Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 2

Sanzolá Yehova na lisangá

Sanzolá Yehova na lisangá

“Nakosanzola yo na katikati ya lisangá.”​—NZ. 22:22.

LOYEMBO 59 Sanzolá Yah elongo na ngai

NA MOKUSE *

1. Ndenge nini Davidi azalaki komiyoka mpo na Yehova, mpe yango etindaki ye asala nini?

MOKONZI DAVIDI akomaki boye: “Yehova azali monene mpe asengeli kosanzolama mingi.” (Nz. 145:3) Davidi azalaki kolinga Yehova, mpe bolingo yango etindaki ye asanzola Nzambe “na katikati ya lisangá.” (Nz. 22:22; 40:5) Na ntembe te, olingaka Yehova mpe ondimaka maloba oyo ya Davidi ete: “Tiká opambwama, Ee Yehova Nzambe ya Yisraele tata na biso, libela na libela.”​—1 Nt. 29:10-13.

2. (a) Ndenge nini tokoki kosanzola Yehova? (b) Mikakatano nini basusu bazalaka na yango, mpe tokotalela liboso nini?

2 Lelo oyo, lolenge moko oyo tosanzolaka Yehova ezali ya kopesa biyano na makita. Kasi, bandeko mosusu bazali na mokakatano moko monene. Balingaka kopesa biyano na makita, kasi babangaka. Ndenge nini bakoki kotika kobanga? Mpe basusu bamonaka ete bakokoka te kopesa biyano ya kolendisa. Wapi mwa makanisi oyo ekoki kosalisa biso nyonso? Liboso ya kozwa biyano na mituna yango, tótalela naino ntina minei oyo topesaka biyano na makita.

NTINA OYO TOPESAKA BIYANO NA MAKITA

3-5. (a) Ndenge Baebre 13:15 emonisi yango, mpo na nini topesaka biyano na makita? (b) Biso nyonso tosengeli kopesaka biyano ya ndenge moko? Limbolá.

3 Yehova apesi mokomoko na biso libaku ya kosanzola ye. (Nz. 119:108) Biyano oyo topesaka na makita ezali na kati ya ‘mbeka na biso ya lisanzoli,’ mpe moto moko te akoki kopesa mbeka yango na esika na biso. (Tángá Baebre 13:15.) Yehova asɛngaka biso nyonso tópesa mbeka, to biyano, ya ndenge moko? Te, asɛngaka biso bongo te!

4 Yehova ayebi ete makoki mpe makambo ya bomoi na biso ezali ndenge moko te, mpe azwaka na motuya mpenza bambeka oyo tokoki kopesa ye. Kanisá bambeka oyo azalaki kondima epai ya Bayisraele. Bayisraele mosusu bazalaki na likoki ya kopesa mwana-mpate to ntaba. Kasi Moyisraele oyo azalaki mobola akokaki kopesa “bipopo mibale to bana mibale ya bibenga.” Mpe soki Moyisraele azali na makoki te ya kopesa ndɛkɛ mibale, Yehova azalaki kondima “moko ya bandambo zomi ya efa ya farini ya malamu.” (Lev. 5:7, 11) Farini ezalaki ntalo mingi te, kasi Yehova azalaki kaka kozwa mbeka yango na motuya, soki ezali “farini ya malamu.”

5 Nzambe na biso ya boboto abongwani te. Ntango topesaka biyano, azelaka te ete mokomoko na biso azala molobi malamu lokola Apolosi, to azala na mayele ya kondimisa lokola Paulo. (Mis. 18:24; 26:28) Yehova alingi kaka ete tópesaka biyano ya malamu, na kotalela makoki na biso. Kanisá mwasi oyo mobali akufá, oyo apesaki mbongo ya bibende mibale. Azalaki na motuya na miso ya Yehova mpo apesaki na kotalela makoki na ye.​—Luka 21:1-4.

Kopesa biyano ezali mpo na matomba na biso mpe ya bato oyo bakoyoka (Talá paragrafe 6-7) *

6. (a) Na kotalela Baebre 10:24, 25, biyano oyo toyokaka na makita ekoki kosala biso nini? (b) Ndenge nini okoki komonisa botɔndi mpo na biyano oyo elendisi yo?

