Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ntina mpenza ya kondimela Nzambe

Ntina mpenza ya kondimela Nzambe

Ntina mpenza ya kondimela Nzambe

BUKU moko ya Corée, oyo motó ya likambo na yango elobi Ntina 31 oyo bato bazali kotika kosambela (na Lingelesi), eyebisi ete bato mingi bazali kotika kosambela mpo bazali kozwa biyano ya malamu te na mituna oyo bamitunaka. Na ndakisa, bamitunaka ete, ‘Mpo na nini bato oyo bandimaka Nzambe bamonaka mpasi?’ mpe ‘Mpo na nini tosengeli kondima makambo nyonso oyo mangomba eteyaka atako mingi kati na yango ezali polele te mpe ezali bongolabongola?’

Lokola bakonzi ya mangomba bazali kopesa bango biyano ya malamu te, bato mingi bazali kokanisa ete Biblia ezali na biyano na mituna yango te. Ntango sango to pastɛrɛ moko apesi eyano na makanisi na ye moko, mbala mingi ebulunganisaka bato, mpe etindaka bango bápesa Nzambe mpe Biblia mokɔngɔ.

Likambo yango ekómelaki Abel, oyo akolaki na Lingomba ya Protesta na Afrika ya Sudi. Alobi ete: “Na Lingomba bateyaka ete soki moto akufi, Nzambe nde ‘akamati’ ye. Kasi nazalaki komona te ntina oyo Nzambe ya bolingo akoki ‘kokamata’ baboti mpe kokabola bango ná bana na bango. Na mboka epai nakolá, na Afrika, tozalaki koboma te nsoso oyo ezali na bana. Soki ngɔmbɛ azali na zemi, liboso tóboma ye tozalaki kozela tii ntango akobota mpe mwana na ye akotika komɛla mabɛlɛ. Nazalaki koyeba te ntina oyo Nzambe ya bolingo akokaki te komibanzabanza ndenge wana mpo na bato.”

Aram, moto moko ya Canada, azalaki mpe komituna mituna ya ndenge wana. Alobi ete: “Tata na ngai akufaki ntango nazalaki na mbula 13. Na matanga ya Tata, pastɛrɛ moko oyo ayebani mingi ateyaki ete Nzambe alingaki ete tata na ngai akufa mpo azala pembeni na ye kuna na likoló. Alobaki ete: ‘Nzambe akamataka bato malamu, mpo Nzambe alingaka bato ya sembo.’ Nazalaki komituna mpo na nini Nzambe alukaka kaka matomba na ye moko.”

Na nsima, Abel ná Aram bakutanaki na Batatoli ya Yehova, bayekolaki Biblia, mpe na nsuka, bazwaki biyano na mituna na bango. Bakómaki na bolingo mpe na kondima makasi mpo na Nzambe. Nsukansuka, bamipesaki na Yehova mpe bakómaki basaleli na ye ya sembo.

Boyebi ya solosolo ezali na ntina mingi mpo na kondimela Nzambe

Masolo ya bato oyo touti kolobela eteyi biso nini? Masolo yango eyebisi biso ete mpo moto andimela Nzambe, esengeli naino azwa boyebi ya solosolo. Ntoma Paulo alobaki na baklisto ya engumba ya Filipi ete: “Talá eloko oyo nazali kokoba kobondela mpo na yango, ete bolingo na bino etondana lisusu mpe lisusu elongo na boyebi ya solosolo mpe bososoli ya kokoka.” (Bafilipi 1:9) Na vɛrsɛ yango, Paulo amonisi ete kolinga Nzambe mpe baninga bandimi ekendaka nzela moko na boyebi ya solosolo ya Nzambe mpe bososoli ya mokano na ye.

