Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

‘Bamibongisi mpo na mosala nyonso ya malamu’

‘Bamibongisi mpo na mosala nyonso ya malamu’

‘Bamibongisi mpo na mosala nyonso ya malamu’

“KOBÁ kokundwela bango ete bámikitisa mpe bátosa baguvɛrnema mpe bakonzi mpo bazali bayangeli, bámibongisa mpo na mosala nyonso ya malamu.” (Tito 3:⁠1) Mosala ya malamu nini ntoma Paulo alingaki kolobela ntango akomelaki baninga na ye bandimi maloba wana? Earnest Scott, molimboli ya maloba ya Biblia, alobelaki lolenge moko ya mosala ya malamu boye: “Baklisto basengelaki kaka te kotosa bakonzi, basengelaki mpe kozala pene na kosala mosala nyonso ya malamu. . . . Soki esengeli, baklisto basengelaki kozala bato ya liboso na kosala makambo mpo na bolamu ya bato nyonso. Makambo lokola makama ya mɔtɔ, maladi oyo epalanganaka, makama ndenge na ndenge ekozanga te, oyo ekotinda bana-mboka ya motema malamu básalisa bazalani na bango.”

Baklisto basalaka misala mosusu oyo ezali mpo na bolamu ya bato nyonso soki misala yango ezali kobuka mibeko ya Nzambe te. (Misala 5:29) Na ndakisa, na filiale ya Batatoli ya Yehova na Ebina, na Japon, mpo na kolanda malako ya biro ya Leta mpo na mosala ya koboma mɔtɔ, mbula na mbula, bamekaka makambo oyo bakoki kosala soki likama ya mɔtɔ ebimi. Na mabaku yango, bandeko nyonso oyo basalaka na Betele bayanganaka mpo na kolanda malako ya motindami moko ya biro ya mosala ya koboma mɔtɔ.

Lisusu, ekoki sikoyo mbula koleka zomi, biro ya filiale esalaka elongo na bakonzi ya mboka na programe moko oyo babongisaka mpo na kolakisa bato mayele ya komibatela na makama ya mɔtɔ to ndenge ya koboma mɔtɔ. Na programe yango, basali ya bakompanyi ya engumba balakisaka ndenge oyo bango basalaka mpo na koboma mɔtɔ mpe komibatela na makama ya mɔtɔ. Mbala mingi, bapesaka biro ya filiale longonya mpo na bibongiseli na yango mpe ndenge oyo balandaka malako ya bakonzi. Na 2001, bazwaki esika ya liboso. Bamibongisi mpo na kosala mosala ya malamu oyo ekoki kobikisa bomoi ya bato soki likama ya mɔtɔ ebimi.

Mosala ya ntina mingi

Nzokande, Batatoli ya Yehova bamipesi na mosala moko ya malamu oyo eleki ntina, oyo ezali mpe kobikisa bomoi ya bato. Mbala na mbala, bakendaka kotala bazalani na bango na bandako mpo na koyebisa bango nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. (Matai 24:14) Batatoli balendisaka bato báyekola mitinda ya Biblia mpe básalela yango mpo bázala na bomoi ya malamu koleka mpe elikya ya bomoi ya seko na mokili oyo ekozala na kimya mpe libateli ya solosolo.

Bato mosusu bamonaka motuya ya mosala ya Batatoli ya Yehova te mpe balobaka ete bakendaka nde kotungisa bato. Kasi, Zuzi Jean Crepeau ya Tribinale Monene ya Québec na Canada azalaki na likanisi mosusu. Batatoli ya Yehova basepelaki te na mobeko moko oyo bakonzi ya engumba Blainville, na etúká ya Québec, babimisaki ete esengeli naino kozwa mokanda oyo ekopesa bango ndingisa ya kosakola ndako na ndako. Na ekateli ya tribinale, Zuzi Crepeau alobaki boye: “Kotala oyo Batatoli ya Yehova bakendaka kotala bato na bandako na bango ezali mosala ya boklisto mpo na bolamu ya bato nyonso mpe . . . mikanda oyo Batatoli bakabolelaka bato oyo basepeli ezali mikanda ya mpambampamba te, elobelaka makambo ya losambo, Biblia, bangi, masanga, mateya mpo na bilenge, mikakatano ya libala mpe koboma libala.” Ekateli yango elobaki boye: “Tribinale ekati ete kokokanisa Batatoli ya Yehova na bato oyo batambolaka na bandako ya bato mpo na kotɛkisa biloko ezali kofinga bango, kosambwisa bango, ezali mabe, mpe kobebisa lokumu na bango.”

Lokola Batatoli ya Yehova basalisaka bato na esika oyo bafandi bálonga mikakatano ya bomoi mpe bapesaka bango elikya mpo na mikolo ekoya, bazali mpenza kosala mosala mpo na bolamu ya bato nyonso. Biblia epesaka bango makoki ya kokokisa mosala na bango. “Makomami nyonso epemami na Nzambe mpe ezali na litomba mpo na koteya, kopamela, kosembola makambo, mpo na kopesa disipilini na kati ya boyengebene, mpo moto ya Nzambe azala moto oyo akoki mpenza, oyo azali na nyonso esengeli mpo na mosala nyonso ya malamu.”​—⁠2 Timote 3:​16, 17.

Olingi koyeba ndenge oyo Batatoli ya Yehova ‘bamibongisaka mpo na mosala nyonso ya malamu’? Tolendisi yo ondima lisalisi na bango mpo na koyeba Biblia malamu, mpe na ndenge yango, yo mpe ondima mosala oyo ezali mpo na bolamu ya bato nyonso na mboka na bino mpe na mokili mobimba.

[Bililingi na lokasa 30]

Batatoli ya Yehova balukaka kozala na boyokani na bakonzi ya Leta

[Elilingi na lokasa 31]

Eyebani mpenza ete Batatoli basalisaka bazalani na bango