Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO YA ZOMI

Ntango mosangani moko ya libota azali kobɛla

Ntango mosangani moko ya libota azali kobɛla

1, 2. Lolenge nini Satana asalelaki makambo ya nsɔ́mɔ mpe bokɔnɔ mpo na komeka kobebisa bosembo ya Yobo?

 YOBO asengeli mpenza kotángama kati na bato oyo bazalaki na bomoi ya libota ya esengo. Biblia ezali kobénga ye “moto oyo alekaki bato nyonso na monene na epai na ebimelo na ntango.” Azalaki na bana mibali nsambo mpe bana basi misato, bana na ye nyonso bazalaki zomi. Azalaki mpe na bozwi mpo na kokokisa malamu bamposa ya libota na ye. Likambo ya ntina, azalaki kopesa ndakisa na makambo ya elimo mpe azalaki komibanzabanza mingi na ntina na etɛlɛmɛlo ya bana na ye na miso ya Yehova. Nyonso oyo esalaki ete bikanganeli ya libota bizala makasi mpe na esengo.​—Yobo 1:1-5.

2 Ezalela ya Yobo ebendaki likebi ya Satana, monguna monene ya Yehova Nzambe. Satana, oyo azali ntango nyonso koluka kobebisa bosembo ya basaleli ya Nzambe, abundisaki Yobo na kobomáká libota na ye ya esengo. Na nsima, “abɛtaki Yobo na bibimba mabe longwa na matambe na makolo na ye kino epai na likoló na motó na ye.” Na yango Satana alikyaki kosalela makambo wana ya nsɔ́mɔ mpe maladi mpo na kobebisa bosembo ya Yobo.​—Yobo 2:6, 7.

3. Nini ezalaki bilembo ya bokɔnɔ ya Yobo?

3 Biblia epesi te nkombo ya maladi oyo Yobo azalaki na yango. Kasi, ezali koyebisa biso bobele bilembo na yango. Mosuni na ye etondaki na nkiso, mpe loposo na ye ya nzoto esalaki bikokoto, mpe ebandaki kopɔla. Monɔkɔ ya Yobo ezalaki kolumba nsolo, mpe nzoto na ye ezalaki kobimisa nsolo mabe. Azalaki koyoka mpasi mingi. (Yobo 7:5; 19:17; 30:17, 30) Na bwale na ye makasi, Yobo afandaki katikati na mputulu ya mɔ́tɔ mpe azalaki komikwanza na bipaso ya mbɛki. (Yobo 2:8) Ezalaki solo likambo ya mawa mingi!

4. Likambo nini libota mokomoko ekutanaka na yango na bantango mosusu?

4 Lolenge nini olingaki kosala soki yo nde ozwaki mpasi makasi motindo wana? Lelo oyo, Satana azali te kobɛta basaleli ya Nzambe na bokɔnɔ lokola oyo abɛtaki Yobo. Nzokande, na ntina na ezalela ya kozanga kokoka ya bato, mitungisi ya bomoi ya mokolo na mokolo, mpe kobeba ya ezingelo kati na yango tozali kobika, tosengeli bobele komizela ete na bantango mosusu, basangani ya libota bakobɛla. Ezala lolenge nini ya bibongiseli tokoki kokamata, biso nyonso tokoki kozwa maladi, atako bobele bato moke nde bakonyokwama na motindo oyo Yobo anyokwamaki. Ntango bokɔnɔ ekweli libota na biso, yango ekoki kozala mpenza mokakatano monene. Na yango, tiká tótalela lolenge Biblia ezali kosalisa biso na kolónga monguna wana ya kala ya bato.​—Mosakoli 9:11; 2 Timoté 3:16.

OZALI KOMIYOKA LOLENGE NINI NA NTINA NA YANGO?

