Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Makambo mazali koleka na mokili

Makambo mazali koleka na mokili

Makambo mazali koleka na mokili

Biblia mobimba Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami Mosantu esili kobimisama na minɔkɔ 43, mpe minɔkɔ misato na ekomeli ya bato bakufá miso (Braille). Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami ya Grɛki ya boklisto esili mpe kobimisama na minɔkɔ mosusu 18, mpe monɔkɔ moko na ekomeli ya bato bakufá miso (Braille). Tii na sanza ya Yuli 2007, motángo mobimba oyo Biblia yango ebimisami ezalaki: 143 458 577.

Makomi oyo eumeli koleka makomi nyonso ya Biblia oyo tozali na yango lelo oyo ezali oyo babengaka “Lipamboli ya banganga,” oyo ezali na Mituya 6:24-26. Bamonaki yango na mwa bitanda mibale ya palata oyo balíngá lokola rulo, oyo bato bazalaki kolata lokola nkisi ya komibatela, mpe ekomamaki na nsuka ya ekeke ya nsambo to na ebandeli ya ekeke ya motoba L.T.B.​—BIBLICAL ARCHAEOLOGY REVIEW, ÉTATS-UNIS.

Tii na mokolo ya 31 Desɛmbɛ 2006, motángo ya minɔkɔ oyo mokanda ata moko kaka ya Biblia esili kobimisama ezalaki: 2 426, elingi koloba minɔkɔ 23 ebakisami koleka na mbula oyo eleki.​—UNITED BIBLE SOCIETIES, GRANDE-BRETAGNE.

Na Amerika, bato soki 28 likoló ya monkama bamonaka ete Biblia ezali “mpenza liloba ya Nzambe . . . mpe esengeli kozwa makambo na yango nyonso ndenge ekomami,” bato 49 likoló ya monkama bamonaka ete ezali “liloba epemami ya Nzambe kasi esengeli te kozwa makambo na yango nyonso ndenge ekomami,” mpe bato 19 likoló ya monkama bamonaka ete ezali “buku ya masapo.”​—GALLUP NEWS SERVICE, ÉTATS-UNIS.

Yango nde Biblia oyo eumeli koleka Babiblia mosusu ya monɔkɔ ya Chinois?

Yiyi Chen, moto ya mayele na Iniversite ya Pékin, alobi boye: “Maloba oyo eumeli koleka maloba mosusu nyonso oyo elobeli kobongolama ya Biblia ya Liebele na monɔkɔ ya Chinois ekomami na monima moko [na lobɔkɔ ya mwasi] oyo esalemaki na mobu 781 ya ntango na biso (T.B.).” Baklisto ya Lingomba ya ba Nestorien nde basalaki monima yango, oyo ekundolamaki na mobu 1625 na engumba Sian. Chen alobi lisusu boye: “Nkombo ya monima yango na monɔkɔ ya Chinois ebongolami boye: ‘Ekaniseli ya kopalanganisama na ekólo Chine ya Lingomba ya pole oyo eutaki na Daqin’ (. . . Daqin ezali nkombo oyo bato ya Chine bazalaki kobenga boyangeli ya Loma). Makomi oyo ezali na monima yango ezali na maloba ya Chinois lokola ‘mikanda ya Biblia oyo endimami mpenza,’ mpe ‘kobongolama ya Biblia.’”

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 30]

© Réunion des Musées Nationaux/​Art Resource

Eloko ya motuya na esika batimolaka charbon

Na 2006, ntango bato bazalaki kotimola charbon na ekólo Irlande, bamonaki buku moko ya Nzembo (ya Biblia) oyo ekomamaki soki na ekeke ya mwambe T.B. Buku yango ekomamaki na monɔkɔ ya Latin, mpe batalelaka yango lokola eloko ya motuya, mpamba te babuku ya ntango wana ezali mingi te lelo oyo. Buku yango ezalaki na nkasa soki 100 oyo esalemaki na mposo ya nyama; bankasa yango mpe biloko oyo basalelaki mpo na kokangisa yango ezali mpenza malamu. Zulunalo moko (The Times) ya Londres elobi boye: “Libenga ya loposo ya nyama oyo bakɔtisaki buku yango mpe mwa tapi oyo batandaki likoló na yango elyamályamá, kasi yango emonisi ete babombaki buku yango kobomba. Ekoki kozala ete basalaki bongo mpo ba Viking, oyo bazalaki kopunza biloko eleki sikoyo mbula 1200, bázwa yango te.” Ata soki nkasa ya buku yango ekangamákangamá mpe epɔlá mwa moke, kasi bato ya mayele bakanisi mpenza ete bakolonga kofungolafungola yango mpe kobatela yango.

Mabelé oyo etondi na biloko ya kala

Balapolo emonisi ete bato ya mayele oyo bayekolaka biloko ya kala bayungolaki ebele ya mabelé oyo batimolaki na esika oyo tempelo ya Yelusaleme ezalaki mpe bamonaki bankóto ya biloko oyo Bayisalaele bazalaki kosalela na ntango ya kala mpe na mikolo na biso. Kati na biloko yango, bamonaki mpe nsɔngɛ moko ya likɔnga lokola oyo ya basoda ya Nebukadanesala oyo babebisaki tempelo ya liboso ya Bayuda oyo ezalaki na esika wana. Eloko ya ntina koleka oyo bamonaki ezali kashɛ moko ya mabelé oyo esalemaki na ekeke ya nsambo to ya motoba liboso ya ntango na biso (L.T.B.), oyo balobi ete ezali na nkombo oyo ya Liebele: Gedalyahu Ben Immer Ha-Cohen. Gabriel Barkai, moto ya mayele oyo ayekolaka biloko ya kala, alobi ete kashɛ yango “ekoki kozala ya ndeko moko ya Pashur Ben Immer, oyo Biblia [Yilimia 20:1] elobi ete azalaki nganga-nzambe mpe mosali na tempelo.”