Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Biblia elobelaka makambo nini?

Biblia elobelaka makambo nini?

Biblia elobelaka makambo nini?

BATO mosusu bamonaka ete Biblia ezali buku ya masolo ya kala, mpamba te elobeli makambo oyo Nzambe asalelaki bato eleki sikoyo ebele ya bambula. Basusu bamonaka ete ezali buku ya mibeko, mpamba te ezali na mibeko mpe mitinda koleka 600 oyo Nzambe apesaki libota ya Yisalaele. Mibeko yango etalelaki libota, bizaleli malamu, losambo mpe ndenge ya kokata makambo. Nzokande mpo na basusu, Biblia ezali mokanda ya Nzambe oyo esalisaka bango báyeba makanisi na ye.

Makanisi nyonso wana ezali malamu. Kutu, Biblia yango moko elobi ete: “Makomami nyonso epemami na Nzambe mpe ezali na litomba mpo na koteya, kopamela, kosembola makambo, mpo na kopesa disipilini na kati ya boyengebene, mpo moto ya Nzambe azala moto oyo akoki mpenza, oyo azali na nyonso esengeli mpo na mosala nyonso ya malamu.” (2 Timote 3:16, 17) Ya solo, makambo nyonso oyo ezali na Liloba ya Nzambe, ezala masolo ya kala, mibeko, mpe batoli, ezali na ntina mingi.

Nzokande, Biblia ezali kaka te buku moko ya kala oyo esalisaka bato báyeba makambo mingi. Ekeseni na babuku mosusu nyonso, mpamba te yango ezali na makanisi ya Yehova Nzambe. Ezali na batoli ya malamu oyo euti epai ya Nzambe, oyo tokoki kosalela na bomoi na biso. Elobeli mokano ya Yehova mpo na mabelé mpe bato, mpe emonisi ndenge oyo Yehova akosilisa makambo oyo ebimiselaka bato bampasi. Oyo eleki nyonso, Biblia elobeli ntembe oyo ebimaki mpo na lotomo ya Nzambe ya koyangela molɔ́ngɔ́ mobimba mpe ndenge oyo akosilisa ntembe yango.

Nzambe abengami moto ya lokuta mpe moyangeli mabe

Biblia elobi ete ntango Nzambe akelaki bato mibale ya liboso, Adama ná Eva, bazalaki na nzoto mpe na makanisi ya kokoka, mpe atyaki bango na esika moko ya kitoko mpenza. Apesaki bango bokonzi likoló ya mabelé mpe banyama. (Genese 1:28) Lokola Adama ná Eva bazalaki bana ya Nzambe, bazalaki na libaku ya kozala na bomoi libela na libela awa na mabelé soki batosaki Tata na bango ya likoló. Yehova atyelaki bango mobeko kaka moko. Alobaki boye: “Okoki kolya mbuma ya nzete nyonso ya elanga, nde mbuma ya nzete ya koyeba malamu mpe mabe okoki kolya te. Zambi mokolo okolya yango okokufa solo.”​—Genese 2:16, 17.

Nzokande, ekelamu moko ya elimo oyo Biblia ebengi Satana Zabolo alobaki makambo oyo ekesanaki mpenza na oyo ya Yehova; alobaki ete: “Bino bokokufa solo te.” (Genese 3:1-5) Na maloba wana, Satana abengaki Nzambe moto ya lokuta mpe moyangeli mabe, mpe amonisaki ete bato bakozala malamu koleka soki bamiyangeli bango moko. Satana andimisaki Eva ete bakozala na bonsomi mingi soki baboyi kotosa Nzambe. Ayebisaki ye ete akokóma ‘lokola Nzambe’! Na ndenge yango, Satana abebisaki lokumu ya Yehova mpe atɛmɛlaki mokano na ye.

Lisolo wana ya Eva ná Satana ebimisaki mikakatano minene. Kutu, mokano ya Yehova ya kolongola nsɔni oyo ebwakamaki na nkombo na ye mpe kozongisa lokumu na ye ezali motó ya likambo ya libosoliboso ya Biblia. Likambo yango emonisami polele na libondeli oyo Yesu alakisaki bayekoli na ye, oyo bato mingi babengaka “Tata wa biso.” Alobaki na bango bábondelaka boye: “Tiká nkombo na yo esantisama. Tiká bokonzi na yo eya. Tiká mokano na yo esalema . . . na mabelé.”​—Matai 6:9, 10.

Ndenge oyo Nzambe akolongola nsɔni na nkombo na ye

Makambo oyo Satana alobaki ebimisaki mituna mosusu ya ntina mingi: Nani alobaki solo, Yehova to Satana? Yehova ayangelaka bikelamu na ye na ndenge ya malamu mpe ya sembo? Azali mpenza na lotomo ya kosɛnga bato bátosa ye? Bato bakokaki mpenza kozala malamu soki bamiyangelaki bango moko? Mpo mituna wana ezwa biyano, Yehova atikaki bato bámiyangela na boumeli ya mwa ntango.