5. Lolenge nini basangani ya libota basalaka liboso na bokɔnɔ ya ntango mokuse?

5 Kobulunganisama ya bomoi malamu ya mokolo na mokolo, mpo na ntina moko to mosusu, ezalaka ntango nyonso mokakatano, mpe yango ezali mpenzampenza solo soki kobulunganisama yango eyei mpo na bokɔnɔ oyo ezali koumela ntango molai. Ata maladi oyo ezali koumela ntango mokuse esɛngaka komimesenisa na ezalela ya makambo ya sika, kozala na makambo makasi te, mpe komipimela makambo mosusu. Basangani ya libota oyo bazali na nzoto kolɔngɔ́nɔ́ bakoki kotika kotya makɛlɛlɛ mpo na kopesa nzela na mobɛli ete apema. Bakoki kotika kosala makambo mosusu. Nzokande, kati na mabota mingi ata bana mike bamonisaka mayoki ya mawa mpo na ndeko na bango to mpo na moboti oyo azali kobɛla, atako na bantango mosusu esengeli nde kokundwela bango ete bámonisa motema mawa. (Bakolose 3:12) Soki ezali bokɔnɔ ya ntango mokuse, na momeseno libota ezalaka pene na kosala oyo esengeli. Lisusu, mosangani moko na moko ya libota azali komizela ete bámonisela ye lobanzo motindo moko ntango ye akobɛla.​—Matai 7:12.

6. Mayoki nini mamonanaka mbala mosusu ntango mosangani moko ya libota azali kobunda na bokɔnɔ makasi oyo eumeli ntango molai?

6 Kasi, ezali boni soki maladi ezali makasi mingi mpe kobulunganisama ezali makasi mpe eumeli ntango molai? Na ndakisa, ezali boni soki moto moko kati na libota abɛli maladi ya bukabuka, to nzoto nyonso enyeli mpo na bokɔnɔ oyo ebéngami Alzheimer, to azali konyokwama na bokɔnɔ mosusu? To ezali boni soki mosangani ya libota azali konyokwama na maladi ya motó, na ndakisa schizophrénie? Mayoki oyo emonanaka liboso ezali koyoka mawa​—mawa mpo ete molingami azali konyokwama makasi. Nzokande, koyoka mawa ekoki kolandana na mayoki mosusu. Wana basangani ya libota bazali komiyoka mpenza ete batungisami mpe ete bakoki lisusu kosala mwa misala misusu te mpo ete moko kati na bango abɛli, bakoki kozala na mayoki ya nkanda. Bakoki komituna ete: “Mpo na nini likambo oyo likómeli ngai?”

7. Lolenge nini mwasi ya Yobo asalaki liboso ya bokɔnɔ ya mobali na ye, mpe likambo nini ye abosanaki mpenza?

7 Emonani ete mayoki motindo moko ezalaki epai na mwasi ya Yobo. Omikundola ete, asilaki kobungisa bana na ye. Ntango makambo wana ya nsɔ́mɔ mabimaki, na ntembe te abandaki kobulungana mokemoke na makanisi. Na nsuka, wana amonaki na mbala moko mobali na ye ya makasi mpe ya nguya kozwa bokɔnɔ moko ya mpasi mpe ya nsɔ́ni, ayebaki te ete ezalaki na likambo moko ya ntina mingi oyo ebombanaki nsima na makambo nyonso wana ya mpasi​—boyokani oyo ye mpe mobali na ye bazalaki na yango elongo na Nzambe. Biblia elobi ete: “Na nsuka mwasi [ya Yobo] alobaki na ye ete, Okangi naino boyengebene na yo makasi? Lakelá Nzambe mabe mpe kufa!”​—Yobo 2:9.

8. Ntango mosangani moko ya libota azali kobɛla, mokapo nini ekosalisa basangani mosusu ete bázala na makanisi malamu?

8 Mingi balɛmbaka nzoto, kútu basilikaka, ntango bomoi na bango ebongwani mpenza mpo na bokɔnɔ ya moto mosusu. Nzokande, moklisto oyo azali kokanisa likoló na likambo yango asengeli koyeba na nsima ete yango ezali kopesa ye libaku kitoko ya komonisa bosolo ya bolingo na ye. Bolingo ya solo “ezali na motema molai mpe na boboto . . . [mpe] elukaka matomba na yango moko te . . . Ekomemaka makambo nyonso, ekondimaka nyonso, ekolikyaka nyonso, ekoyikaka mpiko na makambo nyonso.” (1 Bakolinti 13:4-7) Na yango, na esika ya kotika nzela ete mayoki ya mabe mázala na bokonzi likoló na biso, ezali likambo ya ntina ete tósala oyo esengeli mpo na kolongola makanisi yango.​—Masese 3:21.

