Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Nzambe azalaka? Koyeba yango ezali mpenza na ntina?

Nzambe azalaka? Koyeba yango ezali mpenza na ntina?

Mpo na bato mingi, komituna soki Nzambe azalaka ezali motuna oyo ebongi te to mpe ezangi eyano. Hervé, oyo akolá na France, alobi boye: “Atako nalobaka ete Nzambe azalaka to moto akoki koyeba ye, kasi nazali mondimi te. Mpo na ngai, mpo moto azala na bomoi ya malamu asengeli kosalela mayele ya bomoto. Yango esɛngi te kondimela Nzambe moko boye.”

Bamosusu bakoki komiyoka ndenge John oyo afandaka na États-Unis azalaki komiyoka; alobi boye: “Babɔkɔlá ngai na baboti oyo bazalaki kondimela Nzambe te. Ntango nazalaki elenge, nayebaki mpenza te soki Nzambe azalaka. Ata bongo, na bantango mosusu nazalaki komituna mpo na yango.”

Omituná naino te soki Nzambe azalaka mpe soki azalaka, ntina mpenza ya bomoi ezali nini? Mbala mosusu okutaná na makambo oyo ezali mpasi kolimbola yango kozanga kolobela Mozalisi, na ndakisa ndenge bato ya siansi balobaka ete makambo oyo ezali na mabele ebongisamá mpenza mpo bomoi ezala mpe likambo oyo endimisi ete bomoi ebimá te na eloko moko oyo ezangá bomoi.​—Talá etanda “ Talelá makambo oyo endimisi ete Nzambe azali.”

Luká koyeba ndimbola ya makambo oyo tolobeli awa na likoló. Ezali lokola bilembo oyo ezali kolakisa esika eloko moko ya motuya ebombami. Soki omoni makambo oyo endimisi yo ete Nzambe azalaka, mpe oyebi makambo ya solosolo mpo na ye, okozwa matomba mingi. Tótala makambo minei oyo elandi:

1. NTINA YA BOMOI

Soki bomoi ezalaka mpenza na ntina, ebongi tóyeba yango mpe tóyeba soki ekomemela biso matomba nini. Kutu, soki Nzambe azalaka mpe toyebi yango te, boye tozali kotambwisa bomoi na biso kozanga koyeba likambo moko ya solo oyo eleki ntina na mokili.

Biblia elobi ete Nzambe nde asalá bikelamu nyonso ya bomoi. (Emoniseli 4:11) Ndenge nini koyeba yango ekoki kosala ete bomoi na biso ezala na ntina? Tótalela oyo Biblia eteyaka na likambo yango.

Bato bakeseni mpenza na bikelamu nyonso oyo ezali awa na mabele. Biblia elobi ete Nzambe akelá biso mpo tózala lokola ye, tómonisa bizaleli na ye. (Ebandeli 1:27) Lisusu, Biblia eteyaka ete bato bakoki kokóma baninga ya Nzambe. (Yakobo 2:23) Eloko moko te ekoki kosala ete bomoi na biso ezala na ntina koleka kozala na boyokani ya ndenge wana ná Mozalisi na biso.

Kozala moninga ya Nzambe elimboli nini? Baninga ya Nzambe bakoki koyebisa ye makambo mbala moko. Alaki ete akoyoka bango mpe akosalisa bango. (Nzembo 91:15) Soki tozali baninga ya Nzambe, tokoki koyeba makanisi na ye na makambo mingi. Yango ekoki kopesa biso bososoli ya mozindo na mituna ya ntina mingi oyo etali bomoi na biso.

Soki Nzambe azalaka mpe biso toyebi yango te, boye tozali kotambwisa bomoi na biso kozanga koyeba likambo moko ya solo oyo eleki ntina na mokili

2. KIMYA YA MAKANISI

Na ndakisa, bamosusu bamonaka mpasi bándimela Nzambe mpo na bampasi oyo etondi na mokili. Bamitunaka boye: ‘Mpo na nini Mozalisi oyo azali na nguya nyonso atiki ete bampasi mpe mabe ezala?’

Eyano ya kolendisa oyo Biblia epesi ezali ete Nzambe asalaki bato te mpo bányokwamaka. Ntango Nzambe asalaki bato, bampasi ezalaki te. Ata liwa ezalaki te na mokano oyo Nzambe azalaki na yango mpo na bato. (Ebandeli 2:7-9, 15-17) Ezali mpasi kondima yango? Ezali kaka lisapo? Te. Soki Mozalisi oyo azali na nguya nyonso azali mpe bolingo nde ezali ezaleli na ye oyo eleki nyonso, boye, ezali bomoi ya ndenge wana nde akanaki mpo na bato.

Nini esalá ete bato bakóma ndenge bazali lelo? Biblia elobi ete Nzambe akelá bato na likoki ya kosalela bonsomi ya kopona. Tozali barobo te mpo bátinda biso na makasi tótosa Nzambe. Mobali ná mwasi ya liboso oyo biso nyonso toutá epai na bango baboyaki Nzambe atambwisa bango. Kutu, na esika bátosa Nzambe, basalaki nde oyo bango moko balingaki. (Ebandeli 3:1-6, 22-24) Tokómá konyokwama mpo na bango.