Ebongi mpenza ezala bongo, mpamba te mpo na kotyela moto motema, esɛngaka liboso koyeba ye​—soki oyebi moto malamumalamu, okotyela ye mpe motema mingi. Ndenge moko mpe, boyebi ya solosolo nde ekotinda yo ondimela Nzambe. Paulo alobaki boye: “Kondima ezali ezaleli ya kozela na motema mobimba biloko oyo ozali kolikya kozwa, elakiseli ya polelepolele ya makambo ya solosolo atako ezali komonana te.” (Baebele 11:1) Soki moto andimelaka Nzambe, kasi azali na boyebi ya solosolo te, kondima na ye ekoki kozala makasi te. Ata mwa mopɛpɛ ya moke ekoki kokweisa yango.

Soki oyekoli Biblia, okozwa biyano na mituna lokola oyo ezalaki kotungisa Abel ná Aram: Mpo na nini bato bakufaka? Biblia elobi ete “lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko mpe liwa mpo na lisumu, ndenge moko mpe liwa epalangani epai ya bato nyonso mpamba te bango nyonso basalaki lisumu.” (Baloma 5:12) Soki bato banunaka mpe bakufaka ezali te ete Nzambe akamataka bango mpo bázala pembeni na ye, kasi ezali mpo na lisumu ya Adama. (Genese 2:16, 17; 3:6, 17-19) Lisusu, Biblia ezali koyebisa biso elikya ya solosolo oyo Nzambe apesi. Na nzela ya Mwana na ye, Yesu Klisto, apesi bato ya masumu elikya ya kosekwa.​—Yoane 5:28, 29; Misala 24:15.

Mpo na kosalisa biso tóndima ete bato bakosekwa mpenza, Biblia elobeli ebele ya bato oyo Yesu asekwisaki. (Luka 7:11-17; 8:40-56; Yoane 11:17-45) Ntango ozali kotánga masolo yango, talá esengo oyo baninga mpe bandeko ya bato oyo basekwaki bazalaki koyoka. Okomona mpe ete yango ezalaki kotinda bango bákumisa Nzambe mpe bándimela Yesu.

Boyebi ya solosolo ya Nzambe mpe ya mikano na ye ekoki kotinda bato lelo oyo básala makambo oyo bato wana basalaki. Bato mingi bazalaki liboso na mobulungano, na bozito mpe bazalaki komituna mituna ya ntina mingi oyo bazalaki kozwela biyano ya malamu te. Kasi ntango bayekolaki Biblia, bazwaki biyano mpe yango ebongolaki mpenza bomoi na bango.

Kolinga Nzambe​—Ntina ya libosoliboso ya kosalela ye

Atako boyebi ya solosolo ezali na ntina mingi mpo bato bándimela Nzambe, basengeli na eloko mosusu mpo bátosa mpe básalela ye. Ntango moto moko atunaki Yesu mobeko ya Nzambe oyo eleki monene, ayanolaki ete: “Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso mpe na makasi na yo nyonso.” (Malako 12:30) Soki moto alingi Nzambe na ndenge oyo Yesu amonisi, akotosa mpe kosalela ye na esengo. Yo mpe oyokaka ndenge yango?

Rachel, oyo aumeli mingi na mosala ya misionɛrɛ na Corée, ayebisi ntina oyo ye andimelaka Nzambe: “Nakanisaka ndenge Yehova akokisaka bamposa ya bikelamo na ye, ndenge alimbisaka basaleli na ye, mpe ndenge ayebisaka biso nini azali kosɛnga epai na biso mpo na bolamu na biso. Nyonso wana ekolisaka mpenza bolingo na ngai mpo na Nzambe. Mpe bolingo yango epesaka ngai mposa ya kosalela ye.”

Martha, mwasi moko ya Allemagne oyo akufelá mobali, azali kosalela Yehova banda mbula 48. Alobi boye: “Mpo na nini nazali kosalela Yehova? Mpo nalingaka ye. Mpokwa nyonso nasololaka na Yehova na libondeli mpe nayebisaka ye botɔndi oyo nazalaka na yango mpo na makabo na ye nyonso, mingimingi mpo na mbeka oyo apesaki mpo na kobikisa bato.”

