Mozalisi azali. (Baroma 1:20)

10 Ntango ozali kotala biloko oyo Nzambe akelá, tyá likebi na makambo oyo emonisi ete Mozalisi azali. (Tángá Baroma 1:20.) Na ndakisa, moi epesaka molunge mpe pole oyo ezalaka na ntina mpo na mabele. Kasi ebimisaka mpe pole mosusu oyo ekoki kozala likama mpo na bomoi. Yango wana, esengeli eloko moko ebatela biso mpo pole yango esala biso mabe te. Eloko yango nini? Ezali etando moko ya mopɛpɛ oyo ezingi mabele nde ebatelaka biso. Ntango pole yango ya mabe ezali kokóma makasi mingi, etando yango ya mopɛpɛ ebakisamaka. Sikoyo omoni te ete esengeli kozala na moto moko oyo abongisá makambo ndenge wana? Na ntembe te, asengeli kozala Mozalisi ya bolingo mpe ya mayele.

11. Epai wapi okoki komona makambo oyo etali bozali, oyo ekoki kokómisa kondima na yo makasi? (Talá etanda “ Makambo mosusu oyo ekokómisa kondima na yo makasi.”)

11 Okoki komona makambo mingi oyo ekoki kokómisa kondima na yo makasi na oyo etali bozalisi soki otali na Index des publications des Témoins de Jéhovah mpe soki osali bolukiluki na jw.org. Okoki kobanda naino kotánga masolo mpe kotala bavideo oyo ezali na molɔngɔ ya masolo “Ebimá kaka yango moko?” Masolo mpe bavideo yango ezalaka mikuse mpe elobelaka makambo ya kokamwa oyo etali banyama mpe bikelamu mosusu. Elobeli mpe bandakisa mosusu oyo emonisi ndenge bato ya mayele na makambo ya siansi bamekolaki biloko oyo Nzambe akelá mpo na kosala biloko mosusu.

12. Ntango ozali koyekola Biblia, osengeli kotya likebi na makambo nini?

12 Yekoláká Biblia. Na ebandeli, moto ya mayele na makambo ya siansi oyo tolobelaki liboso, aboyaki kondima ete Mozalisi azali. Kasi na nsima, akómaki kondima yango. Alobi boye: “Kondima na ngai esimbamaki kaka te na makambo oyo nayekolaki na siansi. Esimbamaki mpe na makambo oyo namonaki ntango nayekolaki Biblia na mozindo.” Mbala mosusu osili koyeba mateya ya Biblia malamu. Kasi, mpo kondima na yo epai ya Mozalisi ekóma makasi, osengeli kokoba koyekola Liloba ya Nzambe. (Yos. 1:8; Nz. 119:97) Na ndakisa, ntango ozali koyekola, tyáká likebi na ndenge oyo Biblia elobeli na bosikisiki makambo oyo esalemá kala mpenza. Luká koyeba ndenge oyo bisakweli na yango ekokisamá mpe boyokani oyo ezali kati na makambo oyo bato ndenge na ndenge bakomaki na Biblia. Kosala bongo ekokómisa kondima na yo makasi ete Mozalisi ya bolingo mpe ya bwanya asalaki biso. Mpe ekosalisa yo ondima mpenza ete Biblia ekomamaki na litambwisi ya elimo santu na ye. *​—2 Tim. 3:14; 2 Pe. 1:21.