Mbuma nini yango ebimisi? Banda lokuta wana ya liboso elobamaki na Edene, bato bazali se konyokwama; yango emonisi ete Satana azali mpenza mobuki-lokuta, mpe ete kopesa Nzambe mokɔngɔ ememaka kaka mpasi. Nzokande, lokola Yehova azali bolingo mpe azali na bwanya oyo ezangi nsuka, akani kosilisa mikakatano nyonso wana oyo ebandaki na Edene mpo na kolongola nsɔni na nkombo na ye. Akosala yango na nzela ya Bokonzi ya Masiya. Bokonzi yango ezali nini?

Bokonzi ya Nzambe ekobongisa makambo

Bamilio ya bato basalaka libondeli ya “Tata wa biso” mbala na mbala. Mpo na nini te kozwa mwa ntango ya kokanisa na ndimbola ya libondeli yango? Na ndakisa, talá maloba oyo: “Tiká bokonzi na yo eya.” (Matai 6:10) Bokonzi wana ezali te na kati ya mitema ya bato, ndenge bato mosusu bakanisaka. Kasi, ndenge liloba “bokonzi” emonisi yango, ezali guvɛrnema moko oyo ezali na likoló, oyo Nzambe apesi na mabɔkɔ ya Yesu Klisto, “Mokonzi ya bakonzi.” (Emoniseli 19:13, 16; Danyele 2:44; 7:13, 14) Biblia elobi ete Yesu akoyangela mabelé mobimba; akotya kimya oyo ekoumela seko, akotya bomoko kati na bato mpe akolongola mabe nyonso awa na mabelé. (Yisaya 9:6, 7; 2 Batesaloniki 1:6-10) Na yango, ezali Bokonzi ya Nzambe, kasi baguvɛrnema ya bato te, nde ekokokisa maloba oyo ya Yesu: “Tiká mokano na yo esalema . . . na mabelé.”

Mpo maloba wana ekokisama, Yesu apesaki bomoi na ye lokola lisiko mpo na kosikola bakitani ya Adama na lisumu mpe na liwa. (Yoane 3:16; Baloma 6:23) Na bongo, na Bokonzi ya Nzambe, bato nyonso oyo bandimaka mbeka ya Yesu bakomona ndenge bato bakolongwa mokemoke na ezaleli ya kozanga kokoka oyo euti na lisumu ya Adama mpe bakokóma bato ya kokoka. (Nzembo 37:11, 29) Nsukansuka, mikakatano oyo etungisaka biso, mingimingi na ntango ya bobange, ekozala lisusu te. Ezala mpasi ya motema oyo maladi mpe liwa ememelaka bato, “ekozala lisusu mpe te.”​—Emoniseli 21:4.

Nini endimisi biso ete Nzambe akokokisa bilaka na ye? Mingimingi, ezali bankama ya bisakweli ya Biblia oyo esili kokokisama. (Talá lokasa 9.) Emonani polele ete kondimela Biblia ezali bindimandima mpamba te, kasi ezali na makambo mingi oyo emonisi ete esengeli mpenza kondimela yango.​—Baebele 11:1.

Batoli oyo ebongi na mikolo na biso

Biblia esuki kaka te na kopesa biso elikya ya solosolo mpo na mikolo ezali koya, kasi ezali mpe kosalisa biso tózala na bomoi ya malamu lelo oyo. Na ndakisa, Liloba ya Nzambe epesi biso batoli oyo eleki nyonso na makambo lokola libala, bomoi ya libota, boyokani malamu na basusu, ndenge ya kozala na esengo, mpe bongo na bongo. Tótalela mwa bandakisa oyo elandi.

Kokanisa liboso ya koloba. “Ezali na moto oyo alobaka kozanga kokanisa lokola azali kokata na mopanga, kasi lolemo ya bato ya bwanya ebikisaka.”​—Masese 12:18NW.

Koboya zuwa ya mabe. “Kimya ya motema epesaka nzoto makasi; kasi zuwa epesaka moto maladi.”​—Masese 14:30, Bible na lingala ya lelo oyo.

Kopesa bana disipilini. “Bokɔlá mwana na nzela ekoki na ye kotambola; ekokóma ye monene akopɛngwa na yango te.” “Mwana oyo atikami epai na ye moko akokómisa mama na ye na nsɔni.”​—Masese 22:6; 29:15.

Koyeba kolimbisa. Yesu alobaki ete: “Esengo na bato ya motema mawa, mpo bakomonisamela motema mawa.” (Matai 5:7) Salomo, mokonzi ya bwanya, akomaki boye: “Bolingo ekozipa masumu nyonso.” (Masese 10:12) Soki omoni ete okokoka te kolimbisa mabe oyo moto moko asaleli yo mpe kobosana yango, landá toli oyo ya Biblia: “Kende komonisa ye libunga na ye na kati na yo ná ye moko kaka.”​—Matai 18:15.

Koboya bolingo ya mbongo. “Bolingo ya mbongo ezali mosisa ya makambo mabe ya ndenge nyonso, mpe na kokolisáká bolingo wana bamosusu . . . bamitɔbɔlitɔbɔli na ebele ya bampasi.” (1 Timote 6:10) Tomoni ete Biblia epekisi “bolingo ya mbongo,” kasi mbongo yango moko te.