Ya solo mpenza, bolingo mpo na Nzambe epesaka biso mposa ya kosalela ye na motema mobimba. Kasi ndenge nini moto akómaka na bolingo yango? Likambo mpenza oyo etindaka biso tólinga Nzambe ezali botɔndi na biso mpo na bolingo oyo amoniselaki biso. Tótalela naino likambo oyo Biblia eyebisi biso na ntina ya bolingo ya Nzambe: “Moto oyo alingaka te ayebi Nzambe te, mpamba te Nzambe azali bolingo. Na likambo oyo nde bolingo ya Nzambe emonisamaki polele na oyo etali biso, mpamba te Nzambe atindaki Mwana na ye mobotami-se-moko na kati ya mokili mpo biso tókoka kozwa bomoi na nzela na ye. Bolingo na likambo oyo ezali te ete, biso tolingaki Nzambe, kasi nde ete ye alingaki biso mpe atindaki Mwana na ye lokola mbeka ya mbɔndi mpo na masumu na biso.”​—1 Yoane 4:8-10.

Ozali komona bonene ya bolingo yango? Kanisá ete ozali kozinda na mai mpe moto moko andimi kotya bomoi na ye na likama mpo na kobikisa yo. Okobosana moto yango, to okozala nde na botɔndi mingi epai na ye? Okozala te na mposa ya kosalela ye nyonso oyo okoki? Bolingo oyo Nzambe amonisaki na ndenge apesaki Mwana na ye, Yesu Klisto, lokola mbeka mpo na kobikisa biso eleki nyonso. (Yoane 3:16; Baloma 8:38, 39) Soki bolingo ya Nzambe esimbi motema na yo, yango ekotinda yo olinga ye mpe osalela ye na motema na yo mobimba.

Mapamboli lelo oyo mpe na mikolo ekoya

Bolingo na biso mpo na Nzambe nde eloko ya liboso esengeli kotinda biso tósala mokano na ye, kasi ezali mpe esengo koyeba ete Nzambe apesaka mbano na baoyo basalelaka ye. Ntoma Paulo alobaki ete: “Na kozanga kondima likoki ya kosepelisa ye mpenza ezali ata moke te, mpo moto oyo azali kopusana epai ya Nzambe asengeli kondima ete ye azali mpe ete akómaka mopesi-mbano ya baoyo bazali koluka ye makasi.”​—Baebele 11:6.

Nzambe apambolaka mpenza bato oyo balingaka ye mpe batosaka ye. Bato mingi bazali nzoto kolɔngɔnɔ mpo batosaka mitinda ya Biblia. (Masese 23:20, 21; 2 Bakolinti 7:1) Bato oyo batosaka mitinda ya Biblia na oyo etali bosembo mpe makasi na mosala, bapatrɔ na bango batyelaka bango motema mpe babungisaka mpenza misala na bango te. (Bakolose 3:23) Lokola basaleli ya Yehova batyelaka ye motema, bazalaka na kimya ya makanisi ata na kati ya mikakatano. (Masese 28:25; Bafilipi 4:6, 7) Oyo eleki nyonso, bazelaka na elikya mpenza bomoi ya seko na Paladiso ya mabelé oyo ezali koya.​—Nzembo 37:11, 29.

Bato oyo bazwaka mapamboli wana ya Yehova bakanisaka nini mpo na ye? Jacqueline, mwasi moko moklisto na Canada, amonisaki botɔndi na ye na maloba oyo: “Apesaka biso ntango nyonso makabo kitoko mpe apesi biso elikya ya solosolo ya bomoi ya seko.” Abel, oyo toutaki kolobela, ayebisi ndenge ayokaka na maloba oyo: “Elaka ya bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé ezalaki likambo ya sika mpo na ngai, mpe nazelaka yango na elikya mpenza. Kasi, ata soki Nzambe alakaki Paladiso te, nalingaki kaka kolinga ye mpe kosalela ye na esengo.”