9. Bindimiseli nini bikoki kosalisa libota na elimo mpe na mayoki ntango mosangani moko azali na bokɔnɔ makasi?

9 Nini ekoki kosalema mpo na kobatela bolamu ya elimo mpe ya mayoki ya libota ntango moko kati na basangani na yango azali na maladi makasi? Ya solo, maladi mokomoko esɛngaka likebi mpe nkisi ekeseni, mpe ekozala likambo ya malamu te koyebisa bino kati na búku oyo mwango boye to nkisi boye ya monganga oyo bosengeli kosalela. Nzokande, na ndimbola ya elimo, Yehova “akotɛlɛmisa baoyo nyonso bakumbami.” (Nzembo 145:14, NW) Mokonzi David akomaki ete: “Mapamboli mazali epai na ye oyo akobanza babólá; [Yehova] akobikisa ye na mokolo mabe. [Yehova akozala na] ye mpe akobikisa ye na bomoi. . . . [Yehova] akolendisa ye na mbeto na ye na malali.” (Nzembo 41:1-3) Yehova azali kobatela bomoi ya basaleli na ye na elimo, ata ntango bamekami na mayoki koleka makoki na bango. (2 Bakolinti 4:7) Mpo na basangani mingi ya libota oyo bazali kokutana na bokɔnɔ moko makasi kati na ndako na bango, maloba oyo ya mokomi na Nzembo ekómaka ya bango: “Nazali koyoka mpasi mingi, bikisá ngai, ɛ [Yehova], pelamoko na liloba na yo.”​—Nzembo 119:107.

KOBIKISAMA NA ELIMO

10, 11. (a) Likambo nini ezali na ntina mingi soki libota elingi kotɛlɛma ngwi liboso na bokɔnɔ? (b) Lolenge nini mwasi moko ayikaki mpiko na bokɔnɔ ya mobali na ye?

10 Lisese moko ya Biblia elobi ete: “Elimo na moto ekokumba malali na ye; kasi elimo etutami, nani akoki koyikela yango mpiko?” (Masese 18:14, NW) Kobulungana ekoki kopesa mpasi na elimo ya libota mpe na “elimo ya moto.” Nzokande, “motema na kimya ekoyeisela mosuni bomoi.” (Masese 14:30) Soki libota ekotɛlɛma ngwi liboso na maladi makasi to ekotɛlɛma te, yango etaleli mingimingi ezalela, to elimo, ya basangani na yango.​—Kokanisá na Masese 17:22.

11 Mwasi moklisto moko asengelaki koyika mpiko na komona mobali na ye kobebisama na maladi ya bɔɔngɔ́ bobele mbula motoba nsima ya kobalana. Amikundolaki ete: “Mobali na ngai akokaki lisusu koloba malamu te, mpe ekómaki mpenza mpasi mpo na ngai kosolola na ye. Nazalaki kolɛmba mingi mpenza na makanisi wana nazalaki komeka kososola makambo azalaki kobunda na koloba.” Lisusu, kanisá naino mpasi makasi mpe mawa oyo mobali wana azalaki na yango. Babalani wana basalaki nini? Atako bazalaki kofanda mosika na lisangá ya boklisto, ndeko mwasi asalaki oyo esengelaki mpo na kotikala makasi na elimo na kolandáká kotambola elongo na lisangá mpe kokóba kozwa bilei ya elimo kati na bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Yango epesaki ye makasi na elimo mpo na kobatela mobali na ye molingami kino ntango mobali ayaki kokufa nsima na mbula minei.

12. Lokola tomonaki yango na likambo ya Yobo, lisungi nini moto oyo azali kobɛla akoki mbala mosusu kopesa?

12 Mpo na Yobo, ezalaki ye moto oyo azalaki kobɛla nde atikalaki ntango nyonso ngwi. Atunaki mwasi na ye ete: “Tokozwa malamu na mabɔkɔ na Nzambe; bongo tokozwa mabe mpe te?” (Yobo 2:10) Likambo ya kokamwa ezali te soki moyekoli Yakobo atángaki na nsima Yobo lokola ndakisa monene ya motema pɛtɛɛ mpe ya kondima nyonso oyo ekoki kokómela biso! Tozali kotánga na Yakobo 5:11 ete: “Bosili koyoka mpo na mpiko na Yobo, bosili komona nsuka na makambo na ye epai na [Yehova], zambi [Yehova atondi na boboto mpe na motema mawa, NW].” Bobele bongo lelo oyo, na makambo mingi ezaleli ya mpiko ya mosangani moko ya libota oyo azali kobɛla esalisaka basusu kati na ndako ete bábatela makanisi malamu.

