Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ntina ya kotyela Biblia motema

3. Makambo oyo yango elobeli ezali na boyokani

3. Makambo oyo yango elobeli ezali na boyokani

Kanisá ete ozwi mibali 40 oyo bazali na bomoi ekeseni mpe osɛngi mokomoko na bango akoma eteni moko ya buku, mpe na nsima biteni yango ekosangisama mpo na kosala buku moko. Bango nyonso bafandi na mboka moko te mpe bayebani te. Basusu bayebi te makambo oyo baninga bakomi. Okanisi ete makambo oyo ekozala na buku yango ekozala na boyokani?

EZALI ndenge wana nde Biblia ekomamaki. * Kutu, bokeseni oyo ezali kati na bakomi ya Biblia eleki mosika ya bato oyo touti kolobela. Atako bongo, makambo oyo bango nyonso bakomaki ezali mpenza na boyokani.

Elamba ya Yesu ezalaki motane-moindo to motane-ngwaa?

Makambo oyo ekesenisi yango na babuku mosusu.

Biblia ekomamaki na boumeli ya mbula soki 1 600, kobanda na mobu 1513 liboso ya ntango na biso (L.T.B.) tii na mobu soki 98 ya ntango na biso (T.B.). Elingi koloba ete na bato soki 40 oyo bakomaki yango, mingi bazalaki na bomoi na bileko oyo ekabwani na bankama ya bambula. Bakomi yango bazalaki na misala ekeseni: basusu bazalaki babomi-mbisi, basusu babateli ya bampate to bakonzi, mpe moko azalaki monganga.

Elobeli motó ya likambo moko.

Bakomi ya Biblia balobelaki motó ya likambo kaka moko: kolongisama ya lotomo oyo Nzambe azali na yango ya koyangela bato mpe kokokisama ya mokano na ye na nzela ya Bokonzi na ye ya likoló, oyo ezali guvɛrnema oyo ekoyangela mokili mobimba. Biblia emonisi motó ya likambo yango mpo na mbala ya liboso na mokanda ya Genese. Elobeli yango malamumalamu na mikanda oyo elandi mpe emonisi kokokisama na yango na mokanda ya Emoniseli.​—Tángá lisolo “Biblia elobelaka makambo nini?” na lokasa 19.

Boyokani ezali ata na makambo ya mike mpenza.

Makambo oyo bakomi ya Biblia bakomaki, ezala oyo ya mike mpenza, ezali na boyokani; nzokande emonani ete bayokanaki te liboso ya kokoma yango. Na ndakisa, Yoane, moko ya bakomi ya Biblia, alobi ete ntango ebele ya bato bayaki koyoka Yesu, Yesu atunaki Filipo epai wapi bakoki kosomba mampa mpo na koleisa bato yango. (Yoane 6:1-5) Ntango Luka akomi lisolo yango, alobi ete likambo yango esalemaki pene na engumba Betesaida. Liboso ete Yoane alobela lisolo wana, asilaki kokoma na mokanda na ye ete Filipo azalaki moto ya Betesaida. (Luka 9:10; Yoane 1:44) Yango wana, Yesu atunaki Filipo mpo azalaká kofanda pene wana. Makambo oyo bakomi mibale wana bakomaki ezali na boyokani, nzokande bango moko te nde balukaki koyokanisa yango. *

Mwa bokeseni.

Masolo mosusu ezali na mwa bokeseni, kasi likambo yango esengeli nde kokamwisa biso? Tózwa ndakisa ya bato oyo bamoni ndenge likama moko esalemi. Soki bango nyonso babɛti lisolo yango ndenge moko, okomona te ete bayokanaki? Na ntembe te, ndenge oyo mokomoko na bango akobɛta lisolo yango esengeli kokesana mwa moke, mpamba te bango nyonso bamonaki makambo nyonso ndenge moko te. Ezali mpe bongo mpo na bakomi ya Biblia.

Tózwa ndakisa: Na mokolo oyo Yesu akufaki, alataki elamba ya motane-moindo, ndenge Malako ná Yoane bakomi? (Malako 15:17; Yoane 19:2) To ezalaki nde elamba ya motane-ngwaa, ndenge Matai alobi? (Matai 27:28) Makambo oyo bango nyonso balobi ekoki mpenza kozala solo. Langi ya motane-moindo ezalaka mpe na ndambo ya motane. Na yango, elamba ya motane-moindo ekoki komonana motane-ngwaa to ndenge mosusu, na kotalela esika oyo moto oyo azali kotala yango atɛlɛmi, ndenge oyo moi ezali kongɛngisa yango mpe biloko oyo ezali nsima na yango. *

Lokola makambo oyo bakomi ya Biblia bakomaki ezali na boyokani, atako bayokanaki liboso te, yango ezali likambo mosusu oyo emonisi ete makambo yango ebongi kotyelama motema.

^ par. 4 Biblia esangisi mikanda to biteni 66; ya liboso ezali Genese mpe ya nsuka Emoniseli.

^ par. 7 Soki olingi koyeba bandakisa mosusu ya makambo oyo ezali na boyokani ndenge wana, talá mwa buku Un livre pour tous, nkasa 16-17, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

^ par. 9 Soki olingi koyeba makambo mosusu, talá buku La Bible: Parole de Dieu ou des hommes?, na mokapo 7 oyo elobi “La Bible se contredit-elle?” (Biblia ezali bongolabongola?); ebimisami na Batatoli ya Yehova.