Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 2

Yehova nde nkombo na yo

Yehova nde nkombo na yo

(Nzembo 83:18)

  1. 1. Yo Nzambe ya bomoi​—

    Yo Nzambe Mozalisi,

    Ata n’eleko nini​—

    Nkombo n’o Yehova.

    Tozali n’esengo

    Mpo toza’ lisangá n’o.

    Mpe na bamboka nyonso,

    Toz’okumisa yo.

    (MONDIMO)

    Yehova, Yehova,

    Yo oleki nyonso.

    Ata kuna na likoló

    To mpe na mabele.

    Yo Mozwi-ya-Nguya-Nyonso,

    Bato báyeb’ango.

    Yehova, Yehova,

    Ya biso Nzambe kaka yo.

  2. 2. Yo okómisaka

    Biso ndenge olingi,

    Mpo tósal’oy’olingi;

    Nkombo n’o Yehova.

    Nkomb’opesá biso:

    Batatoli’a Yehova.

    Eza’ lokumu mpenza​—

    Kobengama bongo.

    (MONDIMO)

    Yehova, Yehova,

    Yo oleki nyonso.

    Ata kuna na likoló

    To mpe na mabele.

    Yo Mozwi-ya-Nguya-Nyonso,

    Bato báyeb’ango.

    Yehova, Yehova,

    Ya biso Nzambe kaka yo.