Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MAKAMBO OYO EZALI KOLEKA NA MOKILI

Makambo etali Afrika

Makambo etali Afrika

Bato mpe bibongiseli mingi ezali kokoba kosala milende mpo na kobongisa bomoi ya bato na Afrika. Ata bongo, Afrika ezali kaka na mikakatano makasi mpenza.

Koboma ba-rhinocéros

Na 2013, babomaki ba-rhinocéros 1 004 na Afrika ya Sudi na ndenge oyo eyokani te na mibeko, nzokande na 2007 babomaki kaka 13. Atako bazali kozwa maseke mingi ya nyama yango, bato mingi bazali kaka koluka yango, mpo na yango kilo moko ya maseke na yango ekoki koleka kilo moko ya wolo na ntalo. Kaka liseke moko mpamba ekoki kotɛkama na mosolo ya dolare koleka 500 000.

OMITUNA BOYE: Mokolo mosusu baguvɛrnema ekolonga kosilisa likambo ya kobuka mibeko?​—Yirimia 10:23.

Kanyaka oyo bapesaka lapolo na yango te

Ebongiseli moko (Transparency International) elobi ete na mokili mobimba kanyaka eleki mingi nde na bikólo ya Afrika ya wɛsti. Kasi, bato mingi (90%) oyo bakutanaka na likambo yango bapesaka lapolo na yango te. Molobeli ya ebongiseli moko ya Kenya, alobi boye: “Bana-mboka bazalaka na konfianse te ete baguvɛrnema ekosala eloko moko soki bapesi lapolo ya makambo etali kanyaka.”

OYO BIBLIA ELOBI: “Kanyaka ebomaka miso ya bato oyo bamonaka malamu.”​—Kobima 23:8.

Kosalela Internet na Afrika

Ebongiseli moko (International Telecommunication Union) elobi ete bato mwa mingi (20%) ya Afrika bakosalela Internet tii tókóma na nsuka ya 2014. Motángo ya bato oyo bazali kosalela Internet na Afrika ebakisami mbala mibale nakotalela mwayene ya mokili mobimba.