Koyeba ete Nzambe akanaki te tómonaka bampasi, ekoki kopesa biso kimya mpenza na makanisi. Kasi, tozali mpe na mposa ete bampasi esila. Tozali na mposa ya elikya mpo na avenire.

3. ELIKYA

Ntango kaka bato batombokelaki ye, Nzambe alakaki ete na ngonga oyo ebongi, akokokisa mokano na ye ya ebandeli mpo na mabele. Lokola azali Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, eloko moko te ekoki kopekisa ye asala yango. (Yisaya 55:11) Mosika te, Nzambe akolongola mabe nyonso oyo botomboki ebimisá mpe bomoi ya bato ná mabele ekozonga ndenge oyo akanaki na ebandeli.

Yango ezali na ntina nini mpo na yo? Na ebele ya makambo oyo Nzambe alaki biso mpo na avenire na Biblia, tótalela kaka mibale na yango.

  • MABE ELONGWE MPE KIMYA EKƆTI NA MABELE MOBIMBA. “Etikali kaka mwa ntango moke, moto mabe akozala lisusu te; mpe okotya mpenza likebi na esika na ye, akozala te. Kasi bato ya komikitisa bakozwa mabele, mpe bakosepela mpenza na kimya mingi.”​—Nzembo 37:10, 11.

  • MALADI MPE LIWA ELONGWE. “Moto moko te oyo afandi kuna akoloba: ‘Nazali na maladi.’” (Yisaya 33:24) “Akolongola mpenza liwa mpo na libela, mpe Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso Yehova akopangwisa mpenza mpisoli na bilongi nyonso.”​—Yisaya 25:8.

Mpo na nini tosengeli kotyela bilaka ya Nzambe oyo ezali na Biblia motema? Mpo bisakweli mingi oyo ezali na Biblia esí ekokisamá. Ata bongo, elikya oyo ete bampasi ekolongwa na mikolo ezali koya elongoli te mikakatano ya bomoi ya lelo. Lisalisi nini mosusu Nzambe apesi?

4. LISALISI NA MIKAKATANO MPE MPO NA KOZWA BIKATELI

Nzambe alakisaka biso ndenge ya kolonga mikakatano mpe kozwa bikateli ya malamu. Bikateli mingi ezalaka ya mike, kasi bikateli mosusu ekoki komemela biso bolamu to mpasi bomoi mobimba. Moto moko te akoki kopesa biso bwanya oyo ebongi mpenza lokola oyo Mozalisi na biso akoki kopesa. Ayebi makambo nyonso oyo esalemá mpe oyo ekosalema; kutu ye nde apesá biso bomoi. Na yango, ayebi oyo eleki malamu mpo na biso.

Biblia ezali na makanisi ya Yehova Nzambe mpo elimo santu na ye nde ekambaki bato ndenge na ndenge oyo bakomaki yango. Biblia elobi boye: “Ngai Yehova nazali Nzambe na yo, Moto oyo azali koteya yo mpo na litomba na yo moko, Moto oyo azali kotambwisa yo na nzela oyo osengeli kotambola.”​—Yisaya 48:17, 18.

Nzambe azali na nguya oyo ezangi ndelo mpe azali na mposa ya kosalela yango mpo na bolamu na biso. Biblia emonisaka Nzambe lokola tata ya bolingo oyo alingaka kosalisa biso. Elobi boye: “Tata na likoló akopesa te baoyo bazali kosɛnga ye elimo santu koleka?” (Luka 11:13) Nguya yango ya Nzambe ekoki kotambwisa mpe kolendisa biso.

Ndenge nini okoki kozwa lisalisi yango epai ya Nzambe? Biblia eyanoli boye: “Moto oyo azali kopusana epai ya Nzambe asengeli kondima ete ye azali mpe akómaka moto oyo apesaka mbano na baoyo bazali koluka ye na mposa makasi.” (Baebre 11:6) Mpo ondima mpenza ete Nzambe azalaka, esengeli yo moko otalela makambo oyo endimisi yango.

OKOSALA BOLUKILUKI?

Esɛngaka ntango mpo na koluka koyeba solo na ntina na Nzambe, kasi ezali polele ete kosala bongo ekoki komemela yo matomba. Talelá ndakisa ya Xiujin Xiao, oyo abotamá na Chine mpe afandaka lelo na États-Unis. Alobi boye: “Atako nazalaki kondima liteya ya evolisyo, nazalaki koluka koyeba Biblia. Yango wana nabandaki koyekola yango elongo na Batatoli ya Yehova. Na mbula ya nsuka liboso nasilisa iniversite, nakómaki na makambo mingi ya kosala na boye ete nakómaki na ntango moke mpo na koyekola Biblia. Kasi nazalaki mpenza na esengo te. Na nsima, ntango nazongelaki kotya boyekoli na ngai ya Biblia na esika ya liboso, nazwaki mpenza esengo na motema.”

Okolinga koyeba makambo mingi etali Mozalisi na biso, Yehova Nzambe? Mpo na nini te kozwa ntango ya kosala bolukiluki yo moko?