“Mokanda” oyo Tata na biso ya likoló atindeli biso

Ndenge tomoni yango, Biblia elobeli makambo mingi. Elobeli libosoliboso makambo etali Nzambe mpe mokano na ye. Elobeli mpe makambo oyo etali biso bato mpe ndenge oyo tokoki kozala malamu lelo oyo mpe libela na libela ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela. Na maloba mosusu, Biblia ezali lokola mokanda oyo Yehova, “Tata na biso na likoló,” atindeli biso. (Matai 6:9) Na nzela na yango, Yehova ayebisi biso makanisi na ye ya ntina mingi mpe asalisi biso tóyeba mokano na ye mpe bizaleli kitoko na ye.

Soki tozali kotánga Biblia mpe komanyola yango, na ndenge ya elilingi, tokobanda komona Nzambe ndenge azali mpenza. Motema na biso ekotinda biso tópusana penepene na ye mpe tólinga ye mingi. (Yakobo 4:8) Na ntembe te, Biblia ezali kaka te buku moko ya masolo ya kala, ya bisakweli, mpe ya mibeko. Kasi, ezali mpe komonisa ndenge oyo mokomoko na biso akoki kokóma na boyokani malamu na Nzambe. Yango nde ntina oyo Biblia ekeseni na babuku mosusu nyonso mpe ezali na ntina mingi.​—1 Yoane 4:8, 16.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 19]

Motó ya likambo ya Biblia emonisami malamu na maloba ya ebandeli ya libondeli oyo Yesu alakisaki bayekoli na ye

[Etanda/​Elilingi na lokasa 21]

NDENGE YA KOTÁNGA BIBLIA

Biblia ezali buku moko kitoko mpo na kotánga. Masolo mpe mateya na yango eyebani mingi; mpe bato mingi basalelá yango mpo na kokoma mikanda na minɔkɔ ndenge na ndenge. Biblia esalisaka biso tóyeba Mozalisi na biso, Yehova Nzambe. Buku yango etondi mpe na bwanya ya solosolo. Lisese moko ya Biblia elobi ete: “Mayele ezali likambo ya liboso; boye, zwá mayele, mpe ekozwa yo biloko nyonso, zwá mpe bososoli.” (Masese 4:7) Okoki kosala nini mpo ozwa matomba mingi na botángi na yo ya Biblia?

Salá programɛ ya kotángaka Biblia na ntango oyo makanisi na yo ezalaka kimya. Kotánga yango likolólikoló te. Zalá na mokano ya koyeba makanisi ya Nzambe mpe kokanga ntina na yango. Soki osilisi kotánga eteni moko, kanisá na mozindo makambo oyo otángi, mpe kokanisá yango na oyo oyebaka banda kala. Yango ekosalisa yo oyeba Biblia malamu mpe okóma na botɔndi mingi.​—Nzembo 143:5.

Bato mosusu bakoki komituna boye, ‘Nakobanda wapi?’ Okoki kobanda na ebandeli. Nzokande, bato mosusu oyo babandaka kotánga Biblia sika, bamonaka malamu kobanda na Baevanzile, elingi koloba Matai, Malako, Luka, mpe Yoane, oyo elobeli bomoi ya Yesu mpe mosala na ye. Na nsima, batángaka mikanda oyo etondi na maloba ya bwanya mpe ekomami na maloba ya ntɔki: Nzembo, Masese, mpe Mosakoli. Yango ekoki kopesa yo mposa ya kotánga mikanda mosusu ya Biblia. (Talá etanda oyo ezali awa na nse.) Kolanda te makanisi mabe ya bato oyo balobaka ete esengeli kotánga kaka oyo babengaka Testama ya Sika. Kobosana te ete “Makomami nyonso epemami na Nzambe mpe ezali na litomba.”​—2 Timote 3:16.

Lolenge ya malamu koleka ya koyekola Biblia ezali ya kotalela liteya na yango mokomoko. Na ndakisa, buku Biblia eteyaka mpenza nini? oyo Batatoli ya Yehova basalelaka mpo na koyekola Biblia na bato ezali na mateya oyo ebongi na mikolo na biso, lokola “Ndenge ya kozala na libota ya esengo,” “Losambo oyo Nzambe andimaka,” mpe “Bato oyo bakufá bazali wapi?”​—Talá etanda na lokasa 18.

[Etanda na lokasa 21]

MAKAMBO OYO EZALI NA BIBLIA

Ebandeli ya bomoi mpe ndenge oyo moto akweaki na lisumu Genese

Ebandeli ya ekólo Yisalaele Exode tii na Deteronome

Masolo Yosua tii na Esetele

Maloba ya ntɔki mpe banzembo ya kitoko Yobo, Nzembo, Loyembo ya Salomo

Maloba ya bwanya Masese, Mosakoli

Bisakweli mpe mitinda Yisaya tii na Malaki, mpe Emoniseli

Bomoi mpe mateya ya Yesu Matai tii na Yoane

Ebandeli mpe kopalanganisama ya boklisto Misala

Mikanda mpo na masangá Baloma tii na Yuda