Mosakoli 12:1-14

  • Kanisá Mozalisi liboso ete bobange eya (1-8)

  • Makanisi ya nsuka ya moyanganisi (9-14)

    • Maloba ya bwanya ezali lokola nsɔngɛ ya mangenda ya kotambwisa bangɔmbɛ (11)

    • Bangá Nzambe ya solo (13)

12  Yango wana, kanisá Mozalisi na yo Monene ntango ozali naino elenge,+ liboso mikolo ya mpasi eya,+ mpe bambula eya ntango okoloba ete: “Nasepeli na yango ata moke te”; 2  liboso moi ná pole, mpe sanza ná minzoto eyinda,+ mpe mapata ezonga nsima ya* mbula makasi; 3  na mokolo oyo bakɛngɛli ya ndako bakómaka kolɛnga, mpe mibali makasi bagumbamaka, mpe basi batikaka konika mpo bazali lisusu mingi te, mpe basi oyo batalaka na bafɛnɛtrɛ bamoni molili;+ 4  ntango baporte oyo etali na balabala ekangami, ntango makɛlɛlɛ ya enikelo ekómi kokita, ntango moto azali kolamuka na makɛlɛlɛ ya ndɛkɛ, mpe ntango bana basi nyonso ya loyembo babandi kolɛmba.+ 5  Lisusu, bakómi kobanga bisika oyo etombwaná, mpe makambo ya nsɔmɔ ezali na nzela. Mpe nzete ya amande ezali kobimisa fololo,+ mpe liyoyo ezali komibenda, mbuma ya kapre epasuki, mpo moto azali kokende na ndako epai akopema ntango molai+ mpe bato oyo bazali na mawa bazali kotambolatambola na balabala;+ 6  liboso nsinga ya palata elongolama, mpe kibakuli ya wolo ebukana, mpe elokó oyo ezali na liziba ya mai epanzana, mpe pine ya ebende* ya libulu ya kobomba mai ebukana. 7  Bongo putulu ezali kozonga na mabele+ kaka ndenge ezalaki, mpe elimo* ezongaka epai ya Nzambe ya solo oyo apesaki yango.+ 8  Moyanganisi+ alobi: “Mpamba ya mpamba mpenza! Eloko nyonso ezali mpamba.”+ 9  Moyanganisi akómaki na bwanya, longola yango akobaki koteya bato makambo oyo ayebaki,+ mpe akanisaki na mozindo mpe alukaki malamumalamu mpo atya masese mingi esika moko.*+ 10  Moyanganisi alukaki kozwa maloba ya kitoko+ mpe kokoma na bosikisiki maloba ya solo. 11  Maloba ya bato ya bwanya ezali lokola nsɔngɛ ya mangenda ya kotambwisa bangɔmbɛ,+ mpe maloba na bango oyo esangisami ezali lokola bansɛtɛ oyo ekɔtisami makasi; mobateli se moko ya mpate nde apesi yango. 12  Mpo na likambo nyonso mosusu longola oyo wana, mwana na ngai, kebá: kosala babuku ebele ezali na nsuka te, mpe komipesa na yango mingi elɛmbisaka nzoto.+ 13  Nsuka ya likambo, yango oyo, nsima ya koyoka makambo nyonso: Bangá Nzambe ya solo+ mpe batelá mitindo na ye.+ Mpo yango nde mokumba nyonso ya moto.+ 14  Mpo Nzambe ya solo akosambisa mosala nyonso, ata mpe likambo nyonso oyo ebombami, mpo na koyeba soki ezali malamu to mabe.+

Maloba na nse

To mbala mosusu, “elongo na.”
To, “yiká.”
To, “nguya ya bomoi.”
To, “na molɔngɔ.”