13. Kokokanisa nini esengeli kosalema te na libota oyo ezali na mosangani moko azali kobɛla makasi?

13 Mingi na baoyo basili kokutana na bokɔnɔ kati na libota bazali kondima ete na ebandeli ezalaka likambo ya mpasi mpo na basangani ya libota kondima mokakatano wana. Bazali mpe komonisa ete ezalaka na ndenge mingi mpenza oyo moto atalelaka likambo yango. Mbongwana mpe komimesenisa na ezalela ya makambo ya sika kati na bomoi ya mokolo na mokolo na ndako ekoki kozala mpasi na ebandeli. Kasi soki moto azali mpenza kosala milende, akoki komiyokanisa na ezalela ya sika. Na kosaláká bongo, ekozala na ntina te ete tókokanisa ezalela na biso na oyo ya basusu oyo bazali na bokɔnɔ te kati na libota, kokanisáká ete bomoi na bango ezali ya pɛtɛɛ mpe ete ‘ezangi mikakatano!’ Ya solo, ezali na moto moko te oyo ayebi mpenza bozito oyo basusu bazali komema. Baklisto nyonso bazali kobɔndisama kati na maloba oyo ya Yesu ete: “Bóya liboso na ngai, bino nyonso bozali kolɛmba na mosala mpe kokumba bozito mpe nakopemisa bino.”​—Matai 11:28.

KOTYA MAKAMBO YA NTINA NA ESIKA YA LIBOSO

14. Lolenge nini makambo ya ntina makoki kotyama na esika ya liboso?

14 Liboso na bokɔnɔ makasi, ekozala malamu mpo na libota komikundola maloba oyo mapemami: “Myango ikolónga wana bapesi-na-toli bazali mingi.” (Masese 15:22, NW) Basangani ya libota bakoki nde kofanda esika moko mpe kosolola mpo na koyeba ntina ya bokɔnɔ? Ekozala malamu kosala bongo kati na mabondeli mpe komibalola epai na Liloba ya Nzambe mpo na koluka litambwisi. (Nzembo 25:4) Makambo nini masengeli kotalelama kati na lisoló yango? Ekoki kozala makambo matali monganga, mosolo, mpe bikateli oyo libota esengeli kokamata. Nani akozala moto ya liboso mpo na kopesa lisungi? Lolenge nini libota likoki kosala elongo mpo na kopesa lisungi? Lolenge nini bibongiseli bikamatami bikoki kozala na bopusi likoló na mosangani mokomoko ya libota? Lolenge nini bamposa ya elimo ya mosalisi mpe bamposa na ye mosusu ya liboso esengeli kokokisama?

15. Lisungi nini Yehova apesaka epai na mabota oyo mazali na mosangani moko azali kobɛla makasi?

15 Kobondela na molende nyonso mpo na kosɛnga litambwisi ya Yehova, komanyola likoló na Liloba na ye, mpe kolanda na mpiko nyonso nzela oyo emonisami na Biblia mbala mingi epesaka mapamboli oyo tomizelaki na yango te. Bokɔnɔ ya mosangani moko ya libota ekoki kosila to mpe ekoki kosila te. Kasi kotya motema epai na Yehova ntango nyonso esukaka malamu na makambo nyonso. (Nzembo 55:22) Mokomi na Nzembo akomaki ete: “Ɛ Yehova, [motema-boboto] na yo esimbaki ngai. Wana ezali ebele na makanisi kati na ngai, mabɔndi na yo ikosepelisaka molimo na ngai.”​—Nzembo 94:18, 19; talá mpe Nzembo 63:6-8.

BÓSALISA BANA

Ntango libota mobimba lizali kopesana mabɔkɔ, mikakatano mikoki kokita

16, 17. Makambo nini makoki komonisama epai na bana mike ntango tozali kolobela bokɔnɔ ya mosangani moko ya libota?

16 Bokɔnɔ makasi ekoki kobimisa mikakatano mpo na bana kati na libota. Ezali likambo ya ntina ete baboti básalisa bana na koyeba bamposa oyo emonani mpe oyo bakoki kosala mpo na kokokisa yango. Soki ye oyo azali kobɛla azali mwana moke, bana mosusu basengeli kosalisama mpo na koyeba ete likebi ya makasi mpe komibanzabanza mingi mpo na ye oyo azali kobɛla elimboli te ete bana mosusu balingami mingi te. Na esika ya kopesa nzela ete mayoki ya nkanda mpe ya kowelana ekóla, baboti bakoki kosalisa bana mosusu ete básala ekanganeli ya penepene moko na mosusu mpe bázala na bolingo ya motema ya solosolo wana bazali kopesana mabɔkɔ mpo na kosilisa ezalela oyo ebimi na ntina na bokɔnɔ.