13. Pesá ndakisa moko oyo emonisi bwanya oyo ezali na Liloba ya Nzambe.

13 Ntango ozali koyekola Liloba ya Nzambe, talá ndenge toli na yango ekoki kosalisa yo. Na ndakisa, banda kala Biblia elobá ete bolingo ya mbongo ezali mosisa ya makambo nyonso ya mabe mpe ebimisaka “ebele ya bampasi.” (1 Tim. 6:9, 10; Mas. 28:20; Mat. 6:24) Ezali mpe bongo lelo oyo? Buku moko oyo elobelaka makanisi mpe bizaleli ya bato ya mikolo na biso elobi boye: “Mbala mingi bato oyo balingaka konduka biloko ya mokili, bazalaka mpenza na esengo te mpe banyokwamaka mingi na makanisi. Ata mpe bato oyo bazalaka na mposa ya kokóma na mbongo mingi bakómaka kobɛla na motó mpe babɛlaka bamaladi mosusu mingi.” Na yango, likebisi oyo Biblia epesi biso ya koboya kolinga mbongo mingi ezali mpenza toli ya malamu! Ezali na batoli mosusu ya Biblia oyo esalisá yo? Soki tokanisi na batoli nyonso ya malamu oyo ezali na Biblia, tokomona ete Mozalisi na biso ayebi oyo eleki malamu mpo na biso mpe tokoluka ntango nyonso toli epai na ye. (Yak. 1:5) Mpe yango ekosala ete tózala mpenza na bomoi ya esengo.​—Yis. 48:17, 18.

14. Koyekola Biblia ekosalisa yo oyeba makambo nini mpo na Yehova?

14 Yekoláká Biblia na mokano ya koyeba Yehova malamu koleka. (Yoa. 17:3) Ntango ozali koyekola Biblia, okoyeba bomoto ya Yehova mpe bizaleli na ye. Okomona mpe ete azalaka na bizaleli yango soki oyekoli biloko oyo akelá. Koyekola bizaleli ya Yehova endimisaka biso ete azalaka mpenza. (Kob. 34:6, 7; Nz. 145:8, 9) Wana ozali kokoba koyekola koyeba Yehova, kondima na yo epai na ye ekokóma makasi, okokóma kolinga ye mingi, mpe boninga na yo ná ye ekokóma lisusu makasi koleka.

15. Matomba nini okozwa soki oyebisi basusu mateya oyo ondimaka?

15 Yebisáká basusu makambo oyo ondimaka mpo na Nzambe. Soki osali bongo, kondima na yo moko ekokóma lisusu makasi. Kasi okosala nini soki na mosala ya kosakola moto moko aboyi kondima ete Nzambe azalaka mpe oyebi te eyano ya kopesa ye? Luká koyeba eyano oyo Biblia epesi mpo na likambo yango na moko ya mikanda na biso, mpe na nsima pesá ye eyano yango. (1 Pe. 3:15) Okoki mpe kosɛnga Motatoli ya Yehova moko oyo ayebi makambo mingi asalisa yo. Ata soki moto yango andimi biyano oyo euti na Biblia to te, okozwa matomba na bolukiluki oyo osalaki. Kondima na yo ekokóma lisusu makasi koleka. Yango ekosala ete okosama te na mateya ya lokuta ya baoyo bamonanaka ete bazali bato ya mayele mpe ya bwanya, nzokande balobaka ete Mozalisi azali te.

BATELÁ KONDIMA NA YO MAKASI!

16. Nini ekoki kosalema soki totiki kokómisa kondima na biso makasi mpe kobatela yango?

16 Ata soki tosalelaka Yehova banda bambula mingi to te, tosengeli kokoba kokómisa kondima na biso makasi epai na ye mpe kobatela yango. Mpo na nini? Mpo soki tokebi te, kondima na biso ekoki kolɛmba. Kobosana te ete kondima esimbami na bilembeteli ya makambo oyo emonanaka te. Ezalaka mpasi te tóbosana eloko oyo tokoki komona te. Yango wana, ntoma Paulo abengaki kozanga kondima “lisumu oyo ezali kokanga biso kozanga mpasi.” (Ebr. 12:1) Kasi ndenge nini tokoki kokima motambo yango?​—2 Tes. 1:3.

17. Nini ekoki kosalisa biso mpo tóbatela kondima na biso?

17 Ya liboso, sɛngá Yehova elimo santu na ye mpe saláká yango mbala na mbala. Mpo na nini? Mpo kondima ezali moko ya bizaleli ya mbuma ya elimo. (Gal. 5:22, 23) Tokoki te kokómisa kondima na biso makasi epai ya Mozalisi mpe kobatela yango kozanga lisalisi ya elimo santu na ye. Soki tokobi kosɛnga Yehova elimo na ye, akopesa biso yango. (Luka 11:13) Tokoki kutu kobondela: “Bakiselá biso kondima.”​—Luka 17:5.

