Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mosala ya koyekola biloko ya kala emonisi nini mpo na Biblia?

Mosala ya koyekola biloko ya kala emonisi nini mpo na Biblia?

Mosala ya koyekola biloko ya kala emonisi nini mpo na Biblia?

BAYEKOLI ya Biblia bamonaka ete mosala ya bato oyo bayekolaka biloko ya kala ezali na ntina, mpamba te mbala mingi esalisaka bango báyeba malamu bomoi, mimeseno, mpe minɔkɔ ya bato ya ntango oyo Biblia ekomamaki. Mosala na bango ezali mpe kosalisa biso tóyeba makambo mosusu ya ntina oyo etali kokokisama ya bisakweli ya Biblia, na ndakisa oyo elobelaki kokwea ya Babilone ya kala, Ninive, mpe Tulo. (Yilimia 51:37; Ezekiele 26:4, 12; Sefania 2:13-15) Kasi, tokoki kotyela mosala yango motema mobimba te, mpamba te soki bato yango bakundoli eloko moko ya kala, esɛngaka naino báyekola yango mpe ntango mosusu bamikosaka, okomona lelo balobi boye mpo na eloko moko mpe lobi balobi likambo mosusu.

Mateya nyonso ya Biblia ezali na boyokani kati na yango mpe yango nde esimbi kondima ya baklisto, kasi te biteni ya mbɛki, ya biliki, to ya bifelo oyo ekweá. (2 Bakolinti 5:7; Baebele 11:1) Na ntembe te, boyokani oyo ezali na mateya nyonso ya Biblia, bosolo na yango, bisakweli oyo esili kokokisama, mpe makambo mosusu, emonisi polele ete “Makomami nyonso epemami na Nzambe.” (2 Timote 3:16) Atako bongo, tótalela mwa ndambo ya biloko ya ntina oyo bato ya mayele bakundolá, oyo emonisi ete masolo ya Biblia ezali solo.

Na 1970, ekipi moko ya bato ya mayele oyo bayekolaka biloko ya kala bakundolaki na Yelusaleme ndako moko oyo ezikaká na mɔtɔ. Nahman Avigad, mokambi ya ekipi yango, akomi boye: “Moto nyonso oyo ayekolaka biloko ya kala, akoloba mbala moko ete ndako yango ezikaki na mɔtɔ, mpe na nsima bifelo na yango mpe nsamba na yango ekweaki.” Na eteni moko ya ndako yango, bamonaki mikuwa [1] ya lobɔkɔ ya moto, oyo misapi na yango esembolami lokola nde azalaki koluka kosimba esika moko oyo ebimelo ezalaki.

Bamonaki mbongo ya bibende [2] elali na nse. Bayuda basalelaki mbongo yango mpo na mbala ya nsuka na mbula ya minei oyo batombokelaki Baloma, na mobu 69 ya ntango na biso (T.B.). Biloko epanzanaki na mabelé liboso ete ndako yango ekwea. Avigad alobi boye: “Ntango tomonaki biloko yango, tokanisaki mbala moko makambo oyo Josèphe alobaki mpo na oyo esalemaki ntango basoda ya Loma bapunzaki engumba wana.” Bato ya mayele na masolo ya kala balobaka ete Baloma babebisaki Yelusaleme na mobu 70 T.B.

Nsima ya koyekola mikuwa yango, bamonaki ete ezalaki ya mwana mwasi moko oyo alekaki mbula 20 kasi akokisaki naino mbula 30 te. Zulunalo moko (Biblical Archaeology Review) elobi boye: “Ntango Baloma babebisaki [ Yelusaleme], mwana mwasi moko azalaki na kuku ya ndako [wana oyo ezikaká na mɔtɔ] ntango yango ezwaki mɔtɔ; akweaki na nse mpe akufaki wana asembolaki lobɔkɔ mpo na koluka kosimba esika moko oyo ezalaki pene na ebimelo. Mɔtɔ epanzanaki nokinoki . . . mpe akokaki lisusu kobima te; akundamaki na nse ya biloko oyo ekweaki.”

Likambo yango ekundweli biso esakweli oyo Yesu apesaki mpo na Yelusaleme, mbula soki 40 liboso, ete: “Banguna na yo . . . bakobwaka na mabelé yo ná bana na yo oyo bazali na kati na yo, mpe bakotika te libanga likoló na libanga na kati na yo.”​—Luka 19:43, 44.

Biloko oyo bato ya mayele bakundoli, oyo emonisi ete masolo ya Biblia ezali solo, ezali mpe na bankombo ya bato mosusu oyo Makomami elobeli. Kati na biloko yango, mosusu esilisi ntembe ya baoyo bazalaki koloba ete bato mosusu oyo bakomi ya Biblia balobeli bazalaká te, to bapesá bango lokumu koleka.