17 Mingimingi, bana mike bakoyanola kozanga kokakatana soki baboti bazali kosimba mayoki na bango na esika ete bápesa bango bandimbola makasi to ya mindɔndɔ́ na makambo matali kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto. Na yango ekoki ete baboti bálimbwela bango mwa moke makambo na ntina na maladi oyo mosangani ya libota azali kobɛla. Soki bana oyo bazali na nzoto kolɔngɔ́nɔ́ bamoni lolenge bokɔnɔ ezali kopekisa ye oyo azali kobɛla na kosala makambo mingi oyo bango moko basalaka yango kozanga nkaká, boye bakozala mpenza na “bolingo ya motema mpo na bandeko” mpe bakozala na “motema mawa.”​—1 Petelo 3:8.

18. Lolenge nini bana oyo bazali mikóló bakoki kosalisama mpo na kokanga ntina na mikakatano oyo bokɔnɔ ebimisi, mpe lolenge nini yango ekoki kozala litomba mpo na bango?

18 Bana oyo bakómi mikóló basengeli kosalisama na koyeba ete libota ekómi na mpasi mpe esengeli ete moko na moko amipimela makambo mosusu. Lokola basengeli kofuta mosolo epai ya monganga mpe kosomba nkisi, likoki ekozala te na baboti ete bákokisa bamposa ya bana mosusu lokola balingaki kosala yango. Bana bakomiyoka ete bapimeli bango eloko? To bakokanga nde ntina na ezalela yango mpe bakolinga komipimela biloko mosusu oyo bisengeli? Mingi etaleli lolenge likambo yango elobelami mpe elimo oyo ezali kati na libota. Ya solo, kati na mabota mingi, maladi ya mosangani moko ya libota esili kosalisa bana ete bálanda toli oyo ya Paulo: “Bósala likambo moko mpo na elulela soko mpo na [lofundo] te kasi, awa ezali bino na kosɔkɛma, bótánga bamosusu ete baleki bino. Moto na moto atala bobele makambo na ye moko te, kasi makambo na bamosusu lokola.”​—Bafilipi 2:3, 4.

LOLENGE TOSENGELI KOTALELA NKISI YA MONGANGA

19, 20. (a) Mikumba nini batata ya mabota bazali na yango ntango mosangani moko ya libota azali kobɛla? (b) Atako ezali búku ya makambo na monganga te, nzokande lolenge nini Biblia ezali kopesa litambwisi mpo na lolenge ya kosala wana bokɔnɔ eyei?

19 Baklisto oyo bazali na bokatikati baboyaka te nkisi ya monganga soki yango etɛmɛli mobeko ya Nzambe te. Ntango mosangani moko ya libota azali kobɛla, bazalaka na mposa makasi ya koluka lisalisi mpo na kosilisa mpasi ya moto oyo azali kobɛla. Nzokande, ekoki kozala na makanisi mosusu ya mindɔndɔ́ na makambo ya monganga oyo ekosengela kotalela yango malamumalamu. Lisusu, na bambula oyo euti koleka kala mingi te makɔnɔ ya sika mpe mitungisi ya sika esili kobima kozanga ete tómizela na yango, mpe mpo na mingi kati na yango, mbala mingi myango oyo mindimami na bato nyonso mpenza mpo na kosalisa yango mizali te. Ata koyeba na bosikisiki maladi moko ezalaka mbala mosusu likambo ya mpasi. Na bongo, moklisto asengeli kosala nini?