6 Tolendisanaka na nzela ya biyano oyo topesaka. (Tángá Baebre 10:24, 25.) Biso nyonso tosepelaka koyoka biyano ndenge na ndenge oyo epesamaka na makita. Tosepelaka ntango mwana moke apesi eyano ya mokuse, oyo euti na motema na ye. Tolendisamaka mingi ntango toyoki esengo oyo ezali kobima na mongongo ya moto oyo azali kopesa eyano mpe kolobela liteya moko oyo auti koyekola. Mpe tosepelaka na moto oyo ‘azwi mpiko’ ya kopesa eyano, atako azalaka nsɔninsɔni to abandi koyekola monɔkɔ na biso sika. (1 Tes. 2:2) Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi mpo na milende na bango? Nsima ya makita, tokoki kopesa bango longonya mpo na biyano na bango ya kolendisa. Tokomonisa mpe botɔndi soki biso moko topesi biyano. Na ndenge yango, biso moko tokolendisama na makita, kasi tokolendisa mpe basusu.​—Rom. 1:11, 12.

7. Wapi matomba ya kopesa biyano na makita?

7 Tozwaka matomba ntango topesaka biyano. (Yis. 48:17) Na ndenge nini? Ya liboso, soki tomityeli mokano ya kopesa eyano, ekotinda biso tómibongisa malamu mpo na likita yango. Ntango tomibongisi malamu, tokangaka mpenza ntina ya Liloba ya Nzambe. Soki tokangi malamu ntina ya Liloba ya Nzambe, tokoyeba kosalela makambo oyo toyekoli. Ya mibale, tokosepela mingi na makita mpo biso mpe tozali kopesa biyano. Ya misato, lokola kopesa eyano esɛngaka milende, biyano oyo topesi ekoki kotikala biso na motó ntango molai nsima ya makita.

8-9. (a) Ndenge Malaki 3:16 elobi, okanisi ete Yehova asalaka nini na biyano oyo topesaka na makita? (b) Mokakatano nini basusu bakoki kaka kozala na yango?

8 Tosepelisaka Yehova ntango tolobelaka bindimeli na biso. Tóyeba ete Yehova ayokaka biso mpe azwaka na motuya milende oyo tosalaka mpo na kopesa biyano na makita. (Tángá Malaki 3:16.) Amonisaka yango na ndenge apambolaka biso ntango tosali nyonso mpo na kosepelisa ye.​—Mal. 3:10.

9 Tomoni polele ete tozali na bantina malamu ya kopesa biyano na makita. Atako bongo, basusu bakoki kaka kobanga kotombola lobɔkɔ. Soki yo mpe obangaka, kolɛmba nzoto te. Tótalela sikoyo mwa mitinda ya Biblia, mwa bandakisa, mpe mwa makanisi oyo ekoki kosalisa biso nyonso tópesaka biyano mingi na makita.

NDENGE YA KOTIKA KOBANGA

10. (a) Mingi kati na biso tobangaka nini? (b) Kobanga kopesa eyano ekoki komonisa nini?

10 Motema na yo ebɛtaka mbangumbangu soki kaka okanisi kotombola lobɔkɔ mpo na kopesa eyano? Soki ezali bongo, yebá ete ozali yo moko te. Mingi kati na biso tobangaka mwa moke ntango tozali kopesa eyano. Mpo otika kobanga, osengeli koyeba ntina oyo obangaka. Obangaka ete obosana likambo oyo olingi koloba, to ete okopesa eyano ya malamu te? Obangaka ete eyano ya basusu ekoleka oyo ya yo? Mpo na koloba solo, ezali elembo ya malamu. Ezali komonisa ete ozali moto ya komikitisa mpe omonaka ete basusu baleki yo. Yehova asepelaka na ezaleli ya komikitisa. (Nz. 138:6; Flp. 2:3) Kasi, alingi mpe ete osanzola ye mpe olendisa bandeko na yo na makita. (1 Tes. 5:11) Alingaka yo mpe akopesa yo mpiko oyo osengeli na yango.

11. Makanisi nini ya Biblia ekoki kosalisa biso?

11 Tótalela mwa makanisi oyo Biblia epesi. Biblia elobi ete biso nyonso tobɛtaka mabaku na maloba mpe na elobeli na biso. (Yak. 3:2) Yehova asɛngaka te ete tózala bato ya kokoka; bandeko ya lisangá mpe basɛngaka biso yango te. (Nz. 103:12-14) Bazali bandeko na biso ya elimo mpe balingaka biso. (Mrk. 10:29, 30; Yoa. 13:35) Bayebi ete na bantango mosusu tokoki kopesa eyano na ndenge oyo tobongisaki te.

12-13. Ndakisa ya Nehemia mpe ya Yona ekoki koteya biso nini?