Makomi oyo ezali na bankombo oyo Biblia elobeli

Na ntango moko boye, bato mosusu ya mayele oyo bayebani mingi bazalaki koloba ete Salegone II, Mokonzi ya Asulia, oyo alobelami na Yisaya 20:1, azalaká te. Kasi na mobu 1843, bato ya mayele oyo bayekolaka biloko ya kala bamonaki esika oyo ndako ya Salegone [3] ezalaki, pene na engumba oyo babengaka lelo oyo Khorsabad, mosika te na mongala moko ya Ebale Tigre, na ekólo Iraq. Ezalaki na hectare soki 10. Atako liboso bato mingi bayebaki Salegone II te, lelo oyo azali moko ya bakonzi ya Asulia oyo bayebani mingi. Na moko ya makomi [4] na ye, Salegone atutaki ntolo ete alongaki Samalia, engumba moko ya Yisalaele. Biblia mpe elobi ete Baasulia bakweisaki Samalia na mobu 740 liboso ya ntango na biso (L.T.B.). Salegone alobelaki mpe ndenge oyo alongaki Asedode, yango mpe eyokani mpenza na Yisaya 20:1.

Ntango bato ya mayele oyo bayekolaka biloko ya kala batimolaki esika oyo engumba Babilone ezalaká, na ekólo Iraq, balɔkɔtaki bitanda soki 300 ya makomi ya cunéiforme pene na Porte d’Ishtar (Ekuke ya Ishtar). Bitanda yango elobeli makambo oyo esalemaki na boyangeli ya Nebukadanesala, mokonzi ya Babilone; ezali mpe na bankombo ya bato, kati na yango “Yaukin, mokonzi ya ekólo Yahud.” Yaukin yango ezali nde Yoyakini, mokonzi ya ekólo Yuda, oyo amemamaki na boombo na Babilone ntango Nebukadanesala alongaki Yelusaleme mpo na mbala ya liboso na mobu 617 L.T.B. (2 Mikonzi 24:11-15) Na bitanda yango, bakomi mpe nkombo ya bana mitano ya Yoyakini.​—1 Ntango 3:17, 18.

Na 2005, bato ya mayele oyo bayekolaka biloko ya kala bazalaki kotimola esika moko oyo bakanisaki ete bakomona ndako ya Mokonzi Davidi. Bamonaki ebele ya mabanga oyo emonisaki ete ndako moko monene ezalaki wana, oyo bakanisi ete ebebisamaki ntango bato ya Babilone babebisaki Yelusaleme na mikolo ya mosakoli Yilimia, eleki sikoyo mbula koleka 2600. Eyebani te soki yango nde ezalaki ndako ya Davidi. Kasi, Eilat Mazar, moto moko oyo ayekolaka biloko ya kala, amonaki eloko moko ya ntina mingi, elembo moko ya mabelé oyo ezalaki na makomi [5], oyo ezalaki na bonene ya santimɛtrɛ moko. Makomi yango elobaki boye: “Ya Yehuchal, mwana ya Shelemiyahu, mwana ya Shovi.” Emonani ete makomi yango ebɛtamaki na kashɛ ya Yehuchal (to Yukala), Moyuda moko oyo azalaki mosali ya mokonzi, oyo Biblia elobi ete atɛmɛlaki Yilimia.​—Yilimia 37:3; 38:1-6.

Mazar alobi ete Yukala azalaki “ministre ya molɔngɔ ya mibale,” nsima ya Gemalia, mwana ya Safana, oyo bamonaki mpe nkombo na ye na makomi oyo ebɛtamaki na kashɛ moko oyo bakundolaki na Engumba ya Davidi. Biblia elobi ete Yukala azalaki mwana ya Selemia (Shelemiyahu), mpe azalaki moko ya mikóló ya Yuda. Liboso ete bákundola elembo yango, kaka Makomami nde elobelaki ye.

Bayebaki kotánga mpe kokoma?

Biblia emonisi ete Bayisalaele ya kala bayebaki kotánga mpe kokoma. (Mituya 5:23; Yosua 24:26; Yisaya 10:19) Kasi, bato mosusu bazalaki kondima yango te, bazalaki koloba ete na ntango ya kala makambo mingi oyo ezali na Biblia ekomamaki te, bato bazalaki koyeba yango kaka na masolo oyo moto na moto azalaki kobɛta na ndenge na ye. Na 2005, ntembe wana esilaki ntango bato ya mayele oyo bayekolaka biloko ya kala batimolaki na Tel Zayit, oyo ezali na katikati ya Yelusaleme mpe Mbu ya Meditelane, mpe bamonaki alfabɛ moko ya kala oyo ekomamaki na libanga moko; yango ekoki kozala alfabɛ ya Liebele [6] ya kala koleka nyonso oyo bakundolá.