Yo mpe okoki kokóma na kondima ya solosolo

Biblia elobi ete: “Yehova ya bibele asambisaka na boyengebene; atalaka bangei mpe motema.” (Yilimia 11:20NW ) Ya solo, Yehova atalelaka bomoto na biso ya kati. Moto na moto asengeli kotalela ntina mpenza oyo ye andimaka Nzambe. Mbala mosusu kala tozalaki kosala mabe mpo tozalaki na bindimeli mpe makanisi ya lokuta na ntina na Nzambe. Kasi boyebi ya solosolo ya Biblia ekoki kosalisa biso tókóma na boyokani malamu na Mozalisi, Yehova Nzambe.​—1 Timote 2:3, 4.

Batatoli ya Yehova bayekolaka na bato Biblia ofele mpo na kosalisa bango bákóma na boyebi ya solosolo ya Nzambe. (Matai 28:20) Bato mingi oyo bandimi lisalisi na bango bakómi na bolingo mpe kondima ya solosolo mpo na Nzambe. Na nzela ya boyekoli ya Biblia, bazwi “mayele ya solo mpe bososoli,” oyo ezali kosalisa bango na ‘kotambola na kimya’ na mikolo oyo ya mabe. (Masese 3:21-23) Oyo eleki nyonso, bakómi na elikya oyo “ezali makasi mpe ngwi” mpo na mikolo ekoya. (Baebele 6:19) Yo mpe okoki kokóma na kondima ya solosolo mpe kozwa mapamboli yango.

[Etanda na lokasa 6]

Mituna oyo ezalaki kotungisa bango

“Ntango nazalaki koyekola mosala ya monganga, nazalaki komona na lopitalo bato malamu konyokwama na maladi mpe mpo na makama oyo bazwaki. Soki Nzambe azali mpenza, mpo na nini makambo ya ndenge wana ezali kosalema? Losambo ezali kaka nzela ya kozwa kimya na makanisi?”​—Mondimi moko ya kala na Lingomba ya Presbytérien na Corée.

“Nazalaki mbala mingi komituna soki tata na ngai, oyo azalaki molangwi masanga, akendá na lifelo to na lola. Nazalaki mpenza kobanga bakufi mpe lifelo. Nazalaki komituna ndenge nini Nzambe ya bolingo akoki kotinda moto akende konyokwama libela na libela na lifelo.”​—Mondimi moko ya kala na Lingomba ya Katolike na Brésil.

“Nini ekokómela mabelé mpe bato na mikolo ezali koya? Ndenge nini bato bakoki kozala na bomoi libela na libela? Ndenge nini bato bakoki kozwa kimya ya solosolo?”​—Mondimi moko ya kala na Lingomba ya Katolike na Allemagne.

“Nazalaki kondima te liteya oyo elobaka ete bato bazongaka na bomoi mbala na mbala na nzoto mosusu. Banyama basambelaka te, bongo soki, mpo na ntina boye to boye, akufi mpe abotami nyama mpo na kofuta masumu na yo, ndenge nini okobongola motema mpo obongisa bomoi na yo?”​—Mondimi moko ya kala na Lingomba ya Hindu na Afrika ya Sudi.

“Nakolaki na Lingomba ya Confucius, mpe tozalaki kosala milulu ya losambo mpo bankɔkɔ oyo bakufá bázala na kimya. Ntango tozalaki kobongisa mesa ya mbeka mpe kofukama liboso na yango, nazalaki komituna soki bankɔkɔ oyo bakufá bazalaki koya kolya biloko mpe bazalaki komona ndenge tozalaki kofukamela bango.”​—Mondimi moko ya kala na Lingomba ya Confucius na Corée.

Bato yango nyonso bazwaki biyano na mituna na bango ntango bayekolaki Biblia na Batatoli ya Yehova.