12 Talá mwa bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa yo otika kobanga. Kanisá Nehemia. Azalaki kosala na ndako ya mokonzi moko ya nguya. Nehemia azalaki mawamawa mpo ayokaki ete bifelo mpe baporte ya Yerusaleme ebebisamaki. (Neh. 1:1-4) Kanisá ndenge motema ya Nehemia ebɛtaki mbangumbangu mpe abangaki ntango mokonzi atunaki ye ntina oyo azalaki na esengo te! Nehemia abondelaki mbala moko mpe na nsima apesaki eyano. Na yango, mokonzi asalaki mingi mpo na kosalisa basaleli ya Nzambe. (Neh. 2:1-8) Kanisá mpe Yona. Ntango Yehova atindaki ye akende kosakwela bato ya Ninive, Yona abangaki makasi mpe akendaki esika mosusu. (Yona 1:1-3) Kasi, Yehova asalisaki Yona akokisa mokumba yango. Mpe nsango oyo asakolaki esalisaki mpenza bato ya Ninive. (Yona 3:5-10) Ndakisa ya Nehemia eteyi biso ntina ya kobondela liboso ya kopesa eyano. Mpe ndakisa ya Yona eteyi biso ete Yehova akoki kosalisa biso tósalela ye ata soki tozali kobanga makasi ndenge nini. Kanisá naino, kopesa eyano na makita ya lisangá ekoki kobangisa ndenge moko na kosakola na engumba Ninive?

13 Wapi mwa makanisi oyo ekoki kosalisa yo opesa biyano ya kolendisa na makita? Tótalela yango.

14. Mpo na nini tosengeli kobongisa makita malamu, mpe ntango nini tokoki kosala yango?

14 Bongisáká makita nyonso. Soki omityeli mokano mpe omibongisi malamu, okobanga te kopesa eyano. (Mas. 21:5) Ya solo, moto na moto azali na programɛ na ye ya kobongisa makita. Ndeko mwasi Eloise, oyo azali na mbula mwa moke koleka 80 mpe mobali na ye akufá, abandaka kobongisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na ebandeli ya pɔsɔ. Alobi boye: “Nasepelaka na makita mingi soki nayekolaki liboso.” Ndeko mwasi mosusu na nkombo Joy, oyo asalaka mikolo nyonso, atyá ngonga mokolo ya pɔsɔ mpo na kobongisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Alobi boye: “Nalingaka ete makambo oyo tokoyekola ezala naino sika na makanisi na ngai.” Ndeko Ike, nkulutu oyo azalaka na makambo ebele ya kosala mpe azali mobongisi-nzela, alobi boye: “Namonaka ete eleki malamu nazwa ntango ya koyekola mokemoke na boumeli ya pɔsɔ na esika ya kolekisa ntango ebele na mbala moko.”

15. Ndenge nini okoki kobongisa makita malamu?

15 Kobongisa makita malamu esɛngaka nini? Liboso obanda koyekola, bondelá mpo na kosɛnga Yehova elimo santu. (Luka 11:13; 1 Yoa. 5:14) Na nsima, zwá mwa miniti mpo na kobwaka liso na lisolo yango, na ndakisa talá motó ya likambo, mitó ya makambo mike, bililingi, mpe bitanda nyonso. Ntango ozali koyekola paragrafe mokomoko, salá makasi otánga bavɛrsɛ oyo batye maloba na yango te. Manyolá makambo yango, mpe tyá likebi na makanisi oyo okosepela kopesa eyano. Soki omibongisi malamu, okozwa matomba mingi mpe ekozala mpasi te opesa eyano.​—2 Ko. 9:6.

16. Bisaleli nini ezali na monɔkɔ oyo oyebi, mpe ndenge nini osalelaka yango?

16 Soki likoki ezali, salelá bisaleli oyo totyaka na baaparɛyi, oyo ezali na monɔkɔ oyo oyebi. Na nzela ya ebongiseli na ye, Yehova apesi biso bisaleli mpo na kosalisa biso tóbongisa makita. JW Library® esalisaka biso tózwa mikanda ya boyekoli mpe tótya yango na telefone to na tablɛti na biso. Na nsima tokoki koyekola, to ata kotánga to mpe koyoka lisolo yango, ntango nyonso oyo tolingi mpe ata esika nini. Basusu basalelaka esaleli yango mpo na koyekola na ntango ya bopemi na mosala to na eteyelo, to mpe ntango bazali kosala mobembo. Watchtower Library mpe Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNETesalisaka biso tósala bolukiluki na makambo oyo tolingi koyeba malamumalamu.

Ndenge nini ozwaka ntango mpo na kobongisa makita? (Talá paragrafe 14-16) *

17. (a) Mpo na nini ezali malamu kobongisa biyano ebele? (b) Liteya nini ozwaki na video Kómá moninga ya Yehova​—Bongisá eyano na yo?