Mpo na bato mosusu ya mayele, alfabɛ wana oyo ekomamaki na ekeke ya 10 L.T.B. emonisi ete na ntango wana, “bazalaki kolakisa bato kokoma,” “bato bayebaki makambo mingi,” mpe “misala ya biro ekómaki kosalema mingi na Yelusaleme.” Na bongo, na kokesana na makambo oyo bato mosusu bazalaki koloba, emonani ete Bayisalaele ya ntango ya kala bayebaki kotánga mpe kokoma mbala mosusu liboso ya ekeke ya 10 L.T.B., mpe bazalaki na likoki ya kokoma lisolo ya mboka na bango.

Bilembeteli mosusu na makomi ya Baasulia

Na ntango ya kala, Asulia ezalaki boyangeli ya nguya, mpe Biblia elobeli yango mbala ebele. Biloko mingi oyo bakundoli kuna emonisi ete Biblia elobaka mpenza solo. Na ndakisa, ntango batimolaki esika oyo Ninive, mboka-mokonzi ya Asulia ezalaki, bamonaki libanga moko oyo ezalaki na mayemi [7] na esika oyo ndako ya Mokonzi Saneheliba ezalaki. Mayemi yango emonisi ndenge basoda ya Asulia bamemaki Bayuda na boombo, ntango balongaki engumba Lakisi na mobu 732 L.T.B. Okoki kotánga lisolo yango na Biblia, na 2 Mikonzi 18:13-15.

Na makomi ya Saneheliba [8] oyo bakundolaki na Ninive, mokonzi yango alobeli ndenge oyo basoda na ye bakendaki kobundisa Yuda na boyangeli ya Mokonzi Hizikiya; kutu, makomi yango ezali mpe na nkombo ya Hizikiya. Makomi ya cunéiforme ya bakonzi ndenge na ndenge ezali mpe na nkombo ya bakonzi ya Yuda lokola Ahaza mpe Manase, mpe ya bakonzi ya Yisalaele lokola Omili, Yehu, Yoasa, Menaheme, mpe Hosea.

Na makomi na ye, Saneheliba amikumisi na ndenge alongaki bitumba mingi; kasi likambo ya ntina, alobi te ete alongaki Yelusaleme. Yango endimisi biso ete Biblia elobaka mpenza solo, mpamba te elobi ete mokonzi wana azingaki Yelusaleme te mpo Nzambe abomaki basoda na ye. Na nsɔni wana, Saneheliba azongaki na Ninive; mpe Biblia elobi ete bana na ye babomaki ye kuna. (Yisaya 37:33-38) Likambo ya kokamwa, makomi mibale oyo bakundolaki na Asulia elobi mpe ete Saneheliba abomamaki kobomama.

Lokola bato ya Ninive bazalaki na etamboli ya mabe mpenza, Yehova asakolaki na nzela ya mosakoli Nahumu mpe Sefania ete engumba yango ekobebisama mpo na libela. (Nahumu 1:1; 2:8–3:19; Sefania 2:13-15) Bisakweli yango ekokisamaki ntango Nabopolasala, mokonzi ya Babilone, asanganaki na Siyazalese, mokonzi ya Mede, mpo na kobundisa Ninive, mpe babebisaki yango na mobu 632 L.T.B. Biloko oyo bato ya mayele bakundoli na esika oyo Ninive ezalaki emonisi ete masolo ya Biblia ezali mpenza solo.

Kobanda na 1925 tii na 1931, bato batimolaki esika oyo engumba Nuzi ezalaki, na ɛsti ya Ebale Tigre mpe na sudi-ɛsti ya engumba Ninive. Bamonaki ebele ya biloko, kati na yango bitanda soki 20 000 ya mabelé oyo ezalaki na makomi na monɔkɔ ya bato ya Babilone. Bitanda yango elobeli makambo mingi etali mimeseno oyo bato bazalaki na yango na kotalela mibeko ya ntango wana, mpe yango ekokani na mimeseno ya bato ya kala oyo Biblia elobeli na mokanda ya Genese. Na ndakisa, bitanda yango emonisi ete mabota bazalaki na banzambe ya bikeko, oyo mbala mingi ezalaki ya mikemike mpe esalemaki na mabelé. Soki moto azali na bikeko wana, yango ezalaki komonisa ete azali na lotomo ya kosangola biloko oyo batikeli ye. Ekoki kozala mpo na ntina wana nde Laele, mwasi ya Yakobo, azwaki banzambe ya libota na bango, to “bikeko” ya tata na ye Labana, ntango Yakobo akendaki na basi mpe bana na ye. Yango mpe esalisi biso tóyeba ntina oyo Labana asalaki nyonso mpo bázongisela ye bikeko na ye.​—Genese 31:14-16, 19, 25-35.