20 Atako mokomi moko ya Biblia azalaki monganga mpe atako ntoma Paulo apesaki Timoté, moninga na ye, toli ya kosalela nkisi moko boye, Makomami ezali búku oyo ezali kopesa litambwisi na bizaleli malamu mpe na elimo, kasi ezali búku etali makambo ya minganga te. (Bakolose 4:14; 1 Timoté 5:23) Na yango, mpo na makambo matali nkisi ya monganga, batata ya mabota ya boklisto basengeli kokamata bikateli na bango moko na bokatikati. Mbala mosusu bakomona ete basengeli kozwa makanisi ya minganga mingi. (Kokanisá na Masese 18:17.) Bakolinga mpenza nkisi oyo ekosalisa mosangani ya libota na bango oyo azali kobɛla, mpe mingi balukaka yango epai na monganga na bango. Basusu bamonaka malamu na kosalela bankisi oyo ezali ya monganga te. Yango mpe ezali likambo oyo etaleli ekateli ya moto na moto. Nzokande, wana bazali koluka kosilisa mikakatano mitali kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto, baklisto bakobosana te ete ‘Liloba ya Nzambe lizali mwinda mpo na makolo na bango mpe pole na nzela na bango.’ (Nzembo 119:105) Bazali kolanda malako oyo mapesami kati na Biblia. (Yisaya 55:8, 9) Na yango, bazali kokima myango nyonso oyo ezali na boyokani na bikelákela mpo na koyeba bokɔnɔ, mpe bazali koboya nkisi nyonso oyo ezali kobuka mitindá ya Biblia.​—Nzembo 36:9; Misala 15:28, 29; Emoniseli 21:8.

21, 22. Lolenge nini mwasi moko ya Azia asosolaki likoló na mitindá ya Biblia, mpe lolenge nini ekateli azwaki ebimisaki litomba mpo na likambo na ye?

21 Tótalela likambo ya mwasi moko ya Azia. Mwa ntango moke nsima na kobanda koyekola Biblia elongo na Motatoli moko ya Yehova, abotaki mátsombé ya mwasi oyo azalaki bobele na kilo moko na ndambo. Mwasi oyo alɛmbaki mpenza nzoto ntango monganga ayebisaki ye ete mwana na ye akokóla mpenza malamu te mpe akokoka kotambola soko moke te. Apesaki ye toli ete apesa mwana yango epai na ebongiseli moko epai kuna babatelaka bana. Mobali na ye ayebaki te nini akokaki kosala na ntina na likambo yango. Mwasi yango asengelaki komibalola epai ya nani?

22 Alobi ete: “Nazali komikundola ete nayekolaki kati na Biblia ete ‘bana bazali likabo liuti na Yehova; mbuma na libumu ezali libonza.’” (Nzembo 127:3) Azwaki ekateli ya kofanda na “likabo” wana na ndako mpe kobatela ye. Na ebandeli, makambo mazalaki mpenza mpasi, kasi na lisalisi ya baninga baklisto kati na lisangá ya mboka oyo azalaki kofanda, mwasi wana azalaki na likoki ya kosalisa mpe kopesa mwana lisungi ya sikisiki oyo esengelaki. Mibu zomi na mibale na nsima, mwana abandaki kokende na makita na Ndako ya Bokonzi mpe kosepela na boninga elongo na bana mosusu oyo bazalaki kuna. Mama alobi ete: “Nazali na botɔ́ndi mingi lokola mitindá ya Biblia mipusaki ngai na kosala oyo ezali sembo. Biblia esalisaki ngai ete nabatela lisosoli na ngai pɛto liboso na Yehova Nzambe mpe kopɛngola koyoka mawa oyo nasengelaki kozala na yango bomoi na ngai mobimba.”

23. Libɔndisi nini Biblia ezali kopesa mpo na baoyo bazali na bokɔnɔ mpe mpo na baoyo bazali kobatela bango?

23 Bokɔnɔ ekozala libela na libela te. Mosakoli Yisaya asakolaki ntango oyo “mofandi moko akoloba te ete, Ngai nazali na malali.” (Yisaya 33:24) Elaká wana ekokokisama mosika te na mokili ya sika oyo mozali koya nokinoki. Nzokande, liboso ete yango eya, tosengeli kokutana na makɔnɔ mpe na liwa. Likambo ya esengo, Liloba ya Nzambe lizali kopesa biso litambwisi mpe lisalisi. Malako ya moboko mpo na etamboli oyo Biblia ezali kopesa mazali malamu koleka, mpe yango ekeseni mosika na makanisi oyo mapesami na bato bazangi kokoka oyo makanisi na bango mabongwanaka mbala na mbala. Na yango, moto ya mayele akondima maloba na mokomi na Nzembo oyo akomaki ete: “Mobeko na [Yehova] ezali sembo, ekobikisa molimo, [makebisi na Yehova, NW] ezali solo, ekopesa boyebi epai na ye oyo azangi yango. . . . Kosamba na [Yehova] ezali solo, yango nyonso na boyengebene. . . . Libonza monene ekomonana wana [moto] akotosa yango.”​—Nzembo 19:7, 9, 11.