Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 11

Ndenge nini mitinda ya Biblia esalisaka biso?

Ndenge nini mitinda ya Biblia esalisaka biso?

1. Mpo na nini tozali na mposa ya litambwisi?

Ndenge nini mitinda ya Biblia esalisaka biso tózwa bibongiseli mpo na kokima makama?​—NZEMBO 36:9.

Mozalisi na biso aleki biso na bwanya. Lokola azali Tata ya bolingo, amibanzabanzaka mpo na biso. Lisusu, akelá biso te mpo tómitambwisaka biso moko. (Yirimia 10:23) Kaka ndenge esɛngaka ete baboti bákamba mwana na bango, biso mpe tozalaka na mposa ete Nzambe atambwisa biso. (Yisaya 48:17, 18) Mitinda ya Biblia etambwisaka biso, mpe litambwisi yango ezali likabo ya Nzambe.​—Tángá 2 Timote 3:16.

Mibeko mpe mitinda ya Yehova eteyaka biso lolenge ya bomoi oyo eleki malamu lelo oyo mpe emonisaka biso ndenge oyo tokoki kozwa likabo ya bomoi ya seko na mikolo ezali koya. Lokola Nzambe nde akelá biso, tosengeli kozala na botɔndi mpo na litambwisi na ye mpe kosepela kotosa mibeko mpe mitinda na ye.​—Tángá Nzembo 19:7, 11; Emoniseli 4:11.

2. Ndenge nini mitinda ya Biblia etambwisaka biso?

Mitinda oyo ezali na Biblia ezali mateya ya ntina mingi. Mateya mosusu ya Biblia emonisaka biso nini Nzambe alingi tósala na makambo oyo tokutanaka na yango. Mibeko mosusu esalelamaka na makambo ya sikisiki. (Kolimbola Mibeko 22:8) Tosengeli kosalela makoki na biso ya kokanisa mpo na koyeba ndenge oyo tokoki kosalela etinda moko ya Biblia na likambo moko boye. (Masese 2:10-12) Na ndakisa, Biblia eteyaka ete bomoi ezali likabo ya Nzambe. Etinda wana ya ntina mingi ekoki kotambwisa biso ntango tozali na mosala, na ndako mpe na mobembo. Yango etindaka biso tózwa bibongiseli mpo na kokima makama.​—Tángá Misala 17:28.

3. Mitinda nini mibale eleki ntina?

Yesu alobelaki mitinda mibale oyo eleki ntina. Etinda ya liboso emonisaka ete ntina oyo Nzambe akelá bato ezali mpo báyeba ye, bálinga ye mpe básalela ye na bosembo. Ntango tozali kozwa bikateli, tosengeli kobosanaka te etinda wana ya liboso. (Masese 3:6) Bato oyo batosaka etinda wana bakómaka baninga ya Nzambe, bazwaka esengo ya solosolo mpe bakozwa bomoi ya seko.​—Tángá Matai 22:36-38.

Etinda ya mibale ekoki kosalisa biso tózala na kimya ná basusu. (1 Bakorinti 13:4-7) Kosalela etinda wana esɛngi kolanda ndakisa ya Nzambe na ndenge ya kosalela basusu makambo.​—Tángá Matai 7:12; 22:39, 40.

4. Ndenge nini mitinda ya Biblia esalisaka biso?

Mitinda ya Biblia eteyaka mabota ndenge oyo bolingo ekoki kosalisa bango bázala na bomoko. (Bakolose 3:12-14) Lisusu, Liloba ya Nzambe ebatelaka mabota na ndenge eteyaka bango etinda oyo: libala esengeli koumela libela.​—Tángá Ebandeli 2:24.

Soki tozali kolanda mitinda ya Biblia ekoki kosalisa biso tózanga eloko ya kolya te mpe tózala na kimya na makanisi. Na ndakisa, mbala mingi bapatrɔ basepelaka na basali oyo batosaka mitinda ya Biblia ya kozala bato ya kolongobana mpe makasi na mosala. (Masese 10:4, 26; Baebre 13:18) Liloba ya Nzambe eteyaka biso mpe tósepela na biloko oyo ezali mpenza na ntina mpe boninga na biso ná Nzambe ezala na esika ya liboso koleka biloko ya mokili.​—Tángá Matai 6:24, 25, 33; 1 Timote 6:8-10.

Kosalela mitinda ya Biblia ekoki kosalisa biso tózala nzoto kɔlɔngɔnɔ. (Masese 14:30; 22:24, 25) Na ndakisa, kolanda mobeko ya Nzambe oyo epekisi molangwa ebatelaka biso na bamaladi mabe mpe makama. (Masese 23:20) Yehova apesi biso nzela tómɛla masanga, kasi tólekisa ndelo te. (Nzembo 104:15; 1 Bakorinti 6:10) Mitinda ya Nzambe esalisaka biso na ndenge eteyaka biso tókeba na misala na biso mpe na makanisi na biso. (Nzembo 119:97-100) Kasi, bakristo ya solo batosaka mitinda ya Nzambe te kaka mpo na matomba na bango moko. Basalaka yango mpo na kokumisa Yehova.​—Tángá Matai 5:14-16.