Esakweli ya Yisaya mpe libanga ya Sirise

Makomi ya cunéiforme oyo ezali na libanga moko ya kala, oyo emonisami awa, eyokani na lisolo mosusu ya Biblia. Babengaka yango Libanga ya Sirise [9], mpe bakundolaki yango na esika oyo engumba Sippar ezalaki, pene na Ebale Efalata, kilomɛtrɛ soki 32 na Baghdad. Makomi oyo ezali na libanga yango emonisi ndenge oyo Babilone ekweaki na mabɔkɔ ya Sirise Monene, mobandisi ya bokonzi ya Perse. Likambo ya kokamwa, mbula soki 200 liboso, na nzela ya mosakoli Yisaya, Yehova alobaki mpo na mokonzi moko ya Bamede ná Baperse oyo nkombo na ye ekozala Sirise ete: “Ye azali mobateli ya etonga na ngai, ye akosukisa mokano na ngai; nalobi mpe na Yelusaleme ete, akotongama.”​—Yisaya 13:1, 17-19; 44:26–45:3.

Longola yango, libanga yango elobeli mayele oyo Sirise azalaki kosalela, oyo ekesanaki mpenza na oyo ya bakonzi mosusu ya ntango wana: soki alongi mokonzi moko, azalaki kotika bato oyo mokonzi yango akangaki na boombo bázonga na mboka na bango. Biblia mpe mikanda mosusu emonisi ete Sirise atikaki Bayuda bázonga na mboka na bango, mpe na nsima batongaki lisusu Yelusaleme.​—2 Ntango 36:23; Ezela 1:1-4.

Atako mosala ya koyekola biloko ya kala oyo ezali na boyokani na Biblia ebandi kala mingi te, kasi mosala yango ekómi na ntina mingi mpo ezali kosalisa biso tóyeba makambo mosusu ya ntina. Ndenge tomoni yango, biloko mingi oyo bato ya mayele bakundoli emonisi ete Biblia elobaka solo, ntango mosusu ata na makambo ya mike mpenza, mpe nsango na yango ebongwaná te.

MPO NA KOYEBA MAKAMBO MOSUSU

Biblia ekoki mpenza kosalisa yo ozala na bomoi ya malamu mpe oyo ezali na ntina? DVD ya ngonga mibale oyo ezali na motó ya likambo La Bible : un livre historique et prophétique elobeli likambo wana ya ntina mingi mpe ezali na makambo ya kolendisa oyo bato mosusu balobá.​—Ebimisami na minɔkɔ 32.

Olingi koyeba makambo mosusu oyo emonisi ete Biblia ezali na masapo ya lokuta te mpe ezali bongolabongola te? Makamwisi oyo Biblia elobeli esalamaki mpenza? Talá bilembeteli na yango na buku oyo ya nkasa 192.​—Ebimisami na minɔkɔ 56.

Buku oyo ya mikapo 19 esalisaka bato na koyekola Biblia; elimboli mateya nyonso ya ntina oyo Biblia elobeli, mpe emonisi mokano ya Nzambe mpo na mabelé mpe bato.​—Ebimisami sikoyo na minɔkɔ 162.

Buku oyo ebongisami mpenza mpo na bana, ezali na bililingi ya kitoko mpe elobeli bato mpe masolo ya Biblia 116, na kotalela ndenge oyo balandanaki to ntango oyo makambo yango esalemaki.​—Ebimisami na minɔkɔ 194.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 15]

Mbongo ya bibende: Generously Donated by Company for Reconstruction & Development of Jewish Quarter, Jerusalem Old City

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa  15]

Society for Exploration of Land of Israel and its Antiquities

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 16]

3: Musée du Louvre, Paris; 4: Tokangi fɔtɔ yango na ndingisa ya British Museum; 5: Gabi Laron/Institute of Archaeology/Hebrew University © Eilat Mazar

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 17]

6: AP Photo/Keith Srakocic; 7, 8: Tokangi fɔtɔ yango na ndingisa ya British Museum

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 18]

Tokangi fɔtɔ yango na ndingisa ya British Museum