18. Na kotalela Nzembo 1:2, 3, likabo nini ya motuya tozali na yango lelo oyo?

18 Ya mibale, Yekoláká Liloba ya Nzambe mbala na mbala. (Tángá Nzembo 1:2, 3.) Ntango nzembo yango ekomamaki, kaka Bayisraele moke nde bazalaki na buku ya Mibeko ya Nzambe na mobimba na yango. Kasi, mokonzi mpe banganga-nzambe bakokaki kozala na bakopi na yango. Lisusu, bazwaki bibongiseli ete na mbula nsambo nyonso “mibali, basi, mpe bana,” ata mpe bato oyo bazalaki kofanda bapaya na Yisraele bálanda botángi ya Mibeko ya Nzambe. (Mib. 31:10-12) Ntango Yesu azalaki awa na mabele, kaka bato moke nde bazalaki na barulo ya Makomami mpe ezalaki kaka na basinagoge. Kasi lelo oyo, bato mingi bazali na Biblia mobimba to ndambo na yango. Yango ezali mpenza likambo ya esengo! Ndenge nini tokoki komonisa ete tozwaka Biblia na motuya mingi?

19. Tosengeli kosala nini mpo na kobatela kondima na biso makasi?

19 Tokomonisa ete tosepelaka na Liloba ya Nzambe soki tozali kotánga yango mbala na mbala. Tosengeli kotya ntango mpo na kotánga mpe koyekola Biblia, kasi te kosala yango kaka mpo tozangi makambo ya kosala. Soki tozali na programɛ malamu ya boyekoli, tokokómisa kondima na biso makasi.

20. Tosengeli kozwa ekateli ya kosala nini?

20 Na kokesana na “bato ya bwanya mpe ya mayele” ya mokili oyo, tozalaka na kondima makasi oyo esimbami na Liloba ya Nzambe. (Mat. 11:25, 26) Biblia emonisi biso ntina oyo makambo ya mokili ezali kobeba se kobeba mpe oyo Yehova akosala mpo na yango. Na yango, tózwa ekateli ya kokómisa kondima na biso makasi mpe ya kosalisa ebele ya bato bákóma na kondima epai ya Mozalisi na biso. (1 Tim. 2:3, 4) Mpe tókoba kozela ntango bikelamu nyonso ya bomoi awa na mabele bakokumisa Yehova mpe bakoloba maloba oyo ezali na Emoniseli 4:11 ete: “Yehova, ɛɛ Nzambe na biso, obongi kozwa nkembo . . . mpo ozalisaki biloko nyonso.”

LOYEMBO 2 Yehova nde nkombo na yo

^ par. 5 Biblia elobi polele ete Yehova Nzambe nde akelaki biloko nyonso. Kasi bato mingi bandimaka yango te. Balobaka ete biloko nyonso ebimá kaka yango moko. Soki tokómisi kondima na biso makasi epai ya Nzambe mpe na Biblia, tokotika te ete makambo oyo bato balobaka elɛmbisa biso. Lisolo oyo ekomonisa ndenge oyo tokoki kosala yango.

^ par. 5 Na biteyelo mingi, balakisi mosusu bamekaka ata moke te koloba ete Nzambe nde akelaki biloko nyonso. Bakanisaka ete soki balobi bongo, bakotinda bana-kelasi na makasi ete bándimela Nzambe.

^ par. 7 Mpo na komona makambo oyo bato ya mayele soki 60, oyo bandimaka ete Nzambe ekelá biloko nyonso, balobi, talá Index des publications des Témoins de Jéhovah. Talá na motó ya likambo Science,” mpe na motó ya likambo moke “scientifiques expriment leur croyance en la création.” Okoki mpe komona makanisi mosusu na Buku ya bolukiluki ya Batatoli ya Yehova. Na motó ya likambo “Makambo ya siansi mpe ya teknoloji” na motó ya likambo moke “‘Mituna-lisolo’ (Masolo ya Lamuká!).”

^ par. 12 Na ndakisa, talá lisolo La science et la Bible sont-elles compatibles?na Lamuká! ya 02/2011 na Français, mpe lisolo “Makambo oyo Yehova alobaka ekokisamaka” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/01/2008.