17 Soki likoki ezali, bongisáká biyano ebele mpo na eteni nyonso ya boyekoli. Mpo na nini? Mpo mbala mosusu bakopona yo te ntango nyonso oyo otomboli lobɔkɔ. Basusu bakoki kotombola mabɔkɔ nzela moko na yo, mpe motambwisi akoki kopona moko na bango. Mpo makita esila na ntango oyo esengeli, ekoki kosɛnga motambwisi apona bato mingi te na bisika mosusu. Na yango, kosilika te mpe kolɛmba nzoto te soki aponi yo te na ebandeli ya boyekoli. Soki obongisi biyano ebele, okozwa mabaku mosusu ya kopesa biyano. Kotánga vɛrsɛ ekoki mpe kozala na kati ya biyano oyo okobongisa. Kasi soki likoki ezali, omibongisa mpo na kopesa eyano, na maloba na yo moko. *

18. Mpo na nini tosengeli kopesa biyano ya mikuse?

18 Pesáká biyano ya mikuse. Mbala mingi, biyano oyo elendisaka mpenza ezalaka ya mikuse mpe ya mindɔndɔ te. Na yango, mityelá mokano ya kopesa biyano ya mikuse. Salá makasi elekaka segɔnde 30 te. (Mas. 10:19; 15:23) Soki opesaka biyano na makita banda bambula mingi, ozali na mokumba monene: osengeli kozala ndakisa malamu na oyo etali kopesa biyano ya mikuse. Soki ozali kopesa biyano ya mindɔndɔ oyo ezwi miniti ebele, ekoki kobangisa basusu, mpe bakokanisa ete bakokoka te kopesa biyano ya malamu lokola yo. Lisusu, kopesa biyano ya mikuse esalaka ete bato ebele bázwa libaku ya kopesa biyano. Mingimingi soki baponi yo moto ya liboso, pesá mbala moko eyano ya mokuse na motuna ya paragrafe. Koluka te kolobela makanisi nyonso oyo ezali na paragrafe. Soki likanisi ya ntina ya paragrafe ebimi, okoki kobakisa makanisi mosusu.​—Talá etanda “ Eyano nini nakoki kopesa?

19. Ndenge nini motambwisi akoki kosalisa yo, kasi osengeli kosala nini?

19 Okoki koyebisa motambwisi ete okosepela kopesa eyano na paragrafe moko boye. Soki omoni malamu kosala bongo, osengeli kosolola na motambwisi liboso mpenza ete makita ebanda. Soki bokómi na paragrafe yango, tombolá lobɔkɔ noki mpe na ndenge oyo motambwisi akoki komona yango.

20. Na ndenge nini makita ya lisangá ezali lokola kolya elongo na baninga?

20 Moná ete makita ezali lokola kolya elongo na baninga. Kanisá ete boyokani na mwa baninga ya lisangá bólekisa ntango mpo na kolya elongo, mpe basɛngi yo omema mwa bilei. Okosala nini? Ekoki kotungisa yo mwa moke, kasi okolinga kosala nyonso oyo okoki mpo omema eloko oyo ekoki kosepelisa moto nyonso. Yehova, Ye oyo abengisaka biso na makita, atyelaka biso ebele ya bilei ya malamu na mesa na ye. (Nz. 23:5; Mat. 24:45) Mpe asepelaka ntango biso mpe tomemi mwa eloko, na kotalela makoki na biso. Na yango, omibongisa malamu mpe kokakatana te kopesa biyano. Soki ozali kosala bongo, okolya na mesa ya Yehova, kasi okomema mpe eloko ya kokabolela bandeko ya lisangá.

LOYEMBO 2 Yehova nde nkombo na yo

^ par. 5 Ndenge moko na Davidi mokomi ya nzembo, biso nyonso tolingaka Yehova mpe tosepelaka kosanzola ye. Tozalaka na libaku monene ya komonisa ete tolingaka Nzambe ntango topesaka biyano na makita na biso. Kasi, basusu bamonaka ete ezali mpasi kopesa biyano na makita. Soki yo mpe omonaka bongo, lisolo oyo ekoki kosalisa yo oyeba ntina oyo obangaka mpe ndenge ya kotika kobanga.

^ par. 17 Na jw.org, talá video Kómá moninga ya Yehova​—Bongisá eyano na yo. Kende na MATEYA YA BIBLIA > BANA.

^ par. 63 BILILINGI: Bandeko na makita bazali kopesa biyano na esengo nyonso na Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.

^ par. 65 BILILINGI: Bandeko mosusu oyo bazalaki kopesa biyano na Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Atako moto na moto azali na makambo na ye, bango nyonso batyá ntango ya kobongisa makita.