Kobima 3:1-22

  • Moize mpe mwa nzete ya nzubɛ oyo ezali kopela mɔtɔ (1-12)

  • Yehova apesi ndimbola ya nkombo na ye (13-15)

  • Yehova apesi Moize malako (16-22)

3  Moize akómaki mobateli ya mpate ya bokilo na ye Yetro,+ nganga-nzambe ya Midiane. Wana azalaki kotambwisa etonga na ngámbo ya wɛsti ya esobe, nsukansuka akómaki na ngomba ya Nzambe ya solo, na Horebe.+  Bongo anzelu ya Yehova abimelaki ye na mɔtɔ oyo ezali kopela na katikati ya mwa nzete ya nzubɛ.+ Ntango azalaki kotala, amonaki mwa nzete ya nzubɛ ezalaki kopela mɔtɔ, kasi mwa nzete yango ya nzubɛ ezalaki kozika te.  Na yango, Moize alobaki ete: “Tiká nakende kotala malamumalamu likambo oyo ya kokamwa mpo namona ntina oyo mwa nzete ya nzubɛ ezali kozika te.”  Ntango Yehova amonaki ete Moize azali kokende kotala, Nzambe abengaki ye uta na katikati ya mwa nzete yango ya nzubɛ mpe alobaki ete: “Moize! Moize!” Na yango alobaki ete: “Ngai oyo.”  Bongo Nzambe alobaki ete: “Kopusana awa te. Longolá basandale na yo, mpo esika oyo otɛlɛmi ezali mabele mosantu.”  Alobaki lisusu ete: “Ngai nazali Nzambe ya tata na yo, Nzambe ya Abrahama,+ Nzambe ya Yisaka+ mpe Nzambe ya Yakobo.”+ Bongo Moize abombaki elongi na ye, mpo abangaki kotala Nzambe ya solo.  Yehova abakisaki ete: “Ya solo, namoni mpasi ya bato na ngai oyo bazali na Ezipito, mpe nayoki kolela na bango mpo na baoyo bazali kotinda bango na makasi básala mosala; nayebi malamu bampasi oyo bazali komona.+  Nakokita mpo na kobikisa bango na lobɔkɔ ya Baezipito+ mpe kolongola bango na mokili oyo mpo bámata tii na mokili moko malamu mpe monene, mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi,+ na teritware ya Bakanana, Bahiti, Baamore, Baperizi, Bahivi mpe Bayebusi.+  Sikoyo, talá! kolela ya bato ya Yisraele ekómi epai na ngai, mpe namoni lisusu ndenge oyo Baezipito bazali konyokola bango.+ 10  Sikoyo yaká, nakotinda yo epai ya Farao, mpe okobimisa bato na ngai Bayisraele na Ezipito.”+ 11  Kasi, Moize alobaki na Nzambe ya solo ete: “Ngai nazali nani mpo nakende epai ya Farao mpe nabimisa Bayisraele na Ezipito?” 12  Na yango, alobaki ete: “Nakozala elongo na yo,+ mpe talá elembo mpo na yo oyo ekomonisa ete ngai nde natindaki yo: Nsima ya kobimisa bato na Ezipito, bokosalela* Nzambe ya solo na ngomba oyo.”+ 13  Kasi Moize alobaki na Nzambe ya solo ete: “Kanisá ete nakei epai ya Bayisraele mpe nalobi na bango ete: ‘Nzambe ya bankɔkɔ na bino atindi ngai epai na bino,’ mpe batuni ngai ete: ‘Nkombo na ye nani?’+ Naloba na bango nini?” 14  Na yango Nzambe alobaki na Moize ete: “Nakokóma oyo nalingi* kokóma.”*+ Mpe abakisaki ete: “Talá oyo okoloba na Bayisraele: ‘Nakokóma atindi ngai epai na bino.’”+ 15  Na nsima, Nzambe alobaki lisusu na Moize ete: “Talá oyo okoloba na Bayisraele: ‘Yehova Nzambe ya bankɔkɔ na bino, Nzambe ya Abrahama,+ Nzambe ya Yisaka+ mpe Nzambe ya Yakobo,+ atindi ngai epai na bino.’ Wana nde nkombo na ngai libela na libela,+ mpe bato bakokanisa ngai na nkombo yango libota na libota. 16  Sikoyo kende, yanganisá bankulutu ya Yisraele, mpe yebisá bango ete: ‘Yehova Nzambe ya bankɔkɔ na bino, Nzambe ya Abrahama, Yisaka mpe Yakobo abimeli ngai, alobi ete: “Natyeli bino mpenza likebi+ mpe namoni makambo oyo bazali kosala bino na Ezipito. 17  Yango wana nalobi ete: Nakolongola bino na mpasi+ oyo Baezipito bazali komonisa bino mpe nakomema bino tii na mokili ya Bakanana, Bahiti, Baamore,+ Baperizi, Bahivi mpe Bayebusi,+ tii na mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi.”’+ 18  “Bakoyoka mpenza mongongo na yo,+ mpe okokende, yo ná bankulutu ya Yisraele, epai ya mokonzi ya Ezipito, mpe bokoloba na ye ete: ‘Yehova Nzambe ya Baebre+ asololi na biso. Tobondeli yo, tiká biso tókende na esobe, tokosala mobembo ya mikolo misato mpo na kopesa Yehova Nzambe na biso mbeka.’+ 19  Kasi ngai nayebi malamu ete mokonzi ya Ezipito akopesa bino nzela ya kokende te, longola kaka soki lobɔkɔ na ngai ya nguya etindi ye.+ 20  Na yango, nakosembola lobɔkɔ na ngai mpe nakobɛta Ezipito na misala na ngai nyonso ya kokamwa oyo nakosala kati na yango, mpe nsima na yango akotika bino bókende.+ 21  Mpe nakosala ete bóndimama na miso ya Baezipito, mpe ntango bokokende, bokokende mabɔkɔ mpamba te.+ 22  Mwasi mokomoko asengeli kosɛnga moto oyo afandi penepene na ye mpe mwasi oyo afandi mopaya na ndako na ye biloko ya palata ná biloko ya wolo mpe bilamba, bokolatisa yango bana na bino ya mibali mpe bana na bino ya basi; mpe bokopunza Baezipito.”+

Maloba na nse

To, “bokosambela.”
To, “nakozala oyo nakozala.” Talá Ap. A4.
To, “naponi.”