Yobo 26:1-14

  • Yobo apesi eyano (1-14)

    • ‘Osalisi moto oyo azangi nguya!’’ (1-4)

    • ‘Nzambe atɛlɛmisi mabele likoló ya eloko te’ (7)

    • ‘Ezali kaka ebandeli ya banzela ya Nzambe’ (14)

26  Yobo ayanolaki ete:  2  “Ndenge wana nde osalisi moto oyo azali na nguya te! Ndenge wana nde obikisi moto oyo azangi makasi!+  3  Opesi toli ya malonga na moto oyo azangi bwanya!+ Omonisi mpenza bwanya* epai ya ebele ya bato!  4  Ozali koloba na nani,Mpe makambo oyo ozali koloba euti epai ya nani?*  5  Baoyo bazangi makasi kati na liwa bazali kolɛnga;Bazali mpenza na nse ya mai mpe ya biloko oyo efandaka kuna.  6  Nkunda* ezali bolumbu liboso ya Nzambe,*+Mpe esika ya libebi* ezipami te.  7  Atandi likoló* na esika oyo ezali mpamba,+Atyá* mabele likoló ya eloko moko te;  8  Akangi mai liboke na kati ya mapata,+Bongo mapata ezali kopasuka te na kilo na yango;  9  Azipi kiti ya bokonzi na ye mpo emonana te,Atandi lipata na ye likoló na yango.+ 10  Atyá bandelo kati na likoló mpe mbu,+Atyá bandelo kati na pole mpe molili. 11  Makonzí ya likoló ezali kolɛnga;Ekamwe mpo na mpamela na ye. 12  Na nguya na ye, atombokisi mbu,+Mpe na mayele na ye, abukibuki nyama monene mpenza mpe ya nsɔmɔ* ya mbu.+ 13  Na mpema* na ye asukolaka likoló;Lobɔkɔ na ye etɔbɔli nyoka oyo esɛlimwaka. 14  Talá! Wana ezali kaka ebandeli ya banzela na ye;+Kaka mwa nungunungu bayoki mpo na ye! Bongo nani akoki kokanga ntina ya nkake na ye ya nguya?”+

Maloba na nse

To, “makanisi malamu.”
Lil., “Mpe mpema (elimo) ya nani ebimi epai na yo?”
To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “na ye.”
To, “Abadona.”
Lil., “nɔrdi.”
To, “Akakisi.”
Lil., “Rahaba.”
To, “mopɛpɛ.”