Ntina ya kotyela Biblia motema
2. Elobaka makambo polele mpe na bosembo
Bato batyelaka moto motema soki azali sembo to azali na ezaleli ya kolongobana. Na ntembe te, okotyela moto ya ndenge wana motema, kasi soki akosi yo ata mbala moko, mbala mosusu okotyela ye lisusu motema te.
BAKOMI ya Biblia bazalaki bato ya sembo mpe bakomaki makambo na bosembo mpenza. Yango wana, makambo oyo bakomaki ezali solo.
Mabunga.
Bakomi ya Biblia bazalaki kondima polele mabunga mpe bolɛmbu na bango. Moize alobelaki libunga moko asalaki oyo ebimiselaki ye mokakatano monene. (Mituya 20:7-13) Asafa alobaki ete ekómelaki ye alula bozwi ya bato mabe. (Nzembo 73:1-14) Yona alobelaki ndenge azangaki botosi mpe ezaleli mabe oyo amonisaki na ebandeli ntango Nzambe alimbisaki basumuki oyo babongolaki motema. (Yona 1:1-3; 3:10; 4:1-3) Matai alobaki polele ete asundolaki Yesu na butu oyo bakangaki ye.—Matai 26:56.
Bakomi ya Makomami ya Liebele bamonisaki polele ete bato ya ekólo na bango bazalaki mbala na mbala komilelalela mpe kotombokela Nzambe. (2 Ntango 36:15, 16) Bakomi yango balobelaki mabunga ya moto nyonso, ata oyo ya bakonzi ya ekólo na bango. (Ezekiele 34:1-10) Ndenge moko mpe, na mikanda oyo bantoma bakomaki, balobelaki mikakatano minene oyo baklisto mosusu bakutanaki na yango, ezala baoyo bazalaki na mikumba na lisangá, to mikakatano oyo ekómelaki masangá mosusu ya ekeke ya liboso ya ntango na biso (T.B.).—1 Bakolinti 1:10-13; 2 Timote 2:16-18; 4:10.
Makambo oyo ekoki kokitisa lokumu.
Bakomi ya Biblia bamekaki te kobomba makambo oyo bato mosusu bakokaki komona ete ekokitisa lokumu ya moto. Na ndakisa, baklisto ya ekeke ya liboso bamonisaki polele ete bato ya ntango na bango bazalaki kokumisa bango te; bazalaki nde kotyola bango, komona bango ete bazali bazoba mpe bato mpamba. (1 Bakolinti 1:26-29) Bakomi yango balobaki ete bato bazalaki kotalela bantoma ya Yesu lokola “bato batángá kelasi mingi te mpe bato mpamba.”—Misala 4:13.
Bakomi ya Baevanzile bakómisaki makambo kitoko te mpo na kotinda bato básepela na Yesu. Bakomaki nde ete abotamaki na libota ya bato oyo bazangaki bozwi, atángaki na bakelasi minene te ya ntango wana mpe bato mingi oyo bayokaki nsango na ye baboyaki yango.—Matai 27:25; Luka 2:4-7; Yoane 7:15.
Na ntembe te, makambo mingi oyo ezali na Biblia emonisi ete buku yango ekomamaki na bato ya sembo. Bosembo na bango ezali nde te kotinda yo otyela bango motema?